Ndenge nini mateya ya bokristo esalisaka bato?
MASOLO oyo euti koleka emonisaki ntina oyo bakristo ya solo bakɔtaka na politiki te. Kasi, ndenge nini bakristo bakoki komonisa ete bazalaka na mposa ya kosalisa bato na bisika bafandi? Lolenge moko oyo bakoki komonisa yango ezali ya kotosa etinda oyo ya Yesu: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”—Matai 28:19, 20.
Etinda oyo Yesu apesaki ya ‘kokómisa bato bayekoli’ ezali na boyokani ná kotosa malako oyo apesaki ya kozala lokola mungwa mpe pole ya mokili. (Matai 5:13, 14) Boyokani yango ezali wapi? Mpe mosala yango ekoki kotinda bato básala nini?
Nsango ya Kristo ebatelaka mpe engɛngisaka
Mungwa ebatelaka bilei mpo ebeba te. Ndenge moko mpe, nsango oyo Yesu apesaki bayekoli na ye etinda básakwela bato ya bikólo nyonso ebatelaka. Baoyo bandimaka mateya ya Yesu mpe basalelaka yango bamibebisaka te na bizaleli mabe oyo etondi na mokili lelo oyo. Na ndenge nini? Bayekolaka ndenge ya koboya makambo oyo ezali likama mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, na ndakisa komɛla makaya, mpe bakómaka na bizaleli lokola bolingo, kimya, motema molai, boboto, mpe bolamu. (Bagalatia 5:22, 23) Bizaleli wana ekómisaka bango bato malamu na bisika bafandi. Bakristo oyo bayebisaka bato ya kartye na bango nsango wana oyo ebatelaka, basalaka mosala moko ya ntina mingi mpo na mboka na bango.
Kasi ezali boni mpo na ndakisa ya pole, oyo Yesu apesaki? Kaka ndenge sanza engɛngisaka mabele na pole oyo eutaka na moi, bayekoli ya Kristo bangɛngisaka bato na “pole” oyo eutaka epai ya Yehova Nzambe. Bazali kongɛngisa pole na nzela ya nsango oyo basakolaka mpe misala ya malamu oyo basalaka.—1 Petro 2:12.
Lisusu, Yesu amonisaki bokokani oyo ezali kati na kozala pole mpe kozala moyekoli na ntango alobaki ete: “Bapelisaka mwinda mpe batyaka yango likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda kasi na nse ya ekɔlɔ ya komekela te, mpe engɛngɛlaka baoyo nyonso bazali na kati ya ndako. Ndenge moko mpe tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato.” Soki batye mwinda oyo ezali kopela likoló ya etɛlɛmiselo ya miinda, bato nyonso oyo bazali zingazinga bakomona pole. Ndenge moko mpe, mosala ya kosakola mpe misala mosusu ya malamu oyo bakristo ya solo basalaka esengeli komonana polele epai ya bato oyo bafandi zingazinga na bango. Mpo na nini? Mpamba te Yesu alobaki ete baoyo bakomona misala yango ya malamu bakopesa nkembo na bakristo yango te, kasi na Nzambe.—Matai 5:14-16.
Mokumba ya bakristo nyonso
Ntango Yesu alobaki “bino bozali pole ya mokili” mpe “tiká pole na bino engɛnga,” azalaki koloba na bayekoli na ye nyonso. Mokumba oyo Yesu apesaki ekokaki te kokokisama na mwa bato moke oyo bapanzani na mangomba ndenge na ndenge. Mondimi nyonso nde asengeli kozala “pole.” Batatoli ya Yehova milio nsambo oyo bafandi na mikili koleka 235, bayebaka ete bango nyonso bazali na mokumba ya kokende kotala bato oyo bafandi zingazinga na bango mpo na koyebisa bango nsango oyo Kristo alingi ete bayekoli na ye básakola.
Motó ya likambo ya nsango oyo Batatoli ya Yehova basakolaka ezali nini? Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ya kosakola, ayebisaki bango te ete báluka kobongisa makambo ya bomoi ya bato to makambo ya politiki, básangisa lingomba ná Leta, to báteya makanisi ya bato ya mayele. Ayebisaki bango nde ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Yango wana, mpo na kotosa etinda wana ya Yesu, bakristo ya solo lelo oyo bazali kokoba koyebisa bato oyo bafandi zingazinga na bango nsango etali Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali guvɛrnema kaka moko oyo ekosukisa mokili mabe ya Satana mpe ekotya mokili ya sika ya bosembo.
Kutu, ntango totángaka masolo oyo ezali na Baevanzile, tokutaka makambo mibale ya minene oyo etali mosala ya Yesu, oyo etaleli mpe mosala ya bakristo ya solo lelo oyo. Lisolo oyo elandi elobeli makambo yango mibale.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Na ndenge nini nsango oyo bakristo basakolaka ezali lokola mungwa?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
Na ndenge nini nsango ya Kristo ezali lokola mwinda na esika ya molili?