Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/5 nk. 10-11
  • Mondimi ya solo akoki kozala mwana-mboka oyo atosaka mibeko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mondimi ya solo akoki kozala mwana-mboka oyo atosaka mibeko?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobongola mitema ya bato mpe kokitisa mpasi na bango
  • Bana-mboka oyo batosaka mibeko
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bómitambwisa lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/5 nk. 10-11

Mondimi ya solo akoki kozala mwana-mboka oyo atosaka mibeko?

MAKAMBO nini mibale esimbaki mosala ya Yesu awa na mabele? Ya liboso, Yesu azalaki nde koluka kobongola mitema ya bato, kasi bibongiseli ya politiki te. Na ndakisa, simbá likambo nini Yesu alobelaki mingi na lisolo na ye likoló ya ngomba. Mwa moke liboso ya koyebisa ntina oyo bayekoli na ye basengeli kozala lokola mungwa mpe pole, Yesu alobaki na bato oyo azalaki koteya ete esengo ya solosolo ezali nde na “baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” Abakisaki ete: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, . . . bato ya motema pɛto, . . . bato oyo batyaka kimya.” (Matai 5:1-11) Yesu asalisaki bayekoli na ye bámona ntina ya koyokanisa makanisi na bango mpe bamposa na bango na mitinda ya Nzambe na oyo etali malamu mpe mabe, mpe báyeba ntina ya kosalela Nzambe na motema mobimba.

Ya mibale, ntango Yesu azalaki komona bampasi ya bato, mawa oyo azalaki koyokela bato yango ezalaki kotinda ye akitisa mpasi na bango. Kasi, mokumba na ye ezalaki te ya kosilisa bampasi nyonso. (Matai 20:30-34) Abikisaki bato oyo bazalaki kobɛla, kasi maladi esilaki libela te na mokili. (Luka 6:17-19) Akitisaki mitema ya bato oyo bazalaki konyokwama, kasi kozanga bosembo ekobaki komemela bato mpasi. Aleisaki bato oyo bazalaki na nzala, kasi nzala esilaki na mokili te.​—Marko 6:41-44.

Kobongola mitema ya bato mpe kokitisa mpasi na bango

Mpo na nini Yesu azalaki kotya likebi mingi nde na kobongola mitema ya bato mpe kokitisa mpasi na bango, kasi te na koluka kobongola makambo ya politiki to kosilisa bampasi ya bato? Yesu ayebaki ete Nzambe azali na mokano ya kosalela Bokonzi na ye mpo na kosukisa baguvɛrnema nyonso ya bato mpe kolongola libela makambo nyonso oyo ebimiselaka bato bampasi. (Luka 4:43; 8:1) Yango wana, mokolo moko, ntango bayekoli balendisaki Yesu alekisa ntango mingi na kobikisa bato ya maladi, Yesu alobaki na bango boye: “Tókende epai mosusu, na bamboka ya pembeni, mpo nasakola mpe kuna, mpamba te ezali mpo na yango nde nabimaki.” (Marko 1:32-38) Yesu alɛmbisaki mwa moke mpasi ya bato mingi, kasi mosala na ye ya libosoliboso ezalaki nde kosakola mpe koteya liloba ya Nzambe.

Lelo oyo, Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálanda ndakisa ya Yesu na mosala na bango ya kosakola. Balingaka kokitisa mpasi ya bato na ndenge basalisaka bato oyo bazali na bosɛnga. Kasi, Batatoli ya Yehova balukaka te kosilisa makambo ya kozanga bosembo oyo etondi na mokili. Bayebi ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa makambo nyonso oyo ebimisaka mpasi. (Matai 6:10) Lokola Yesu, basalaka makasi bábongola mitema ya bato, kasi bibongiseli ya politiki te. Lolenge wana ya kosala ezali malamu, mpamba te mikakatano minene oyo mokili ezali na yango eutaka nde na bizaleli ya bato, kasi na politiki te.

Bana-mboka oyo batosaka mibeko

Lisusu, Batatoli ya Yehova bayebi ete lokola bazali bakristo, basengeli mpe kotosaka mibeko ya mboka oyo bafandi. Kutu, bazalaka na limemya mingi mpo na bakonzi ya Leta. Na nzela ya mikanda na bango mpe mosala na bango ya kosakola, balendisaka bato oyo bafandi zingazinga na bango bátosa mibeko. Kasi, soki mobeko oyo guvɛrnema moko esɛngi bango bátosa eyokani te na mibeko ya Nzambe, Batatoli ya Yehova ‘batosaka Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’​—Misala 5:29; Baroma 13:1-7.

Batatoli ya Yehova bakendaka kotala bato nyonso oyo bafandi zingazinga na bango mpo na kosɛnga bango soki bakondima koyekola Biblia ofele. Mateya yango esili kosalisa bamilio ya bato bábongola mitema. Mbula na mbula, Batatoli bazali kosalisa bankóto ya bato bátika makambo oyo ezali likama mpo na bomoi na bango, na ndakisa komɛla makaya, kolangwa masanga, komɛla bangi, kobɛta masano ya mbongo, mpe kosala kindumba. Lokola bayekoli kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na bango, bakómi na bizaleli malamu mpe bana-mboka oyo batosaka mibeko.​—Talá lisolo “Biblia ebongolaka bato,” na lokasa 18 ya zulunalo oyo.

Longola yango, mateya ya Biblia esalisaka moto mokomoko na kati ya libota azala na limemya mpo na basusu mpe ayeba kosolola malamu na basusu: mwasi ná mobali, baboti ná bana, to bana bango na bango. Makambo wana nyonso nde esalaka ete boyokani ezala makasi na libota. Soki mabota ezali na boyokani makasi, mboka mobimba mpe ekozala na boyokani makasi.

Nsima ya kotalela makanisi oyo tolobeli na masolo oyo ya ebandeli, okanisi ete Biblia endimaka bandimi oyo bamikɔtisaka na politiki? Eyano ezali polele: “Te.” Kasi bakristo basengeli kozala bana-mboka oyo batosaka mibeko? Eyano ezali: “Ɛɛ.” Ndenge nini bakoki kosala yango? Soki balandi etinda ya Yesu ya kozala lokola mungwa mpe pole ya mokili.

Baoyo basalaka makasi mpo na kotosa malako wana ya Kristo bazwaka matomba mingi, ezala bango moko, mabota na bango, mpe bato oyo bafandi na bango esika moko. Batatoli ya Yehova oyo bazali na esika ofandi bakosepela mingi koyebisa yo makambo mosusu oyo etali programɛ ya mateya ya Biblia oyo ezali kopesama sikoyo na esika ofandi.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki olingi, okoki mpe koyeba makambo etali Batatoli ya Yehova na site oyo: www.watchtower.org

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]

Yesu azalaki nde koluka kobongola mitema ya bato, kasi bibongiseli ya politiki te

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Batatoli ya Yehova bayebi ete basengeli kotosaka mibeko ya mboka oyo bafandi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto