Biblia ebongolaka bato
ELOKO nini moto moko ya Écosse amonaki ete ezali na valɛrɛ mingi koleka mombongo na ye oyo ezalaki kotambola malamu? Nini esalisaki mobali moko na Brésil atika bomoi ya mbindo oyo azalaki na yango mpe atika komɛla bangi oyo babengi crack cocaïne? Ndenge nini mobali moko na ekólo Slovénie alongaki kotika momeseno ya komɛla masanga mingi? Tángá makambo oyo bato yango balobi.
“Ezalaki komonana lokola nde nazali na bomoi ya malamu.”—JOHN RICKETTS
ABOTAMAKI NA: 1958
EKÓLO: ÉCOSSE
BOMOI NA YE YA KALA: MOTO MONENE YA MOMBONGO
NDENGE NAZALAKI: Nazalaki na bomoi moko ya malamu ntango nazalaki kokola. Tata azalaki mokonzi ya basoda na Angleterre, yango wana libota na biso ezalaki kofanda esika moko te. Longola Écosse, tofandaki mpe na Angleterre, Allemagne, Kenya, Malaisie, Irlande, mpe Chypre. Ntango nakómaki na mbula mwambe, nakɔtaki kelasi na internat moko na ekólo Écosse. Nsukansuka, nazwaki diplome na iniversite ya Cambridge.
Ntango nakómaki na mbula 20, nasalaki na izini moko ya mafuta na boumeli ya mbula mwambe. Na ebandeli, nasalaki mosala yango na Amerika ya Sudi, na nsima, nasalaki yango na Afrika mpe na nsuka, na wɛsti ya Australie. Ntango nakómaki na Australie, nafungolaki kompanyi moko, oyo nsukansuka natɛkaki yango.
Mbongo oyo nazwaki ntango natɛkaki yango esalisaki ngai nazwa pansiɔ ntango nakómaki na mbula 40. Nakómaki kosalela ntango na ngai na kosala mibembo. Natambolaki Australie mobimba na tukutuku mbala mibale, mpe nasalaki mobembo na mokili mobimba. Ezalaki komonana lokola nde nazali na bomoi ya malamu.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Liboso kutu nazwa pansiɔ, nazalaki koluka ndenge ya kopesa Nzambe mersi mpo na bomoi malamu oyo nazalaki na yango. Nakómaki kokende na Lingomba ya Anglican, epai nazalaki kosambela ntango nazalaki mwana moke. Kasi, na lingomba yango bazalaki koteya mpenza te makambo oyo ezali na Biblia. Na nsima, nakómaki koyekola ná bato ya Lingomba ya Mormon, kasi nazalaki lisusu kosepela na bango te mpo bazalaki kotyela Biblia motema te.
Mokolo moko, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ngai. Namonaki mbala moko ete mateya na bango ezalaki kouta mpenza na Biblia. Vɛrsɛ moko ya Biblia oyo batángelaki ngai ezalaki 1 Timote 2:3, 4. Vɛrsɛ yango elobi ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” Nakamwaki ndenge Batatoli ya Yehova babɛtaki nsɛtɛ na likambo ya kozwa boyebi kaka te, kasi boyebi ya sikisiki oyo euti na Biblia.
Koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova esalisaki ngai nazwa boyebi yango ya sikisiki. Na ndakisa, nayekolaki ete Nzambe ná Yesu bazali na kati ya Bosato te, kutu bazali nde bato mibale oyo bakeseni. (Yoane 14:28; 1 Bakorinti 11:3) Nasepelaki mingi koyekola liteya wana ya solo. Nayokaki mabe ndenge nalekisaki ntango na ngai kala na koluka kokanga ntina ya liteya wana ya Bosato!
Eumelaki te, nakómaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Nakamwaki mpo na boboto mpe bizaleli ya malamu oyo moto nyonso azalaki na yango, bazalaki komonana lokola basantu. Bolingo ya solosolo oyo bazalaki na yango endimisaki ngai ete namoni lingomba ya solo.—Yoane 13:35.
MATOMBA OYO NAZWI: Nsima ya kozwa batisimo, nakutanaki na mwasi moko kitoko na nkombo Diane. Akolaki na libota ya Batatoli ya Yehova, mpe azalaki na bizaleli mingi ya malamu oyo esepelisaki ngai. Na nsima, tobalanaki. Namonaka ete ndenge nabalá Diane mpe ndenge asungaka ngai, ezali mpenza lipamboli ya Yehova.
Ngai ná Diane tokómaki na mposa makasi ya kokende kosakola epai mposa ya basakoli ya nsango malamu ya Biblia ezalaki mingi. Na 2010, tokendaki kofanda na Bélize, na Amerika ya ntei. Awa na Bélize, toteyaka bato oyo balingaka Nzambe mpe bazalaka na mposa makasi ya koyeba solo ya Biblia.
Koyeba solo na ntina na Nzambe mpe Liloba na ye Biblia epesi ngai kimya na motema. Lokola nalekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola, nazali na esengo ndenge nazali koteya bato ebele Biblia. Ezali na likambo mosusu te oyo eleki komona ndenge solo ya Biblia ezali kobongisa bomoi ya bato, kaka ndenge esalaki na bomoi na ngai moko. Sikoyo, namoni lolenge eleki malamu ya kopesa Nzambe mersi mpo na bomoi malamu oyo nazali na yango.
“Bamoniselaki ngai boboto mingi.”—MAURÍCIO ARAÚJO
ABOTAMAKI NA: 1967
EKÓLO: BRÉSIL
BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI NA BOMOI MOKO YA MBINDO
NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na Avaré, engumba moko ya moke na etúká ya São Paulo. Bato mingi oyo bafandi kuna basalaka.
Tata akufaki ntango mama azalaki na zemi na ngai. Ntango nazalaki naino mwana moke, soki mama abimi, nazalaki kolata bilamba na ye. Nakómaki kosala makambo lokola bana basi mpe bato bazalaki komona ngai lokola mwana mobali oyo abimaka ná baninga na ye mibali. Na nsima, nakómaki kosangisa nzoto ná mibali, ezala bilenge to mikóló.
Liboso kutu nakokisa mbula 20, nakómaki kosangisa nzoto mingi, ezala na mibali to na basi oyo nazalaki kokutana na bango na bare, na banganda ya butu mpe ata na mangomba. Na bafɛti, nazalaki kolata lokola mwasi mpe kobina ná bato mosusu ebele mabina babengi samba. Nayebanaki mingi.
Baninga na ngai mingi bazalaki mpe kosangisa nzoto ná mibali, bandumba mpe bamɛli-bangi. Baninga na ngai mosusu basalaki nyonso mpo nabanda komɛla bangi babengi crack cocaïne mpe eumelaki te nakómaki moombo na yango. Mikolo mosusu, tozalaki komɛla butu mobimba. Na bantango mosusu, nazalaki kokende esika ya ngai moko mpe komɛla bangi yango mokolo mobimba. Nakɔndaki makasi, yango wana bakómaki koloba ete nazali na sida.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na ntango wana, nakutanaki na Batatoli ya Yehova. Bamoniselaki ngai boboto mingi. Vɛrsɛ moko ya Biblia oyo batángelaki ngai ezalaki Baroma 10:13, oyo elobi: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” Vɛrsɛ yango emonisaki ngai ntina ya kosalela nkombo Yehova. Mbala mingi, nsima ya komɛla bangi wana butu mobimba, nazalaki kofungola fenetre, kotala na likoló mpe kobondela Yehova na mai na miso, ete asalisa ngai.
Ekomaki kopesa ngai mpasi mpo mama azalaki komitungisa mingi ndenge nazalaki kobebisa bomoi na ngai na bangi, yango wana nazwaki ekateli ya kotika komɛla yango. Mwa moke na nsima, nandimaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Bayebisaki ngai ete boyekoli yango ekosalisa ngai na ekateli oyo nazwi ya kotika bangi, mpe esalisaki ngai mpenza!
Wana nazalaki kokoba koyekola Biblia, namonaki ete esengeli nabongola bomoi na ngai. Ezalaki mpasi mingimingi mpo na kotika kosangisa nzoto ná baninga na ngai mibali, mpo bambula mingi namesanaki kozala ná bango. Kasi eloko esalisaki ngai ezalaki nde kokabwana na baninga yango ya mabe. Nakataki boninga ná baninga na ngai ya kala mpe natikaki kokende na bare mpe banganda ya butu.
Atako ezalaki pɛtɛɛ te kotika makambo wana, nabɔndisamaki ntango nayebaki ete Yehova akipaka ngai mpe ayebi mokakatano na ngai. (1 Yoane 3:19, 20) Na 2002, natikaki kosangisa nzoto ná baninga na ngai mibali mpe kaka na mbula wana nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Mama akamwaki mingi ndenge nabongwanaki, yango wana ye mpe akómaki koyekola Biblia. Likambo ya mawa, banda wana mama akómaki kobɛla maladi na bɔɔngo. Atako bongo, akómaki kolinga Yehova mpe solo ya Biblia mingi.
Mbula mwambe oyo euti koleka, namipesaki mingi na mosala ya kosakola mpe kolekisa ntango mingi na koteya bato mosusu Biblia. Esengeli nandima ete kobengana bamposa wana ya mabe ezalaki mpenza etumba. Kasi, eloko epesaka ngai makasi ezali nde koyeba ete koboya kolanda bamposa wana mabe esepelisaka Yehova.
Kopusana penepene na Yehova mpe kozala na bomoi oyo ezali kosepelisa ye epesi ngai lisusu valɛrɛ. Lelo oyo, nakómá na esengo.
“Nazalaki momɛli monene ya masanga.”—LUKA ŠUC
ABOTAMAKI NA: 1975
EKÓLO: SLOVÉNIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOMƐLI MONENE YA MASANGA
NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na Ljubljana, mboka-mokonzi ya ekólo Slovénie. Nabɔkwamaki malamu tii ntango nakómaki na mbula minei. Na nsima, tata amibomaki. Nsima ya likambo wana ya mpasi, esengelaki mama asala mosala makasi mpo na kobɔkɔla ngai ná yaya na ngai.
Ntango nakómaki na mbula 15, nakendaki kofanda epai ya nkɔkɔ na ngai ya mwasi. Nazalaki kosepela kofanda elongo na ye, mpo baninga na ngai mingi bazalaki kofanda na kartye wana. Nazalaki mpe na bonsomi mingi koleka ndenge nazalaki epai na biso. Ntango nakómaki na mbula 16, nazwaki baninga oyo bazalaki kokende komɛlaka masanga mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Nakolisaki nsuki na ngai, nakómaki kolata lokola motomboki, mpe na nsima nakómaki komɛla makaya.
Atako nakómaki komɛla bangi ndenge na ndenge, natikaki komɛla masanga te, mpo yango nde ezalaki kosepelisa ngai mingi koleka. Eumelaki te, natikaki komɛla mwa kɔpɔ ya vinyo, nakómaki nde komɛla molangi mobimba na mbala moko. Nakómaki na mayele mabe ya kobomba molangwa na ngai. Mbala mingi, kaka nsolo ya masanga oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ngai nde ezalaki komonisa ete namɛlaki. Atako bongo, moto moko te akokaki kokanisa ete namɛlaki balitre mingi ya vinyo to ya masanga, mpe nazalaki kosangisa yango na masanga mosusu babengi vodka!
Mbala mingi, na nzela ntango tozali kozonga, soki touti na banganda ya butu, ngai nde nazalaki kolakisa baninga na ngai nzela atako namɛlaki masanga mbala mibale koleka ndenge bango bamɛlaki. Mokolo moko, nayokaki ndenge moninga na ngai moko alobaki ete nazali momɛli monene ya masanga, elingi koloba moto oyo amɛlaka masanga koleka bato mosusu nyonso. Maloba wana esalaki ngai mpasi mingi.
Nabandaki kokanisa na ndenge oyo nazali kotambwisa bomoi na ngai. Nakómaki koyoka lokola nazangi ntina. Emonanaki lokola ete likambo nyonso oyo nazalaki kosala na bomoi na ngai ezalaki na ntina te.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na ntango wana nde nayebaki ete moninga na ngai moko ya kelasi abongwanaki mpenza; akómaki moto ya kimya. Ndenge oyo abongwanaki ekamwisaki ngai, yango wana nabengaki ye tókende na mwa restora moko. Ntango tozalaki kosolola, ayebisaki ngai ete akómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Ayebisaki ngai makambo mosusu oyo ayekolaki, makambo yango nyonso ezalaki sika mpo na ngai, mpo banda bomwana na ngai, bateyá ngai makambo ya Nzambe te. Nakómaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova mpe bakómaki koyekola na ngai Biblia.
Koyekola Biblia efungolaki ngai miso, nayebaki makambo mingi ya solo. Na ndakisa, nayebaki ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” oyo Biblia elobeli. (2 Timote 3:1-5) Nayekolaki mpe ete mosika te Nzambe akolongola bato mabe na mabele, mpe akopesa bato malamu libaku ya kosepela na bomoi ya seko na paradiso. (Nzembo 37:29) Nayokaki mposa makasi ya kopɛtola bomoi na ngai mpo ngai mpe nazala na kati ya bato wana ya malamu.
Nabandaki koyebisa baninga na ngai solo ya Biblia oyo nazalaki koyekola. Mingi na bango bazalaki kosɛka ngai mpo na makambo oyo nazalaki koyebisa bango, kasi, yango esalisaki ngai na ndenge oyo nazalaki komizela na yango te. Ndenge oyo basalaki esalisaki ngai namona ete bazali baninga ya solosolo te. Nayaki komona ete momeseno ya komɛla masanga oyo nakómaki na yango ezalaki mpo na baninga oyo naponaki. Bapɔsɔ nyonso, bazalaki kozela mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo na motema likoló mpo bákende komɛla lisusu.
Nakataki boyokani na baninga yango mpe nazwaki baninga malamu na kati ya Batatoli ya Yehova. Kozala elongo na bango esalisaki ngai mingi, bazalaki mpenza kolinga Nzambe na motema moko, mpe bazalaki koluka kotosa mibeko na ye na bomoi na bango. Mokemoke, nalongaki kotika ezaleli na ngai ya komɛla masanga mingi.
MATOMBA OYO NAZWI: Natɔndaka Yehova ndenge nazalaka lisusu te na mposa ya komɛla masanga mpo nazala na esengo. Nayebi te soki elingaki kosukela ngai ndenge nini soki nakobaki kaka na bizaleli na ngai ya kala. Kasi, nandimi mpenza ete bomoi na ngai ekómi sikoyo malamu mingi.
Ekoki sikoyo mbula nsambo banda nazwaki libaku ya kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo Slovénie. Koyeba Yehova mpe kosalela ye epesi ntina mpenza na bomoi na ngai.