Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/7 nk. 12-15
  • Biblia ebongolaka bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ebongolaka bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/7 nk. 12-15

Biblia ebongolaka bato

NINI esalisaki mwasi moko ya ekólo Philippines atika kolangwa masanga mpe abongisa bomoi ya libota na ye? Mpo na nini moto moko ya ekólo Australie oyo azalaki kolinga lisano ya karate akómaki mosakoli ya nsango malamu? Tótánga makambo oyo bato yango balobi.

“Nabongwanaki na mokolo moko te.”​—CARMEN ALEGRE

ABOTAMAKI NA: 1949

EKÓLO: PHILIPPINES

BOMOI NA YE YA KALA: MOLANGWI MASANGA

NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na San Fernando, engumba moko ya etúká ya Camarines Sur. Ntango nakómaki mokóló, nafandaki mingi na Antipolo, na etúká ya Rizal. Lokola etúká yango ezalaka ngombangomba, na matiti mpe banzete mingi, mbala ya liboso oyo nakomaki kuna, Antipolo ezalaki engumba moko moke mpe bato bazalaki mingi te. Ezalaki mpasi komona moto azali kotambola libándá na butu. Kasi lelo oyo, Antipolo ekómá engumba moko monene mpe bato mingi bakómá kofanda kuna.

Mwa moke nsima ya kokóma na Antipolo, nakutanaki na mobali moko nkombo na ye Benjamin, mpe na nsima tobalanaki. Namonaki ete libala ezalaki mpasi koleka ndenge nazalaki kokanisa. Mpo na kokima mitungisi na ngai, nakómaki komɛla masanga mingi. Nakómaki na bizaleli mabe, yango ezalaki komonana na ndenge oyo nazalaki kosalela mobali na ngai mpe bana na ngai makambo. Nazalaki kokoka komipekisa te, nazalaki mpe kokanga motema na makambo na bango te. Nazalaki komemya mobali na ngai te. Emonani polele ete libota na biso ezalaki na esengo te.

NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Editha, yaya ya mobali na ngai, azali Motatoli ya Yehova mpe asɛngaki ngai ná Benjamin tóyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Tondimaki yango na elikya ete ekosalisa biso tóbongisa bomoi ya libota na biso.

Ntango tozalaki koyekola Biblia, toyebaki ebele ya makambo ya malamu. Maloba oyo ezali na Emoniseli 21:4 esimbaki mpenza motema na ngai. Vɛrsɛ yango elobi ete ntango bato bakofanda na paradiso awa na mabele na Bokonzi ya Nzambe, “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” Nalingaki kozala na kati ya bato oyo bakozwa mapamboli wana.

Na nsima, nayebaki ete nasengeli kobongola mpenza makanisi mpe bizaleli na ngai. Nabongwanaki na mokolo moko te, kasi, nsukansuka natikaki komɛla masanga mingi. Nayekolaki mpe kozala na boboto mpe kokanga motema ntango nazali kosalela bato ya libota na ngai makambo. Longola yango, nakómaki komemya mobali na ngai, kopesa ye mabɔkɔ ntango azali kokamba libota na biso.

Ntango ngai ná Benjamin tokómaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, tokamwaki mingi na makambo oyo tomonaki kuna. Batatoli ya Yehova babɛtaka masano ya mbongo te, balangwaka masanga te mpe baponaka bilongi te. Basalelaka moto nyonso makambo na limemya mpe na bonkonde. Tondimaki mpenza ete tomoni lingomba ya solo.​—Yoane 13:34, 35.

MATOMBA OYO NAZWI: Bomoi ya libota na biso ekómi malamu mpenza. Ngai ná Benjamin tozali lelo na libala ya esengo mpe tosepelaka koteya basusu nsango ya Biblia. Bana na biso mibale ya mibali elongo na basi na bango bakómá mpe koyekola Biblia. Tozali na elikya ete na nsima ya mikolo, bango mpe bakosalela Yehova elongo na biso. Oyo ezali mpenza lolenge ya bomoi oyo eleki malamu.

“Nazalaki komona ete eloko moko te ekoki kolonga ngai.”​—MICHAEL BLUNSDEN

ABOTAMAKI NA: 1967

EKÓLO: AUSTRALIE

BOMOI NA YE YA KALA: ALINGAKI LISANO YA KARATE

NDENGE NAZALAKI: Nakolá na Albury, engumba moko kitoko mpe ya bomɛngo na etúká ya Nouvelle-Galles du Sud. Kaka ndenge mobulu ezalaka na bingumba mosusu, mwa mobulu mpe ezangaka te na engumba Albury. Kasi, eyebani mingi ete engumba yango ezali esika moto akoki kofanda na kimya.

Nakolaki na bomoi moko ya malamu. Atako baboti na ngai babomaki libala ntango nazalaki na mbula nsambo, basalaki nyonso mpo ngai ná bandeko na ngai mibale ya basi mpe moko ya mobali, tózanga eloko te. Nazwaki formasyo ya malamu mpo nazalaki kotánga na eteyelo moko ya lokumu na engumba yango. Tata na ngai alingaki ete namipesa na mombongo ntango nakosilisa kelasi. Kasi, nazalaki kolinga mingi masano, mpo nayebaki velo malamu mpenza mpe nayebaki lisano ya karate. Nsukansuka, nazwaki mosala na esika oyo babongisaka mituka, mpe yango epesaki ngai ntango mpo namipesa mingi na masano oyo nazalaki kolinga.

Nazalaki komona ete kozala elombe ezali lokumu. Na nsima, nazalaki komona ete eloko moko te ekoki kolonga ngai. Lokola nazalaki makasi, ezalaki mpasi te mpo namonela bato. Kasi, lokola molakisi na ngai ya lisano ya karate ayebaki ete nazali kobunda mpenza mpo nasalela makasi na ngai na ndenge ya mabe te, ateyaki ngai kozala na disiplini mpe bizaleli ya malamu. Azalaki ntango nyonso koloba nasengeli kotosa mpe kozala sembo.

NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nabandaki koyekola Biblia, nayebaki ete Yehova ayinaka mobulu. (Nzembo 11:5) Liboso, nazalaki kokanisa ete karate ezali lisano ya mobulu te mpe esalemaka na ndenge ya malamu. Nazalaki komona ete bizaleli mpe mibeko oyo lisano ya karate ezali kosɛnga, eyokani na oyo Biblia eteyaka. Mwasi ná mobali oyo bazalaki koyekola na ngai Biblia bamoniselaki ngai mpenza motema molai. Ata mokolo moko te bayebisaki ngai natika lisano ya karate; bakobaki kaka koteya ngai solo ya Biblia.

Lokola boyebi na ngai ya Biblia ezalaki kobakisama mpe boninga na ngai ná Yehova ezalaki kokóma makasi, lolenge na ngai ya kotalela makambo ebongwanaki. Ndakisa oyo Yesu, Mwana ya Yehova atiká, ekamwisaki ngai mpenza. Atako Yesu azalaki na nguya mingi, asalelaki te makasi na ye mpo na kobimisa mobulu. Maloba na ye oyo ezali na Matai 26:52 esimbaki mpenza motema na ngai. Elobi boye: “Baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.”

Ntango nayebaki Yehova malamu, nakómaki kolinga ye mingi lisusu mpe komemya ye. Koyeba ete Mozalisi na biso, oyo atondi na bwanya mpe na nguya, atyelaka ngai likebi esepelisaki ngai makasi. Ntango nayebaki ete ata soki nayokisi Yehova motema mpasi to namoni lokola ete makambo na ye ezali makasi mpe namoni ete natika ye, ye akosundola ngai te ntango nyonso oyo nakoluka kozongela ye, yango esimbaki mpenza motema na ngai. Nabɔndisamaki makasi na elaka oyo: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’” (Yisaya 41:13) Ntango nayebaki ete Yehova amoniselaki ngai bolingo ya ndenge wana, nalingaki te kotika yango ekende kaka boye.

Nayebaki ete kotika lisano ya karate ezali likambo ya mpasi mingi mpo na ngai. Kasi, nayebaki mpe ete yango ekosepelisa Yehova mpe nandimaki ete kosalela ye eleki nyonso. Nsukansuka, nandimaki maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:24, oyo elobi: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale.” Namonaki ete nakokoka te kosalela Yehova na motema mobimba mpe kokoba na lisano ya karate, mpo lisano yango nde ekozwa esika ya liboso. Ntango ekokaki mpo napona nkolo na ngai.

Kotika lisano ya karate ezalaki pɛtɛɛ te. Makanisi ndenge na ndenge ezalaki kotungisa ngai. Koyeba ete nazali kosepelisa Yehova, epesaki ngai esengo. Kasi nayokaki mpe lokola ete natɛki molakisi na ngai ya lisano ya karate. Mbala mingi, baoyo basalaka masano ya kobunda bamonaka ete kotɛka moninga, ezali lisumu oyo ekoki kolimbisama te. Basusu baponaka kutu komiboma na esika ya kondima nsɔni wana.

Nazalaki komona te ndenge ya koyebisa molakisi na ngai ya lisano ya karate ntina oyo natiki yango. Kutu, nakendaki kaka, natikaki kosolola na ye mpe baninga na ngai mosusu ya lisano ya karate. Nayebaki ete nasali malamu ndenge natikaki lisano ya karate. Atako bongo, nayokaki mpe lokola namemi ngambo mpo nalobelaki te mateya ya sika oyo nayekolaki; nabungisaki mpenza libaku ya koyebisa basusu kondima na ngai. Nayokaki lokola nayokisi Yehova nsɔni liboso kutu nabanda kosalela ye. Makambo nyonso wana ezalaki kotungisa ngai. Mbala mingi nazalaki komeka kobondela Yehova, kasi mabondeli yango ezalaki kosuka na kolela mpo na mpasi oyo nazalaki koyoka na motema.

Yehova amonaki eloko moko ya malamu epai na ngai, yango wana atindaki bandeko mibali mpe basi ya lisangá básalisa ngai. Bolingo na bango, libɔndisi na bango mpe boninga oyo basalaki elongo na ngai elekelaki ngai. Nazwaki mpe libɔndisi na lisolo ya Davidi ná Bate-sheba oyo ezali na Biblia. Atako Davidi asalaki masumu minene, Yehova alimbisaki ye ntango abongolaki motema. Kokanisa lisolo yango esalisaki ngai natalela mabunga na ngai moko na ndenge ebongi.

MATOMBA OYO NAZWI: Liboso nabanda koyekola Biblia, nazalaki mpenza kokipe bato mosusu te, nazalaki kotala kaka matomba na ngai moko. Kasi, na lisalisi ya Yehova mpe ya mwasi na ngai oyo tobalani na ye eleki sikoyo mbula nsambo, nakómá komitya na esika ya basusu. Tozwaki mapamboli, toyekolaki Biblia na bato mingi, ata na baoyo bazalaki na mikakatano makasi. Komona ndenge bolingo ya Yehova ezali kosimba bomoi ya bato mosusu ememeli ngai esengo mingi koleka kozala elombe ya lisano ya karate.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

“Koyeba ete Mozalisi na biso, oyo atondi na bwanya mpe na nguya, atyelaka ngai likebi esepelisaki ngai makasi”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 15]

“Matɔndi mingi mpo na masolo kitoko oyo!”

Osepeli na botángi ya masolo ya bomoi ya bato oyo? Oyo ezali kaka masolo mibale na kati ya masolo 50 oyo esilá kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, kobanda na sanza ya Augusto 2008. Batángi na biso bakómi kosepela mingi na masolo oyo elobi: “Biblia ebongolaka bato.” Mpo na nini bato mingi bazali kosepela na yango mingi?

Bato oyo balobelami na masolo yango bauti na mikili ndenge na ndenge. Liboso báyekola makambo ya Yehova Nzambe, basusu bazalaki na bomɛngo kasi bomoi na bango ezalaki mpenza na ntina te. Basusu bazalaki na mikakatano makasi, na ndakisa, bazalaki na nkanda makasi to kolangwa masanga to mpe komɛla bangi. Mwa ndambo na bango bazalaki na baboti oyo babɔkɔlaki bango na mateya ya Yehova, kasi na nsima, batikaki kosambela ye. Bandakisa wana nyonso emonisi ete moto akoki kobongwana mpo na kosepelisa Nzambe. Mpe kosala bongo ezalaka ntango nyonso na matomba. Ndenge nini masolo yango ezali kosalisa batángi na biso?

Motángi moko alobi ete lisolo oyo ebimaki na nimero ya 1 Febwali 2009, esalisaki basi mosusu oyo bazalaki na bolɔkɔ.

◼ Alobi boye: “Basi mingi na kati ya basi yango ya bolɔkɔ bakutanaki na makambo ndenge moko na bato oyo balobelami na lisolo yango. Bafɔtɔ oyo emonisi ndenge bato yango ‘bazalaki liboso’ mpe ndenge ‘bakómaki na nsima,’ na mpe bomoi oyo bazalaki na yango liboso bábongwana, esalisaki mpenza. Bomoi ya bato mingi ya bolɔkɔ ekokani na oyo ya bato yango. Nsima ya kotánga masolo yango, bato mibale ya bolɔkɔ bakómaki koyekola Biblia.”​—C. W.

Makambo ya bomoi ya bato oyo balobeli na masolo yango esimbaki mpenza mitema ya batángi mosusu. Na ndakisa, lisolo oyo elobelami na nimero ya 1 Aprili 2011, oyo elobeli Guadalupe Villarreal, mobali oyo atikaki kosangisa nzoto na mibali mpo na kosalela Yehova. Talá kaka mikanda mibale na kati ya mikanda ebele oyo batángi na biso bakomelaki biso mpo na lisolo yango.

◼ “Lisolo ya Guadalupe esimbaki mpenza motema na ngai. Ezali mpenza likambo ya kokamwa komona ndenge kolinga Yehova mpe Liloba na ye ekoki kobongola mpenza bomoi ya moto!”​—L. F.

◼ “Liboso, nazalaki koteya moto nyonso nsango malamu, ata mpe mibali oyo basangisaka nzoto na mibali. Atako bongo, nayaki komona ete nazalaki kozwa bato yango na valɛrɛ te, kutu nazalaki nde kokima bango. Lisolo ya Guadalupe ebongaki mpenza na ngai. Esalisi ngai namona bato yango ndenge Yehova amonaka bango, elingi koloba, bato oyo bakoki kosambela ye mokolo mosusu.”​—M. K.

Lisolo mosusu oyo esepelisaki batángi mingi ezalaki oyo ya Victoria Tong, oyo ebimaki na nimero ya 1 Augusto 2011. Victoria alobelaki ndenge abɔkwamaki, babɔkɔlaki ye na mpasi. Alobaki ete azalaki na mokakatano ya kondima ete Yehova alingaka ye, ata nsima ya bambula mingi ya kosalela ye. Alobelaki likambo oyo esalisaki ye andima bolingo ya Yehova. Talá oyo batángi mosusu balobi mpo na lisolo na ye.

◼ “Lisolo ya Victoria esimbaki mbala moko motema na ngai. Nakutanaki na ebele ya makambo ya mpasi na bomoi na ngai. Nabundaka ntango nyonso na makanisi ya mabe, ata bambula mingi nsima ya kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova. Kasi, lisolo ya Victoria etindi ngai nasala lisusu makasi mpo na komona oyo Yehova amonaka epai na ngai.”​—M. M.

◼ “Ntango nazalaki elenge, nazalaki moombo ya pornografi, mpe natikaki momeseno yango. Eumeli te, nazongelaki lisusu momeseno yango. Nalukaki lisalisi ya bankulutu na lisangá, mpe nasali milende mpo na kolonga likambo yango. Bankulutu bakitisaki ngai motema ndenge bayebisaki ngai ete Yehova alingaka ngai mpe ayokelaka ngai mawa. Atako bongo, namonaka kaka lokola nazangi ntina, lokola nde Yehova akoki te kolinga ngai. Kotánga lisolo ya Victoria esalisaki ngai mpenza. Sikoyo namoni ete ntango nakanisaka ete Nzambe akoki te kolimbisa ngai, ezali lokola nde nazali koloba ete mbeka ya Mwana na ye ekoki te kozipa masumu na ngai. Nakataki lokasa ya lisolo yango mpo nakoka kotángaka yango mpe komanyola yango ntango makanisi ya mabe eyeli ngai. Matɔndi mingi mpo na masolo kitoko oyo!”​—L. K.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto