Mituna ya batángi . . .
Mpo na nini Nzambe asɛngaki basambeli na ye bábalana kaka bango na bango?
▪ Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele ezalaki mpe na oyo etalelaki bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango: “Osengeli kosala kondimana ata moko te ya libala ná bango. Osengeli te kopesa mwana na yo ya mwasi na mwana na ye ya mobali, mpe osengeli te kozwa mwana na ye ya mwasi mpo na mwana na yo ya mobali.” (Kolimbola Mibeko 7:3, 4) Mpo na nini Nzambe apekisaki likambo yango?
Yehova ayebaki ete Satana alingaki kobungisa bato ya libota na ye mobimba nzela, kotinda bango básambela banzambe ya lokuta. Yango wana, Nzambe akebisaki ete moto oyo azali mondimi te “akopɛngwisa mwana na yo ya mobali mpo atika kolanda ngai, mpe bakosalela mpenza banzambe mosusu.” Likama ezalaki. Soki bato ya ekólo Yisraele basambeli banzambe mosusu, Nzambe ya solo akondima bango lisusu te mpe akobatela bango te, ekozala mpasi te mpo bákwea na mabɔkɔ ya banguna na bango. Boye, ndenge nini ekólo yango elingaki kobimisa Masiya oyo alakamaki? Emonani polele ete Satana azalaki na ntina mpenza ya kotinda Bayisraele bábala bato oyo bazalaki kosambela Yehova te.
Kobosana te ete Nzambe akipaka mosaleli na ye mokomoko. Ayebi ete mpo mokomoko na bango azala na esengo mpe bolamu, esengeli azala na boyokani malamu elongo na ye. Yehova azalaki nde na ntina ya komitungisa mpo na likama oyo molongani oyo azali mondimi te akoki kobimisela mosambeli na ye? Tótalela ndakisa ya Mokonzi Salomo. Ayebaki likebisi ya Yehova oyo etali basi oyo bazali bandimi te: “Bakobenda motema na bino mpo na kolanda banzambe na bango.” Lokola azalaki na bwanya mingi, ntango mosusu akanisaki ete ezali na ntina te alanda toli ya Nzambe, mpe ete toli yango etali ye te. Akipaki kutu yango te. Nini emonanaki? “Mokemoke, basi na ye babendaki motema na ye . . . mpo na kolanda banzambe mosusu.” Oyo nde mawa! Yehova andimaki lisusu Salomo te, mpe lokola azalaki sembo te bato ya ekólo na ye bakabwanaki.—1 Bakonzi 11:2-4, 9-13.
Basusu bakoki koloba ete bato mosusu babalaki bandimi te kasi bakutanaki na likambo ya bongo te. Na ndakisa, Mahalone azalaki Moyisraele, kasi abalaki Ruta, moto ya Moabe, mpe mwasi yango akómaki mondimi. Kasi, kopona kobala basi ya Moabe ezalaki likama. Bakumisi Mahalone te mpo abalaki mwasi ya Moabe; akufaki ntango azalaki naino elenge, liboso kutu Ruta asambela Yehova. Kilione, ndeko ya Mahalone, abalaki Orpa, moto ya Moabe, oyo akobaki kokangama na “banzambe na ye.” Nzokande, Boaze abalaki Ruta mwa bambula nsima ya ntango oyo Ruta akómaki kosambela Yehova. Kutu na nsima, Bayuda bakómaki kotalela ye lokola “prozelite ya solosolo.” Libala ya Ruta ná Boaze ezalaki lipamboli mpo na bango mibale.—Ruta 1:4, 5, 15-17; 4:13-17.
Ebongi mpenza tókanisa ete ndakisa ya Mahalone ná Ruta ekweisi toli ya Yehova ya kobala kaka bato oyo basambelaka ye? Kokanisa bongo ekozala mpenza lokola kolakisa moto oyo azwi mbano monene na lisano ya mbongo mpe koloba ete kobɛta lisano ya mbongo nde ezali lolenge eleki malamu mpo moto abonga na bomoi na ye.
Biblia esɛngi bakristo lelo oyo bábala “na kati ya Nkolo kaka.” Epesi likebisi na likambo etali “ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.” Toli yango etaleli mpenza mokristo nyonso ya solo oyo azali koluka molongani. Mpo na baoyo basilá kobala bato oyo bazali bandimi te, Biblia epesi toli oyo ekoki kosalisa bango na ndenge ya kolonga malamu mokakatano yango. (1 Bakorinti 7:12-16, 39; 2 Bakorinti 6:14) Toli nyonso wana emonisi ete Yehova Nzambe, mobandisi ya libala, alingi ete biso basambeli na ye tózala na esengo, ezala tobalá to te.