“Istware ekosaka te”
Na 2007, na mokolo ya 14 ya sanza ya Yuni, biro ya posita ya ekólo Estonie ebimisaki mokanda ya kokanisa makambo oyo eleká oyo batyá kashɛ ya posita; oyo ezali awa na lobɔkɔ ya mobali. Mokanda yango ezalaki mpe na maloba oyo: “Mokanda oyo ya suvenire ebimisami mpo na kokanisa bato oyo bakufaki ntango Staline alukaki kosilisa bato ya Estonie.” Kobanda 1941 tii 1951, bamemaki na makasi bankoto ya bato ya Estonie na mboka mopaya.
“ISTWARE ekosaka te.” Maloba yango eyebani mingi na Estonie, bato ya mikili mosusu mpe balobaka maloba lokola oyo wana. Ya solo, tokoki te kobongola makambo oyo eleká, kasi, tokoki mpenza kozwela yango liteya. Salomo mokonzi ya mayele alobaki boye: “Namoni makambo mana manso mpe natii motema mpo nayeba manso makosalemaka o mokili, awa moto moko azali na nguya ya kokonza moto mosusu mpe ya koyokisa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9, Biblia Liloba lya Nzambe.
Makambo oyo esalemaki na Estonie mpe na bisika mosusu ya mikili ya mpoto ya ɛsti eleki sikoyo mwa bambula, emonisi ete maloba ya vɛrsɛ oyo ezali mpenza solo. Boyangeli ya bato enyokolaki ebele ya bato oyo basali eleko te, oyo bamemaki bango na makasi na bamboka ya mosika mpo báfanda kuna to batyaki bango na bakaa ya bakangami oyo esalisaka bato misala makasi.
Bato ya istware ya mboka yango balobi ete kobanda 1941 tii 1951 balongolaki basivile koleka 46 000 na Estonie mpe bamemaki bango na bisika mosusu. Bamemaki mingi kati na bango mpo bazalaki bato ya lingomba ya politiki boye to boye, basusu mpo na bikólo na bango to mpo bazalaki bazwi to babola. Kasi, bamemaki Batatoli ya Yehova mpo na losambo na bango.
Babundisi basaleli ya Nzambe
Na ankɛtɛ oyo Iniversite moko (Tartu University Press) esalaki na 2004, Aigi Rahi-Tamm moto moko ya istware alobi boye: “Kobanda 1948 tii 1951, bakangaki Batatoli ya Yehova 72, ná bato oyo bazalaki koyangana elongo na bango. Kasi, komema ebele ya bato na makasi ebongisamaki na mokolo ya 1 Aprili 1951, esalemaki kaka te na bamboka ya Baltes, kasi mpe na Moldavie, wɛsti ya Ukraine mpe na Belarus.”
Liboso ya mobu 1951, bazalaki kokanga Batatoli ya Yehova na Estonie, kotungisa makanisi na bango, kotunatuna bango mituna, mpe kokɔtisa bango na bolɔkɔ. Emonani ete kampanye yango ya sika ya komema bato na bamboka mosusu ezalaki mpenza na mokano ya kosilisa Batatoli ya Yehova na Estonie.
Dati ya 1 Aprili 1951 ezali na kashɛ ya mokanda oyo tolobeli awa na likoló. Motángo 382 oyo ezali na mokanda yango elakisi motángo ya Batatoli ya Yehova ná bana na bango oyo bamemaki bango mokolo wana. Na motángo yango, ezali mpe na bandeko mpe bato ya kartye oyo bazalaki Batatoli te. Na boumeli ya mokolo yango, bazalaki kokanga bato na ekólo yango mobimba. Kaka na butu yango, bakɔtisaki bilenge mpe mikóló oyo bakangaki, na bawagɔ ya engbunduka oyo batyaka banyama oyo ezalaki kokende na Sibérie.
Ella Toom
Ella Toom,a oyo na ntango wana azalaki na mbula 25, azalaki mpe Motatoli ya Yehova. Alobi boye mpo na mituna oyo batunaká ye na ntango wana: “Mokonzi moko ya basoda alukaki kobangisa ngai mpe asɛngaki ngai natika kosakola. Atunaki ngai boye: ‘Olingi bomoi? To olingi nde kokufa ná Nzambe na yo na Sibérie?’” Ata bongo, Ella akobaki kosakola nsango malamu na mpiko nyonso. Batindaki ye na Sibérie mpe asalaki misala ya makasi na bakaa ndenge na ndenge na boumeli ya mbula koleka motoba.
Hiisi Lember, elenge mwasi moko Motatoli ya Yehova azalaki mpe na kati ya ebele wana ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya kozanga kosambisama. Alobi boye mpo na makambo oyo esalemaká na mokolo ya 1 Aprili 1951: “Bayaki na butu na mbalakaka, balobaki na biso boye: ‘topesi bino kaka miniti 30. Bókangisa biloko na bino!’” Na butu yango, mpe na ndenge ya kobombana, bamemaki Hiisi ná mwana na ye ya mwasi oyo azalaki na mbula motoba na esika oyo bazwaka engbunduka. Engbunduka yango ya kimbambala ezalaki kokende na bagare mpe kozwa ebele ya Batatoli ya Yehova. “Babwakaki biso na bawagɔ oyo ememaka banyama. Mwa malamu mpo nyɛi ya banyama yango ezalaki ya kokangama mpo na malili; soki bongo te, mbɛlɛ elingaki kozala mpasi kotɛlɛma likoló na yango. Tozalaki lokola banyama oyo batondisi bango na conteneur.”
Mobembo wana ya pɔsɔ mibale mpe ya mpasi na kati ya engbunduka, ezalaki nsɔmɔ! Bato batondaki na kati ya bawagɔ yango mpe ezalaki mpenza bosɔtɔ. Ezala bilenge to mikóló, tosambwisamaki mpe tosilaki mpenza valɛrɛ. Bamosusu bazalaki kolela mpe baboyaki kolya. Kasi, Batatoli ya Yehova bazalaki kolendisana mpe kosalisana, koyemba banzembo ya losambo, mpe bazalaki kolya esika moko. Batindaki bango na “esika oyo bakofanda libela” mpe bayebisaki bango ete “bakei mobembo ya libela.”
Hiisi Lember ná Maaja, mwana na ye
Hiisi abosanaka te lisungi oyo bandeko na ye Batatoli ya Yehova bapesaki ye na motema moko na boumeli ya ntango wana ya mpasi; alobi boye: “Na gare moko, engbunduka na biso etɛlɛmaki nsima ya engbunduka moko oyo eutaki Moldavie. Na efelo ya wagɔ, toyokaki ndenge mobali moko azalaki kotuna soki tozalaki banani mpe tozalaki kokende wapi. Toyebisaki ye ete toyebi te esika tozali kokende mpe tozali Batatoli ya Yehova ya Estonie. Bandeko na biso Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na engbunduka oyo eutaki Moldavie bayokaki masolo yango. Na lidusu moko ya wagɔ yango, babwakelaki biso eteni moko monene ya limpa mpe mwa bambuma ya kolya.” Abakisaki boye: “Na ntango wana, toyaki koyeba ete bakangaki kaka biso moko te, kasi bakangaki nde Batatoli ya Yehova na ekólo mobimba ya Russie!”
Bilenge mibale ya basi Corinna ná ndeko na ye Ene, bakabwanaki na mama na bango na boumeli ya mbula koleka motoba. Mama na bango, oyo azalaki mpe Motatoli ya Yehova, bakangaki ye liboso mpe batindaki ye na kaa oyo bazalaki kosalisa bato misala makasi. Na nsima, na butu wana ya mabe na sanza Aprili, babimisaki bilenge basi yango nokinoki na ndako na bango mpe babwakaki bango na wagɔ ya banyama. Na bɔtɔndi nyonso, Corinna alobi, “na engbunduka yango, Motatoli moko oyo azalaki na bana mibale andimaki kobatela biso mpe ayebisaki biso ete tokofanda esika moko na ye ná bana na ye.”
Nini esalemaki ntango tokómaki na esika bazalaki komema biso? Nsima ya kokóma na esobe ya Sibérie, mokolo oyo elandaki “zando ya kotɛka baombo” efungwamaki. Mibali oyo bazalaki na baferme oyo ezalaki pene bayaki kopona basali mpo na kosala na baferme na bango. Corinna alobi lisusu boye: “Tozalaki koyoka ndenge bazalaki koswana mpe koloba: ‘Yo osí ozwi sofɛlɛ mpo na kokumba traktɛrɛ na yo. Oyo azali ya ngai,’ to ‘nasí nazwi mikóló mibale. Ebongi ozwa mpe mikóló mosusu.’”
Ene ná ndeko na ye, Corinna
Corinna ná Ene bazalaki bilenge basi ya mpiko. Na nsima balobaki boye: “Tozalaki mpenza na mposa ya komona mama, mpo tóyambana na ye lisusu!” Ata bongo, bakobaki kolinga Nzambe makasi mpe bazalaki kosɛkisa bato mingi. Corinna abakisi boye: “Epai mosusu, ezalaki malamu ndenge mama amonaki biso te, mpo na bantango mosusu tozalaki kosala mosala na libanda, na malili makasi kozanga kolata bilamba oyo esengeli.”
Na ntembe te, basalelaki bato oyo basalaki likambo te makambo na kozanga bosembo, ezala na Estonie to na bisika mosusu, Batatoli ya Yehova mpe bazalaki na kati ya bato yango. (Talá etanda “‘Kobanga moko makasi’ mpenza.”) Atako banyokolaki bango ndenge wana, Batatoli ya Yehova na Estonie bazali kaka kokoba na mosala na bango mpe bazali bato moko ya esengo.
Avenire moko ya malamu ezali liboso
Biblia eyebisi biso ete Yehova Nzambe ayinaka kozanga bosembo. Elobi boye: “Moto nyonso oyo azali kosala makambo wana, moto nyonso oyo azali kosala makambo oyo ezali sembo te, azali eloko moko oyo Yehova Nzambe na yo ayiná.” (Kolimbola Mibeko 25:16) Atako Nzambe atiká mabe ezala, mosika te ntango ekokoka mpo asukisa makambo ya kozanga bosembo mpe ya mabe. Mokomi ya nzembo alobi boye: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”—Nzembo 37:10, 11.
Ya solo, avenire moko ya malamu ezali kozela biso! Atako tokoki te kobongola makambo oyo eleká, tokoki kosala makambo mosusu sikoyo mpo avenire na biso ezala malamu. Pusaná penepene na Nzambe mpe luká koyeba ndenge oyo okoki kozala na avenire wana ya malamu, ntango bosembo ya solosolo ekozala.—Yisaya 11:9.
a Lisolo ya bomoi ya ndeko Ella Toom ebimaki na Lamuká! ya Yuli 2006, na nkasa 20 tii 24.