Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/4 nk. 3-4
  • Mpo na nini koyekola Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini koyekola Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini osengeli kotyela Biblia likebi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Programɛ ya koyekola Biblia mpo na moto nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Biblia ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/4 nk. 3-4
Mobali oyo azali kotánga Biblia na bibliotɛkɛ na ye

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOSEPELA KOYEKOLA BIBLIA?

Mpo na nini koyekola Biblia?

  • Ntina ya bomoi ezali nini?

  • Mpo na nini bato banyokwamaka mpe bakufaka?

  • Bomoi ya bato ekozala ndenge nini na avenire?

  • Nzambe akipaka ngai mpenza?

Omituná naino te mituna lokola oyo wana? Soki ɛɛ, ozali yo moko te. Na mokili mobimba, bato mingi bamitunaka mituna minene etali bomoi. Biyano na mituna yango ezali?

Bamilio ya bato bakoloba, “Ɛɛ!” Mpo na nini? Mpo bazwá biyano ya malamu na mituna na bango na Biblia. Okosepela koyeba oyo Biblia elobi? Boye, okoki kozwa matomba na programɛ ya koyekola Biblia ofele elongo na Batatoli ya Yehova.a

Soki basɛngi bango báyekola Biblia, bato mosusu balobaka boye: “Nazali na makambo mingi ya kosala.” “Ezali mpasi mingi.” “Naboyi komitya nsinga na nkingo.” Kasi bamosusu balobaka bongo te. Bandimaka koyekola Biblia mpo na koyeba oyo yango eteyaka. Tózwa mwa bandakisa:

  • “Nakɔtá Lingomba ya Katolike, ya Protesta, tempelo Sikh, monastɛrɛ ya Buda mpe nayekolaki teoloji na iniversite. Kasi, nazwaki biyano te na mituna mingi oyo nazalaki komituna mpo na Nzambe. Na nsima, Motatoli ya Yehova moko ayaki na ndako na ngai. Nakamwaki ndenge azalaki koyanola mituna na ngai na Biblia, yango wana nandimaki koyekola Biblia.”​—Gill, Angleterre.

  • “Nazalaki na mituna mingi etali bomoi, kasi biyano oyo pastɛrɛ apesaki ngai esepelisaki ngai te. Kasi, Motatoli ya Yehova moko asalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai. Ntango atunaki ngai soki nakosepela koyeba makambo mosusu, nandimaki na esengo nyonso.”​—Koffi, Bénin.

  • “Nalingaki koyeba ndenge moto akómaka soki akufi. Nazalaki kondima ete bato oyo bakufá bakoki kosala bato ya bomoi mabe, kasi nalingaki koyeba oyo Biblia elobaka. Yango wana, nakómaki koyekola Biblia ná moninga moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova.”​—José, Brésil.

  • “Namekaki kotánga Biblia kasi nakangaki ntina na yango te. Na nsima, Batatoli ya Yehova bayaki epai na ngai mpe balimbolelaki ngai bisakweli mingi ya Biblia. Nalukaki mpe koyeba makambo mosusu.”​—Dennize, Mexique.

  • “Nazalaki komituna soki Nzambe akipaka ngai mpenza. Yango wana, nazwaki ekateli ya kobondela Nzambe ya Biblia. Mokolo oyo elandaki, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ngai mpe nandimaki koyekola Biblia.”​—Anju, Népal.

Makambo nyonso oyo bato yango balobi etindi biso tókanisa maloba ya Yesu oyo: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Ya solo, Nzambe asalá bato na mposa ya koyeba ye. Kaka Nzambe nde akoki kokokisa mposa yango mpe asalaka yango na nzela ya Liloba na ye, Biblia.

Koyekola Biblia esɛngaka nini? Ndenge nini okoki kozwela yango litomba? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.

MAKAMBO ETALI BIBLIA

Biblia ya kofungwama
  • NKOMBO: Liloba bi·bliʹa, euti na Grɛki mpe elimboli “babuku mike”

  • MIKANDA: Ezali na mikanda 39 oyo ekomamaki na Ebre (bavɛrsɛ mosusu na Aramɛyɛ) mpe mikanda 27 na Grɛki

  • EKOMAMAKI: Na bato soki 40, na boumeli ya mbula soki 1 600, kobanda na mobu 1513 L.T.B. tii na mobu soki 98 T.B.b

  • MINƆKƆ: Ebongolami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 2 500

  • KOKABOLAMA: Babiblia miliare soki 5 esili kokabolama, yango esali ete ezala buku oyo ekabolami mingi na mokili mobimba

b L.T.B. elimboli “liboso ya ntango na biso,” mpe T.B. elimboli “ntango na biso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto