Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/10 nk. 8-9
  • Bokonzi ya Nzambe ekozala na ntina nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ekozala na ntina nini mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe—Mpo na nini ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Osengeli koluka liboso Bokonzi ya Nzambe lelo oyo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/10 nk. 8-9
Mobali moko ná mwasi na ye bazali koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe na Biblia

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BOKONZI YA NZAMBE​—EZALI NA NTINA NINI MPO NA YO?

Bokonzi ya Nzambe ekozala na ntina nini mpo na yo?

Ndenge omoni yango na masolo oyo eleki, Batatoli ya Yehova bazwaka Bokonzi ya Nzambe na ntina mingi. Mbala mosusu mapamboli oyo touti kolobela, oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa esepelisi yo. Kasi, okoki mpe komituna soki bilaka kitoko wana ekokokisama mpenza.

Ezali malamu kozala ekɛngɛ na esika ya kondima likambo nyonso oyo oyoki. (Masese 14:15) Okokokana na bato ya Beroyaa oyo bazalaki mpe ekɛngɛ. Ntango bayebisaki bango nsango malamu ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso, bandimaki makambo bayokaki, kasi kaka te mpo balingaki ete nsango yango ezala solo. Kutu, batalelaki malamumalamu Makomami “mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo.” (Misala 17:11) Na maloba mosusu, bato ya Beroya bakokanisaki nsango malamu oyo bayokaki ná oyo Makomami elobaka. Na nsima, bandimaki ete nsango malamu yango eutaki mpenza na Liloba ya Nzambe.

Na esengo nyonso, Batatoli ya Yehova basɛngi yo osala mpe bongo. Na nzela ya programɛ ya koyekola Biblia ofele, topesi yo libaku ya kotala oyo Batatoli ya Yehova bandimaka na ntina etali Bokonzi ya Nzambe mpe oyo Biblia eteyaka.

Longola koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe, boyekoli ya Biblia ekosalisa yo ozwa mpe biyano na mituna mosusu ya ntina mingi oyo etali bomoi.

  • Toutá wapi?

  • Ntina ya bomoi ezali nini?

  • Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

  • Nini ekómelaka mpenza moto soki akufi?

  • Mabele ekobomama?

  • Esɛngaka nini mpo na kozala na libota ya esengo?

Na nyonso, koyekola Biblia ekosalisa yo ‘opusana penepene na Nzambe.’ (Yakobo 4:8) Ntango ozali kopusana penepene na Nzambe, ekosala ete omona mpenza ndenge Bokonzi ya Nzambe ekomemela yo bolamu lelo mpe mpo na libela. Yesu alobaki na Tata na ye boye na libondeli: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Batatoli ya Yehova bakoki kosalela buku oyo mpo na koyekola na yo Biblia.

Soki olingi koyekola Biblia ofele, tuná Motatoli moko ya Yehova to tondisá formilɛrɛ oyo ezali na www.pr2711.com. (Fungolá esika bakomi SƐNGÁ KOYEKOLA BIBLIA na lokasa ya ebandeli)

a Beroya ezalaki engumba moko ya Masedonia.

Ntina oyo alingaka Bokonzi ya Nzambe

Folake

Na mikolo oyo euti koleka, bapesaki Fo- lake, elenge mwasi moko ya mbula 10 devuare na eteyelo na bango mpo na kokoma lisolo oyo titre na yango ezalaki “Eloko oyo nalingaka mingi na mokili.” Folake asepelaki kolobela ntina oyo alingaka koyebisa basusu makambo etali Bokonzi ya Nzambe.

Folake alimbolaki boye: “Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo. Kasi emonanaka te, yango wana bokoki komona yango te ata soki bolati manɛti!”

Folake akomaki mapamboli oyo Bokonzi yango ekomema, mingimingi oyo ye moko azelaka mpenza ekokokisama. Atángaki mwa makambo oyo Bokonzi yango ekosilisa; akomaki boye: “Epesaka ngai mawa ntango namonaka bato oyo bazangá ndako balali na balabala,” ezala mpe “bana oyo bakufaka na nzala na mokili mobimba.” Abakisaki boye: “Nazalaka lisusu na esengo ntango natángaka Yisaya 65:21.” Mpo na bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, vɛrsɛ yango elaki boye: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.”

Folake alobaki ete azelaka mpe ntango oyo Nzambe, na nzela ya Bokonzi na ye akosilisa maladi nyonso. Na devuare na ye atángaki mpe Emoniseli 21:4, oyo elobi ete Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” Mpo na kosukisa alobaki lisusu ete kolobela makambo etali Yehova mpe Bokonzi na ye ezali eloko oyo alingaka mingi na mokili oyo. Emonani polele ete Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na elenge mwasi oyo!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto