ELOBELI TITRE YA EZIPELI | YESU ABIKISI BISO—NA NINI?
Kokanisa liwa ya Yesu—Ntango nini mpe esika nini?
Na butu ya nsuka liboso báboma ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákanisaka mbeka oyo alingaki kopesa. Alobaki na bango boye: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”—Luka 22:19.
Na mbula oyo, tokokanisa liwa ya Yesu mokolo ya mitano 03/04/2015, nsima ya kolala ya moi. Batatoli ya Yehova babengi yo ná libota na yo bóya koyanga na bango mpo na kolanda diskur oyo ekomonisa mpo na nini liwa ya Yesu ezali na ntina mpe ndenge oyo yango ekoki komemela yo matomba.