Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/7 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Malamu ekolónga mabe mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/7 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mabe eutá wapi?

Yesu aboyaki bokonzi nyonso ya mokili oyo Zabolo alingaki kopesa ye

Nani amekaki kotinda Yesu asala likambo ya mabe?​—Matai 4:8-10

Bato balingaka kozala na kimya na basusu, kozala sembo mpe boboto. Kasi, mpo na nini mbala mingi tomonaka makambo ya mobulu, ya kozanga bosembo mpe ya mabe mpenza? Bansango ya nsɔmɔ mpenza ekómi mingi. Ezali na moto oyo atindaka bato básala mabe?​—Tángá 1 Yoane 5:19.

Nzambe asalá bato na mposa ya kosala mabe? Te, Yehova Nzambe akelaki bato na elilingi na ye, na mposa ya komekola bolingo ya Nzambe. (Ebandeli 1:27; Yobo 34:10) Kasi Nzambe apesá bato lokumu ndenge apesá biso bonsomi ya kopona. Ntango baboti na biso ya liboso baponaki kosala mabe, baboyaki kolanda ndakisa ya Nzambe mpe bakómaki bato ya masumu. Batikelá biso ezaleli wana ya kosala masumu.​—Tángá Kolimbola Mibeko 32:4, 5.

Mabe ekosila mokolo mosusu?

Nzambe alingi ete tótɛmɛla bizaleli na biso ya mabe. (Masese 27:11) Yango wana ateyaka biso ndenge ya koboya kosala mabe mpe ndenge ya kozwa esengo ya solosolo. Ata bongo, mwaye ya komekola lelo bolingo ya Nzambe na ndenge ya kokoka ezali te.​—Tángá Nzembo 32:8.

Atako mabe etondi lelo, Nzambe atiki yango mpo na mwa ntango mpo biso nyonso tómona makambo oyo yango ezali kobimisa. (2 Petro 3:7-9) Kasi, mosika te, mabele ekotonda na bato ya esengo oyo batosaka Nzambe.​—Tángá Nzembo 37:9-11.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto