Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 2 nk. 8-10
  • Bakristo basengeli kosambela na bisika mosantu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakristo basengeli kosambela na bisika mosantu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOSAMBELA NA “ELIMO MPE NA SOLO”
  • NDENGE MOKRISTO ASENGELI KOTALELA BISIKA MOSANTU
  • Nzambe andimaka mabondeli na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Losambo ya nani Nzambe andimaka?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 2 nk. 8-10

Bakristo basengeli kosambela na bisika mosantu?

MBULA nyonso, bato koleka milio 6 basalaka mibembo mosika na zamba ya banzete ya sɛdrɛ na Shima, esanga moko ya Japon. Bakendaka na Ise, esika moko mosantu ya monene, epai basambelaka Amaterasu Omikami, nzambe-mwasi moi Shinto, banda bambula soki 2 000. Bandimi ya lingomba yango babandaka liboso na kosukola mabɔkɔ mpe monɔkɔ mpo na komipɛtola. Na nsima, batɛlɛmaka liboso ya haiden (ndako ya losambo) ya esika mosantu, basalaka milulu lokola kofukama, kobɛta mabɔkɔ mpe kobondela nzambe-mwasi.a Shinto atikaka bandimi na ye básambela banzambe mosusu mpe bandimi mosusu ya Buda, ya bokristo mpe ya mangomba mosusu bamonaka mabe te kosala milulu ya Shinto na esika wana mosantu.

Mangomba mingi ya minene ezalaka na bisika mosantub mpe bamilio ya bato bakendaka kotala bisika yango. Baeglize mpe bisika mosantu oyo basalelá Yesu, Maria mpe basantu ezalaka mingi na mikili oyo emibengaka ya bokristo. Batongá bisika mosusu ya ndenge wana na bisika makambo oyo Biblia elobeli esalemá to na bisika oyo balobaki ete “makamwisi” eutaki kosalema to na bisika oyo babombaka biloko mosantu. Bato mingi bakendaka na bisika yango mpo bakanisaka ete soki babondeli na bisika mosantu Nzambe akoyoka mabondeli na bango. Mpo na bamosusu, kokóma na esika mosantu ezali mobembo molai oyo basalaka mpo na komonisa ete bakangami na Nzambe.

Bapaya oyo bayei na esika mosantu ya monene ya Ise na Japon mpe na Grotto ya Massabielle na Lourdes, France

Bato oyo bayei kotala Ise esika mosantu monene ya Japon mpe Grotte ya Massabielle na Lourdes, France

Nzambe ayokaka mpe ayanolaka mingi mabondeli soki moto akei kosala yango na esika mosantu? Nzambe asepelaka na losambo ya baoyo basalaka mibembo na bisika mosantu? Bakristo basengeli nde kosambela na bisika mosantu? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo tosengeli kotalela losambo na bisika mosantu mpe tóyeba losambo oyo esepelisaka Nzambe.

KOSAMBELA NA “ELIMO MPE NA SOLO”

Yesu azali kosolola na mwasi mosamaria na libulu ya mai

Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete tosengeli kosambela “na elimo mpe na solo”?

Lisolo oyo Yesu asololaki na mwasi Mosamaria emonisi ndenge Nzambe atalelaka losambo na bisika mosantu. Yesu asalaki mobembo na Samaria mpe atɛlɛmaki mpo na kopema na libulu oyo ezalaki pene ya engumba Sikare. Asololaki na mwasi moko oyo ayaki kotoka mai na libulu. Ntango bazalaki kosolola, mwasi yango amonisaki likambo mpenza oyo ekesenisaki Bayuda ná Basamaria. Alobaki boye: “Bankɔkɔ na biso basambelaki na ngomba oyo; kasi bino bolobaka ete na Yerusaleme nde esika oyo bato basengeli kosambela.”​—Yoane 4:5-9, 20.

Ngomba oyo mwasi yango alobelaki ezali Ngomba Gerizime, oyo ezalaki na bakilomɛtrɛ soki 50 na nɔrdi ya Yerusaleme. Basamaria bazalaki na tempelo moko kuna epai bazalaki kosala bafɛti, na ndakisa fɛti ya Pasika. Kasi, na esika alandela makambo oyo ekaboli bango, Yesu alobaki nde na mwasi yango boye: “Mwasi, ndimelá ngai: Ngonga ezali koya wana bato bakosambela Tata na ngomba oyo te na Yerusaleme mpe te.” (Yoane 4:21) Oyo nde maloba ya kokamwa, mingimingi mpo ebimaki na monɔkɔ ya Moyuda! Mpo na nini basengelaki kotika kosambela Nzambe na tempelo ya Yerusaleme?

Yesu abakisaki boye: “Ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Banda basiɛklɛ mingi, Bayuda bazalaki komona ete tempelo kitoko ya Yerusaleme ezalaki esika mpenza ya losambo na bango. Bazalaki kosala mibembo mbala misato na mbula mpo na kopesa Nzambe na bango Yehova bambeka. (Kobima 23:14-17) Kasi Yesu alobaki ete nyonso wana ekobongwana mpe ete “basambeli ya solosolo” bakosambela “na elimo mpe na solo.”

Tempelo ya Bayuda ezalaki ndako oyo etongamaki na esika oyo eyebani. Kasi elimo mpe solo emonanaka na miso te mpe ezalaka na esika moko boye te. Na yango, Yesu alingaki koloba ete losambo ya bakristo ya solo esengelaki te kotalela esika moko boye oyo ezali komonana na miso, na ndakisa Ngomba Gerizime, tempelo ya Yerusaleme to esika mosantu moko boye.

Na lisolo na ye ná mwasi Mosamaria, Yesu amonisaki mpe ete “ngonga” mpo mbongwana yango esalema na losambo ya Nzambe ezalaki “koya.” Ngonga yango eyaki ntango nini? Eyaki ntango Yesu, na nzela ya liwa na ye lokola mbeka, asukisaki losambo ya Bayuda oyo esimbamaki na Mibeko ya Moize. (Baroma 10:4) Kasi, Yesu alobaki mpe boye: “Ngonga . . . ezali sikoyo.” Mpo na nini? Mpo lokola Masiya, azalaki koyanganisa bayekoli na ye oyo bakotosa etinda oyo apesaki: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Kasi, kosambela na elimo mpe na solo elimboli nini?

Ntango Yesu alobelaki kosambela na elimo, alingaki kolobela kotambwisama na elimo santu ya Nzambe oyo esalisaka biso mpe tókanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia. (1 Bakorinti 2:9-12) Solo oyo Yesu alobelaki ezali boyebi ya solosolo ya mateya ya Biblia. Na yango, na esika ya kobondela kaka na esika moko boye ya sipesiale, Nzambe akondima losambo na biso soki eyokani na oyo Biblia eteyaka mpe etambwisami na elimo santu.

NDENGE MOKRISTO ASENGELI KOTALELA BISIKA MOSANTU

Kasi, ndenge nini bakristo basengeli kotalela mibembo na bisika mosantu mpo na kosambela? Na kotalela etinda ya Yesu oyo ete basambeli ya solo basengeli kosambela Nzambe na elimo mpe na solo, ezali polele ete kosambela na bisika mosantu ezali na ntina moko te na miso ya Tata na biso ya likoló. Lisusu, Biblia emonisi ndenge Nzambe atalelaka losambo ya bikeko. Elobi boye: “Bókima losambo ya bikeko” mpe “bókeba na bikeko.” (1 Bakorinti 10:14; 1 Yoane 5:21) Na yango, mokristo ya solo akosambela te na esika nyonso oyo etalelami lokola mosantu to oyo ezali kolendisa losambo ya bikeko. Boye, nakotalela ndenge bato batalelaka bisika mosantu, bakristo ya solo baboyaka kosambela na bisika yango.

Kasi, yango elingi koloba te ete Biblia epekisi moto azala na esika moko oyo asepeli na yango mpo na kobondela, koyekola to kokanisa na mozindo. Esika ya makita oyo babongisi malamu mpe ezali kimya esalisaka mpo na koyekola mpe kolobela makambo ya Nzambe. Ezali mpe mabe te kotonga esika moko mpo bato bákanisaka, na ndakisa kotya tombó na lilita ya mowei. Yango ekoki kozala kaka mpo na kokanisa to komonisa ete olingaki mowei. Kasi, kotalela esika ya ndenge wana ete ezali mosantu to kosambela bililingi to biloko mosantu na esika yango ekoyokana ata moke te na maloba ya Yesu.

Na yango, ezali na ntina te okende na esika mosantu na elikya ete Nzambe akoyoka libondeli na yo malamu kuna. Nzambe akosepela na yo te to akopesa yo te lipamboli moko boye mpo okei kuna. Biblia elobi ete Yehova Nzambe, “Nkolo ya likoló mpe ya mabele, afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ.” Kasi yango te ekómisi biso mosika na Nzambe. Tokoki kobondela ye mpe akoyoka biso esika nyonso oyo tozali mpo “azali mosika te na mokomoko na biso.”​—Misala 17:24-27.

a Bisika mosantu ndenge na ndenge ya Shinto ezalaka na milulu na yango.

b Talá etanda “Esika mosantu ezali nini?”

Esika mosantu ezali nini?

Na ebandeli, maloba “esika mosantu” ezalaki komonisa sanduku oyo bazalaki kotya biloko mosantu. Kasi sikoyo bakómá kosalela yango na bandenge ebele; ekoki komonisa esika oyo bazali kotalela yango lokola mosantu, ya losambo to bongo na bongo. Bisika mosantu oyo batongá ezalaka mpo na kosambela nzambe moko boye to moto moko oyo azali “mosantu.” Mbala mingi bisika yango ezalaka na bililingi mpe biloko mosantu oyo bakanisaka ete ezali na boyokani na makamwisi mpe bimonaneli oyo euti na likoló. Lelo, esika mosantu ekoki kozala tempelo, eglize to mwa ndako epai moto asambelaka. Bato mosusu basalaka esika mosantu na ndako na bango. Na mikili ya Azia mpe ya Mpoto, bisika mosantu oyo basalaka na bandako ezalaka bitumbelo ya mike epai bato babondelaka, bakanisaka makambo na mozindo to bapesaka bambeka.

Bisika mosantu nyonso te nde ezalaka mpo na losambo. Na ndakisa, na mokili mobimba, mabota mpe baninga ya baoyo bakufaka na baaksida ya motuka basalaka ‘bisika mosantu na nzela’ mpo na kokanisa bato na bango oyo bakufaki. Bato basalaka bisika mosantu mosusu mpo na kokanisa bitumba oyo ekendá nsango to baoyo bakufá na bitumba to na likama mosusu. Atako bisika ya ndenge wana epesaka bato libaku ya kokanisa mpe kolela, mbala mingi emonisaka makambo ya losambo mpe misala ya bato oyo batongaki yango.

Motatoli moko ya Yehova azali koyekola Biblia na mwasi moko oyo asalá esika moko mosantu mpo na maria na ndako na ye
    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto