Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp19 No. 2 nk. 8-9
  • Ntango molongani na yo asali ekobo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango molongani na yo asali ekobo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKANISI YA BIBLIA OYO EKOKI KOSALISA
  • Amityelaki mikano mpo na kobunda na mikakatano na ye
    Lamuká!—2001
  • Libɔndisi na ntango ya mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Bokoki kobongisa?
    Lamuká!—1999
  • Naponaki mosala ya malamu
    Lamuká!—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
wp19 No. 2 nk. 8-9
Mwasi moko azali kobondela

Ntango molongani na yo asali ekobo

“Nayokaki mposa ya kokufa ntango mobali na ngai alobaki na ngai ete azali kotika ngai mpo azwi mwasi mosusu oyo azali naino elenge. Namonaki ete asalaki ngai mabe mpenza, mingimingi soki nakanisi mpasi oyo namoná mpo na ye.”​—Maria, moto ya Espagne.

“Ntango mwasi na ngai aboyaki ngai, namonaki lokola eloko moko na nzoto na ngai ekufi. Makambo nyonso tozalaki kokana mpe kobongisa elongo ekweaki na mai. Mikolo mosusu nazalaki kokanisa ete mpasi yango esili; kasi, okomona kaka ezongi lisusu makasi.”​—Bill, moto ya Espagne.

MOTO asilaka mpenza mayele soki molongani na ye asali ekobo. Ya solo, bato mosusu balimbisaka molongani oyo asali ekobo mpe basalaka makasi bábosana.a Kasi, libala ekufa, ekufa te, moto nyonso ayokaka mpasi mingi na motema soki molongani na ye asali ekobo. Moto ya ndenge wana akoki kosala nini?

MAKANISI YA BIBLIA OYO EKOKI KOSALISA

Biblia esalisá bato mingi oyo bazalaki na mpasi makasi na motema mpo molongani na bango asalaki ekobo. Bayekolaki ete Nzambe amonaka kolela na bango mpe ayebi mpasi na bango.​—Malaki 2:13-16.

“Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa . . . ngai motema.”​—Nzembo 94:19.

Bill alobi boye: “Soki nazali kotánga vɛrsɛ wana, nazalaki komona Yehova lokola tata moko ya bolingo oyo azali kopakola ngai mwana na ye pomadi.”

“Epai ya moto ya sembo okozala sembo.”​—Nzembo 18:25.

Carmen, oyo mobali na ye asalaki ekobo basanza ebele, alobi boye: “Mobali na ngai asalaki ngai mabe. Kasi, nakokaki kotyela Yehova motema ete akozala sembo epai na ngai. Akosundola ngai ata mokolo moko te.”

“Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ . . . kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino.”​—Bafilipi 4:6, 7.

Sasha alobi boye: “Nazalaki kozongela vɛrsɛ yango mbala na mbala. Lokola nazalaki kobondela mingi, Nzambe asalisaki ngai nazwa kimya ya makanisi.”

Na ntango moko boye, bato nyonso oyo totángi na lisolo oyo bayokaki lokola bakómi na nsuka. Kasi, batyelaki Yehova motema mpe Liloba na ye epesaki bango makasi. Bill alobi boye: “Kondima na ngai esalisaki ngai namona ntina ya kozala na bomoi ntango makambo nyonso ebebaki. Na ntango moko boye natambolaki ‘na lobwaku ya molili makasi’; atako bongo, Nzambe atikaki ngai te.”​—Nzembo 23:4.

a Mpo na koyeba soki osengeli kolimbisa to te, talá masolo oyo ebimaki na Lamuká! ya sanza ya zomi 1999, na motó ya likambo “Okosala nini soki mobali na yo to mwasi na yo asali ekobo?”

Makambo oyo bato mosusu basalaki

Kotalela na mozindo bavɛrsɛ oyo epesaka makasi.

Bill alobi boye: “Natángaki mokanda ya Yobo mpe na nsima mokanda ya Nzembo; nazalaki kotya elembo na vɛrsɛ nyonso oyo ezalaki kolobela makambo oyo nakutanaki na yango. Namonaki ete bato oyo bakomaki mikanda wana bakutanaki na mpasi mpe mitungisi lokola oyo ya ngai.”

Koyoka miziki.

Carmen alobi boye: “Na butu soki mpɔngi ekimi ngai, nazalaki koyoka miziki. Ezalaki mpenza kokitisa ngai motema.” Daniel alobi boye: “Nayekolaki kobɛta gitare mpe namonaki ete kosangisa banɔti mpo na kobɛta miziki ezalaki kosalisa ngai nazala lisusu na kimya ya makanisi.”

Koloba na bato mosusu ndenge ozali koyoka.

Daniel alobi boye: “Namesaná te koyebisa bato mosusu makambo oyo nazali na yango na motema. Kasi, nazalaki na mwa baninga ya malamu, mpe nazalaki kosolola na bango mokolo na mokolo. Nazalaki koyebisa bango makambo oyo ezalaki kotungisa ngai, ezala na mikanda to na masolo. Yango esalisaki ngai mingi.” Sasha alobi boye: “Libota na ngai esalisaki ngai mingi. Mama azalaki kotika ngai te. Soki nayoki mposa ya kosolola, azalaki koyoka ngai. Tata na ngai mpe asalisaki ngai namona ete basundoli ngai te, mpe asalisaki ngai nazongela makasi mokemoke.”

Kotika kobondela te.

Carmen alobi boye: “Nazalaki kobondela ntango nyonso. Nazalaki koyoka ete Nzambe azalaki pembeni na ngai, azalaki koyoka ngai, mpe kosalisa ngai. Ata na kati ya mpasi wana, nakangamaki kaka na Nzambe.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto