‘Atyelaka yo likebi’
Bato bakoki kosala yo mabe; kasi ezali na Moto moko oyo akosundola yo ata mokolo moko te. Ezali nani?
Mokonzi Davidi alobaki boye: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.”—Nzembo 27:10.
Yehova azali “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”—2 Bakorinti 1:3, 4.
“[Bóbwakela] ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.”—1 Petro 5:7.
Mpo na koyeba ete Nzambe azali mpenza na mposa ya kosalisa yo, tangá buku Sepelá na bomoi libela na libela! liteya 08. Ebimisami na Batatoli ya Yehova. Okoki mpe kozwa yango na site Internet www.jw.org