Biblia ebongolaka bato
NDENGE nini mwasi moko oyo azalaki kosala mosala ya kopesa bato masanga na nganda moko, oyo azalaki na maloba ya mbindo, azalaki kolangwa masanga, mpe komɛla bangi mingi abongolaki bomoi na ye? Nini etindaki moto moko ya politiki, oyo azalaki kolinga te makambo ya Nzambe, akóma kosalela Nzambe? Mikakatano nini moto moko oyo azalaki kolakisa bapolisi ndenge ya kobunda alongaki mpo na kokóma Motatoli ya Yehova? Tángá makambo oyo bato yango balobi.
“Ngai ná mama tozongelaki boyokani na biso.”—NATALIE HAM
ABOTAMAKI NA: 1965
EKÓLO: AUSTRALIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOMƐLI MONENE YA BANGI
NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na mwa engumba Robe na sudi ya Australie, epai babomaka mbisi. Na bamboka yango, banganda ezalaka esika oyo bato bayaka kokutana. Baboti balekisaka ntango mingi na banganda yango, yango wana bana mingi babɔkwamaka na esika oyo bato balangwaka masanga, bazalaka na maloba ya mbindo, mpe bamɛlaka makaya.
Ntango nazalaki na mbula 12, nazalaki komɛla makaya, nazalaki koloba maloba ya mabe, mpe ntango nyonso nazalaki koyokana te ná mama. Ntango nakómaki na mbula 15, baboti na ngai bakabwanaki, mpe mbula moko na ndambo na nsima, nalongwaki na ndako. Nakómaki kolangwa masanga, komɛla bangi, mpe nakómaki kosala pite. Nakómaki moto ya nkandankanda mpe makanisi na ngai ebulunganaki. Kasi, lokola nalandaki formasyo ya mbula mitano ya karate mpe ya ndenge oyo mwasi akoki komibatela, namonaki ete nakoki komibatela ngai moko. Atako bongo, na motema na ngai, ntango nazali ngai moko mpe nazali kokanisa, mawa ezalaki kotonda ngai na motema mpe nazalaki kobondela Nzambe, kosɛnga ye asalisa ngai. Nazalaki koyebisa ye boye: “Kasi, kosɛnga ngai te nakende na ndako-nzambe.”
Na nsima, moninga moko oyo azalaki kosambela kasi azalaki kokende ata na lingomba moko te, apesaki ngai Biblia. Ndenge moko na baninga mosusu, ye mpe azalaki komɛla bangi. Atako bongo, azalaki koloba ete andimaka mpenza Nzambe mpe andimisaki ngai ete nazwa batisimo. Amemaki ngai na laki moko ya mboka na biso mpe abatisaki ngai. Banda wana, nazalaki kokanisa ete nazali mpenza na boyokani ya malamu na Nzambe. Kasi, nazwaki soki moke te ntango ya kotánga Biblia.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na 1988, Batatoli ya Yehova mibale babɛtaki na porte na ngai. Moko atunaki ngai: “Oyebi nkombo ya Nzambe?” Motatoli yango atángelaki ngai Nzembo 83:18 na Biblia na ye oyo elobi ete: “Mpo báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” Nakamwaki makasi! Ntango bakendaki, nasalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 56 na esika oyo batɛkaka babuku ya makambo ya Nzambe, mpo na kotala mabongoli mosusu ya Biblia mpe kotala nkombo yango na diksionɛrɛ. Lokola namonaki ngai moko na miso ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, namitunaki likambo mosusu nini oyo nayebi te.
Mama ayebisaki ngai ete Batatoli ya Yehova bazalaka kaka na makambo ya bango moko. Lokola nayebaki bango mingi te, nakanisaki ete bazali bato ya makambo makasi mpe bayebi te ndenge ya kosala masɛki. Nakómaki na likanisi ya kokima bango ntango bakozongela ngai. Kasi, ntango mokolo yango ekokaki, nabongolaki makanisi. Nakɔtisaki bango na ndako, mpe tobandaki mbala moko koyekola Biblia.
Mbala nyonso soki tosilisi koyekola, nazalaki koyebisa makango na ngai Craig makambo oyo nayekoli. Nsukansuka azwaki buku oyo tozalaki kosalela mpo na boyekoli mpe ye moko abandaki kotánga yango. Nsima ya pɔsɔ misato mpamba, alobaki ete ayebi solo na ntina na Nzambe. Nsukansuka, ngai ná Craig totikaki komɛla bangi mpe kolangwa mpe nalongwaki na mosala oyo nazalaki kosala ya kopesa masanga na nganda. Mpo na koyokanisa bomoi na biso na mitinda ya Biblia, tozwaki ekateli ya kobalana.
MATOMBA OYO NAZWI: Na ntango oyo tobandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova, ngai ná Craig tozalaki pene ya kokabwana. Lelo oyo, Craig azali mobali moko malamu mpenza, mpe tozali na bana mibale ya kitoko. Biso mpe tosepelaka mingi na baninga oyo bazali na kondima moko na biso.
Na ebandeli, mama asilikaki ntango ayebaki ete nazali koyangana na Batatoli ya Yehova. Kasi, azalaki komitungisa mpo ayebaki malamu te Batatoli ya Yehova. Lelo oyo, ngai ná mama tozongelá boyokani ya malamu. Nayokaka lisusu te ete nazangi eloko moko. Kutu, nakómá kotambwisa bomoi na ngai malamu, mpe ekómá na ntina mpe namonaka ete bamposa na ngai ya koyeba Nzambe ezali kokokisama.—Matai 5:3.
“Nayekolaki makambo mingi ya kokamwa na Biblia.”—ISAKALA PAENIU
ABOTAMAKI NA: 1939
EKÓLO: TUVALU
BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA POLITIKI
NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na Nukulaelae, esanga moko kitoko ya pasifiki oyo ezali na kati ya Tuvalu. Bapastɛrɛ oyo bazwá formasyo ya makambo ya Nzambe na eteyelo moko na Samoa nde batambwisaka makambo mingi kuna. Ezalaki mokumba ya bato ya esanga mpo na koleisa bapastɛrɛ yango mpe mabota na bango mokolo na mokolo, kopesa bango bisika ya kolala, mpe kopesa bango biloko nyonso ya malamu koleka. Ata soki bato ya esanga bazalaki na biloko mingi te mpo na koleisa mabota na bango moko, basengelaki kaka kopesaka bapastɛrɛ biloko ya kolya.
Pastɛrɛ ya esanga oyo nazalaki, akɔtaki na eteyelo moko ya mboka mpe azalaki kopesa mateya ya lingomba, matematiki mpe mwa ndambo ya mateya ya jeografi. Nazali komona lisusu mokolo moko ndenge pastɛrɛ abɛtaki bayekoli makasi mpe nzoto na bango etondaki na makila. Kasi, ata moto moko te amekaki koloba likambo, ata baboti ya bana yango balobaki ata likambo te. Bazalaki kobanga pastɛrɛ lokola Nzambe.
Ntango nakómaki na mbula zomi, nalongwaki na ndako mpo na kokende kotánga na eteyelo kaka moko ya Leta oyo ezalaki na esanga mosusu. Ntango nasilisaki, nakómaki kosalela guvɛrnema. Na ntango wana, bisanga yango ezalaki kotambwisama na bato ya Angleterre, na ndakisa bisanga ya Gilbert mpe Ellice. Nasalaki na badepartema ndenge na ndenge liboso nakóma kokoma zulunalo moko ya guvɛrnema oyo ezalaki kobima pɔsɔ na pɔsɔ. Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu, tii mokolo oyo nabimisaki mokanda ya motángi moko oyo alobaki mabe mpo na mbongo oyo bazalaki kobimisa mpo na kobongisa koya ya Prince de Galles. Moto oyo akomaki mokanda yango asalelaki nkombo ya lokuta, mpe mokonzi na ngai asɛngaki ayeba nkombo mpenza ya moto yango. Naboyaki koyebisa ye, mpe bato mingi bayebaki matata yango.
Mwa moke nsima ya likambo wana, nalongwaki na mosala ya guvɛrnema mpe nakɔtaki na politiki. Nalongaki na maponami oyo esalemaki na Nukulaelae mpe baponaki ngai ministre ya makambo ya mombongo mpe ya mabanga ya ntalo. Na nsima, ntango bato ya Kiribati (kala esanga Gilbert) mpe Tuvalu (kala esanga Ellice) balingaki kozwa lipanda na mabɔkɔ ya Angleterre, guvɛrnɛrɛ asɛngaki ngai natambwisa makambo na Tuvalu. Kasi, nalingaki te nayebana lokola moto oyo azali na boyokani ná Angleterre, ekólo oyo ezalaki kokonza Tuvalu. Na yango, naboyaki mosala yango mpe lokola nazalaki na lisungi na bango te, nalongaki te na maponami mpo na kozwa ebonga ya monene na politiki. Na nsima, ngai ná mwasi na ngai tozongaki na esanga ya mboka na biso mpe tozwaki ekateli ya kozala na bomoi lokola moto nyonso.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na bisanga, mokolo ya lomingo ezalaki sabata, moto nyonso azalaki kotalela yango lokola mosantu, longola kaka ngai. Yango ezalaki mokolo na ngai ya kotambola na mai mpe koboma mbisi. Nalingaki te koyebana lokola moto oyo asambelaka. Tata ayebisaki ngai ete ye ná bato mosusu bazali kosepela te na makambo oyo nazali kosala. Kasi, nazalaki na ekateli ya kozala te na nse ya boombo ya lingomba.
Na mobembo oyo nasalaki na Funafuti—esanga esika mboka-mokonzi ya Tuvalu ezali—leki na ngai ya mobali asɛngaki ngai tókende na likita moko ya Batatoli ya Yehova. Na nsima, misionɛrɛ moko, Motatoli ya Yehova apesaki ngai ebele ya bazulunalo na bango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpo natánga. Apesaki ngai mpe buku oyo emonisaki polele esika oyo mateya mingi ya lokuta eutá, mateya oyo mangomba mingi ya bokristo eteyaka. Natángaki buku yango mbala ebele. Nayekolaki makambo mingi ya kokamwa na Biblia, kati na yango namonaki ete bakristo basɛngisami te na kotosaka sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ.a Nayebisaki mwasi na ngai makambo yango, mpe mbala moko atikaki kokende ndako-nzambe.
Nzokande, ngai nalapaki ndai ete nakokɔta ata na lingomba moko te. Mbula soki mibale elekaki, kasi nakokaki te kobosana makambo oyo nayekolaki. Nsukansuka nakomelaki misionɛrɛ oyo azalaki na Funafuti, nayebisaki ye ete nalingi kobongola bomoi na ngai. Akɔtaki na masuwa moko oyo ezalaki koya mpe ayaki kosalisa ngai nayeba makambo mingi na Biblia. Tata asilikaki ntango ayebaki ete nalingi nakóma Motatoli ya Yehova. Kasi, nayebisaki ye ete nayekoli makambo mingi na Biblia, epai ya Batatoli ya Yehova mpe nazwaki ekateli na ngai.
MATOMBA OYO NAZWI: Na 1986, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova, mpe mwasi na ngai azwaki batisimo mbula moko na nsima. Bana na biso mibale ya basi bayekolaki mpe oyo Biblia eteyaka mpe bazwaki ekateli ya kokóma Batatoli ya Yehova.
Lelo oyo nazali na esengo ya kozala na lingomba oyo, ndenge moko na bakristo ya ekeke ya liboso, bakonzi bazalaka te, bato nyonso bazali bandeko. (Matai 23:8-12) Na komikitisa nyonso, balandaka mpe ndakisa ya Yesu mpe bateyaka basusu makambo etali Bokonzi ya Nzambe. (Matai 4:17) Nazalaka mpenza na botɔndi epai ya Yehova Nzambe ndenge apesaki ngai nzela ya koyeba solo na ntina na ye mpe bato na ye!
“Batatoli bayebisaki ngai te oyo nasengeli kondima.”—ALEXANDER SOSKOV
ABOTAMAKI NA: 1971
EKÓLO: RUSSIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOLAKISI YA BITUMBA
NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na Moscou, oyo ezalaki na ntango wana mboka-mokonzi ya Union Soviétique. Libota na ngai ezalaki kofanda na ndako moko ya monene, mpe bazalani na biso mingi bazalaki kosala elongo na izini kaka moko. Nayebaka lisusu ndenge bazalaki koloba ete nazalaki mwana moko mobulu mpe bazalaki koloba ete nakokufa noki to nakosuka na mabɔkɔ ya bapolisi. Kutu, ntango nakómaki na mbula zomi, bapolisi bakómaki kolukaluka ngai.
Ntango nakómaki na mbula 18, nakomisaki nkombo na mosala ya soda mpe nakómaki kobatela bandelo ya mboka. Nazongaki ndako nsima ya mbula mibale, mpe nakómaki kosala na izini kasi mosala yango ezalaki kolɛmbisa ngai. Yango wana, nakómaki polisi ya Moscou oyo babundaka ntango mobulu ebimi mpe nasalaki lokola molakisi ya bitumba ya mabɔkɔ. Napesaki mabɔkɔ mpo na kokanga bato ya mobulu na Moscou mpe nasalaki mibembo na bisika ndenge na ndenge oyo mobulu ezalaki na mboka. Nazalaki koyoka ntango nyonso lokola nasala mabe. Ntango nazalaki kozonga na ndako, na bantango mosusu nazalaki kolala esika moko te ná mwasi na ngai—nazalaki kobanga nazokisa ye na nse ya mpɔngi.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nabandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova, nayaki komona ete bomoi ya mobulumobulu oyo nazalaki na yango, eyokanaki te na mitinda ya Biblia. Namonaki mpe ete ezali na ntina natika komɛla makaya mpe nabanda komɛlaka masanga mwa moke kaka. Kasi, nakanisaki ete nakoki mpe kotika mosala na ngai te, mpo nayebaki mosala mosusu te oyo nakoki kosala mpo na koleisa libota na ngai. Namonaki mpe ete nakokoka te kosakola ndenge Batatoli bazalaki kosala.
Nsukansuka nandimaki ete makambo oyo Biblia elobi ezali ya solo mpenza. Mpe nalendisamaki mpenza na lisolo oyo ezali na Ezekiele 18:21, 22. Mokapo yango elobi ete: “Nde moto mabe, soki abongwani, atiki masumu na ye nyonso oyo asalaki . . . , makambo na ye nyonso ya kobuka mibeko oyo asalaki—bakokanisela ye yango lisusu te.”
Nasepelaki ete Batatoli ya Yehova bayebisaki ngai te oyo nakoki kondima, kasi basalisaki ngai nakanisa na makambo oyo nazalaki koyekola. Nazwaki liboke ya bazulunalo na bango 40 to koleka mpe natángaki yango na boumeli ya pɔsɔ misato mpamba. Makambo oyo nayekolaki endimisaki ngai ete nazwi lingomba ya solo.
MATOMBA OYO NAZWI: Liboso nayekola Biblia, ngai ná mwasi na ngai tolingaki koboma libala. Lelo oyo, libala na biso ebongá. Ntango nabandaki koyekola Biblia, mwasi na ngai mpe abandaki koyekola, mpe tozwaki ekateli ya kosalela Yehova elongo. Sikoyo libota na ngai ezali na esengo mingi. Nazwaki mpe mosala oyo ezali te kobuka mitinda ya Biblia.
Ntango nabandaki sika kobima na mosala ya kosakola ndako na ndako, ezalaki kokóma ete nazala nkandankanda—ndenge nazalaki koyoka kala soki nalingi kobunda bitumba. Lelo oyo, nandimi mpenza ete nakozala kimya, ata soki moto moko atumoli ngai. Nsima ya bambula, nayekolaki komonisela bato motema molai. Nayokaka mawa ete nabungisi ntango mingi ya bomoi na ngai, kasi nazali sikoyo koyoka ete bomoi na ngai ezali mpenza na ntina. Nasepelaka kosalela makasi na ngai nyonso na kosalela Yehova Nzambe mpe kosalisa basusu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Osengeli kotosa Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ?” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2010, nkasa 11-15.