LISOLO YA BOYEKOLI 23
‘Bókeba ete moto te amema bino lokola nyama na ye ya kolya’!
“Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato.”—KOL. 2:8.
LOYEMBO 96 Buku ya Nzambe—Eloko ya motuya mingi
NA MOKUSEa
1. Na kotalela Bakolose 2:4, 8, ndenge nini Satana alukaka kokosa biso?
MOKANO ya Satana ezali ete tótika kolinga Yehova. Mpo na kokokisa mokano na ye, alukaka kobebisa makanisi na biso, kutu alukaka komema biso lokola nyama na ye ya kolya mpo tókóma kotosa ye. Asalelaka bamposa na biso mpo na kokosa biso tólanda ye.—Tángá Bakolose 2:4, 8.
2-3. (a) Mpo na nini tosengeli kotya likebi na likebisi oyo ezali na Bakolose 2:8? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Tozali mpenza na likama ete Satana akosa biso? Ɛɛ! Kobosana te ete ntoma Paulo akomaki likebisi oyo ezali na Bakolose 2:8 mpo na bato ya mokili te. Akomelaki nde bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo. (Kol. 1:2, 5) Soki banda na ntango wana bakristo bazalaki na likama ete Satana akosa bango, lelo oyo biso tozali na likama monene koleka. (1 Ko. 10:12) Mpo na nini? Mpo Satana abwakamá awa na mabele, mpe asalaka nyonso mpo na kobungisa basaleli ya sembo ya Nzambe nzela. (Em. 12:9, 12, 17) Lisusu, tozali na eleko oyo bato mabe mpe bakosi bazali kosala “mabe koleka.”—2 Tim. 3:1, 13.
3 Na lisolo oyo, tokolobela ndenge Satana asalelaka “bokosi ya mpambampamba” mpo na koluka kobebisa makanisi na biso. Tokolobela mpe mayele misato oyo asalelaka. (Ef. 6:11) Mpe na lisolo oyo elandi, tokoyekola ndenge oyo tokoki kobongisa makanisi na biso soki mbala mosusu mayele mabe ya Satana ebebisaki yango. Kasi, tólobela naino ndenge oyo Satana akosaki Bayisraele ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, mpe tótala mateya oyo tokoki kozwa.
AMEMAKI BAYISRAELE NA LOSAMBO YA BIKEKO
4-6. Na kotalela Kolimbola Mibeko 11:10-15, ntango Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, mpo na nini basengelaki koyekola mayele ya sika na oyo etali kosala bilanga?
4 Na mayele na ye ya mabe, Satana amemaki Bayisraele na losambo ya bikeko. Ndenge nini asalaki yango? Ayebaki ete Bayisraele basengelaki na bilei mpe asalelaki mposa yango mpo na kotinda bango básala oyo ye alingaki. Ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, basengelaki koyekola ndenge ya sika ya kosala bilanga mpo biloko ekola. Ntango bazalaki na Ezipito, Bayisraele bazalaki kozwa mai ya Ebale Nile mpo na kosopa na bilanga. Kasi, na Mokili ya Ndaka, ebale ya monene ezalaki te; mpo biloko na bango ya bilanga ekola, basengelaki kaka na mbula mpe mamwɛ. (Tángá Kolimbola Mibeko 11:10-15; Yis. 18:4, 5) Na yango, Bayisraele basengelaki koyekola ndenge ya sika ya kosala bilanga. Yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo mingi na bango oyo bayebaki kosala bilanga basilaki kokufa na esobe.
Ndenge nini satana alongaki kobongola makanisi ya Bayisraele oyo bazalaki kosala bilanga? (Talá paragrafe 4-6)b
5 Yehova amonisaki basaleli na ye ete makambo ebongwanaki. Na nsima, apesaki bango likebisi moko oyo, na ebandeli, ekokaki komonana lokola ezali na boyokani te na likambo etali kosala bilanga; alobaki boye: “Bókeba noki motema na bino elengolama, mpe bópɛngwa mpe bósambela banzambe mosusu mpe bógumbamela bango.” (Mib. 11:16, 17) Mpo na nini Yehova akebisaki basaleli na ye na losambo ya banzambe ya lokuta, ntango azalaki koyebisa bango ete bakoyekola ndenge ya sika ya kosala bilanga?
6 Yehova ayebaki ete Bayisraele bakoluka koyekola mayele mosusu ya kosala bilanga epai ya bapakano oyo bafandaki zingazinga na bango. Ya solo, bato ya bikólo ya zingazinga bayebaki kosala bilanga malamu koleka Bayisraele, mpe Bayisraele bakokaki koyekola makambo ya ntina epai na bango, kasi likama ezalaki. Bato ya Kanana oyo bazalaki kosala bilanga bazalaki kolanda bindimeli na bango ya losambo ya Baala. Bazalaki kondima ete Baala nde nkolo ya mapata mpe ye nde anɔkisaka mbula. Yehova alingaki te ete bato na ye bálanda bindimeli wana ya lokuta. Atako bongo, Bayisraele bakweaki mbala na mbala na losambo ya Baala. (Mit. 25:3, 5; Bas. 2:13; 1 Bak. 18:18) Satana alongaki komema Bayisraele lokola nyama na ye ya kolya. Ndenge nini asalaki yango?
MAYELE MISATO OYO SATANA ASALELAKI MPO NA KOMEMA BAYISRAELE LOKOLA NYAMA NA YE YA KOLYA
7. Ndenge nini kondima ya Bayisraele emekamaki ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka?
7 Ya liboso, Satana asalelaki mposa oyo moto nyonso azalaka na yango ya komona mai ya mbula epɔlisi mabele. Na Mokili ya Ndaka, mbula ezalaki konɔka mingi te kobanda na nsuka ya sanza ya minei tii na sanza ya libwa. Mbula, oyo mbala mingi ezalaki kobanda soki na sanza ya zomi, nde ezalaki kosala ete Bayisraele bákoba kozala na bomoi mpe mbuma ebota mingi. Satana akosaki Bayisraele bákanisa ete mpo bázala malamu, basengelaki kolanda mimeseno ya bikólo ya bapakano oyo ezalaki zingazinga na bango. Bato yango bazalaki kondima ete soki basali mwa milulu mosusu, banzambe na bango bakosala ete mbula enɔka na ntango oyo esengeli. Baoyo bazangaki kondima epai ya Yehova bamonaki ete basengelaki kosala kaka bongo mpo eleko ya kokauka eumela mingi te; na yango basalaki milulu ya bapakano mpo na kokumisa Baala, nzambe ya lokuta.
8. Wapi mayele ya mibale oyo Satana asalelaki? Limbolá.
8 Ya mibale, mpo na kozwa Bayisraele, Satana asalaki ete bábendama na pite. Bapakano bazalaki kosala makambo ya mbindo mpenza na losambo ya banzambe na bango ya lokuta. Na losambo yango ya mbindo, ezala basi to mibali, bazalaki kosala pite na tempelo. Bazalaki kondima kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, bazalaki kosala pite ya ndenge nyonso mpe bazalaki komona yango mabe te. (Mib. 23:17, 18; 1 Bak. 14:24) Bapakano yango bazalaki kondima ete milulu yango ezalaki kotinda banzambe na bango básala ete mabele ebota malamu. Bayisraele mingi babendamaki na milulu ya pite oyo bapakano bazalaki kosala mpe bamikɔtisaki na losambo ya banzambe ya lokuta. Na ndenge yango, Satana amemaki bango lokola nyama na ye ya kolya.
9. Na kotalela Hosea 2:16, 17, ndenge nini Satana asalaki ete Bayisraele báyeba lisusu te kokesenisa Yehova na banzambe ya lokuta?
9 Ya misato, Satana asalaki ete Bayisraele báyeba lisusu te kokesenisa Yehova na banzambe ya lokuta. Na mikolo ya mosakoli Yirimia, Yehova alobaki ete basakoli ya lokuta basalaki ete bato na ye bábosana nkombo na ye “na nzela ya Baala,” to mpo na Baala. (Yir. 23:27) Emonani ete Bayisraele batikaki kosalela nkombo Yehova mpe na esika na yango bazalaki kosalela nkombo Baala, oyo elimboli “Nkolo.” Likambo yango ezalaki kosala ete na makanisi na bango, Bayisraele báyeba malamu te kokesenisa Yehova ná Baala, mpe ezalaki lisusu mpasi te básangisa milulu ya losambo ya Baala na losambo ya Yehova.—Tángá Hosea 2:16, 17.
MAYELE OYO SATANA ASALELAKA MPO NA KOKOSA BATO LELO
10. Mayele nini satana asalelaka lelo?
10 Tii lelo, Satana asalelaka kaka mayele wana. Mpo na kozwa bato, asalelaka bamposa oyo moto nyonso azalaka na yango, alendisaka pite, mpe asalaka ete bato báyeba te kokesenisa Yehova na banzambe ya lokuta. Tólobela naino mayele oyo ya nsuka.
11. Ndenge nini Satana asali ete bato báyeba te kokesenisa Yehova na banzambe ya lokuta?
11 Satana asalaka ete bato báyeba te kokesenisa Yehova na banzambe ya lokuta. Nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu, bato mosusu oyo bazalaki komibenga bakristo bakómaki kopanza mateya ya lokuta. (Mis. 20:29, 30; 2 Tes. 2:3) Bapɛngwi yango babandaki kosala ete bato báyeba te soki Nzambe kaka moko ya solo azali mpenza nani. Na ndakisa, batikaki kosalela nkombo ya Nzambe na Babiblia na bango mpe na esika na yango, batyaki maloba lokola “Nkolo.” Ndenge balongolaki nkombo ya Nzambe mpe batyaki “Nkolo” na esika na yango, ekómaki mpasi mpo moto oyo azali kotánga Biblia amona ete Yehova akeseni mpenza na “bankolo” mosusu oyo Makomami elobeli. (1 Ko. 8:5) Lokola basalelaki kaka liloba moko, “Nkolo,” mpo na kolobela Yehova mpe Yesu, ezalaki mpasi koyeba ete Yehova ná Mwana na ye bazali bato mibale oyo bakeseni. (Yoa. 17:3) Mobulungano yango nde esalaki ete liteya ya Bosato to Trinité epanzana, nzokande Liloba ya Nzambe eteyaka yango te. Na yango, bato mingi bakanisaka ete moto akoki koyeba te soki Nzambe azali nani. Ezali lokuta mpenza!—Mis. 17:27.
Ndenge nini Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kolendisa bamposa ya mbindo? (Talá paragrafe 12)c
12. Mangomba ya lokuta elendisaka nini, mpe na kotalela Baroma 1:28-31, yango ebimisi mbuma nini?
12 Satana asalaka ete bato bábendama na pite. Na ntango ya Bayisraele, Satana asalelaki losambo ya lokuta mpo na kolendisa pite. Asalaka mpe bongo lelo. Mangomba ya lokuta endimaka pite, mpe elendisaka yango. Na yango, bato mingi oyo balobaka ete basalelaka Nzambe batiki kotosa mibeko na ye ya polele na oyo etali bizaleli ya pɛto. Ntoma Paulo alobelaki mbuma mabe na yango na mokanda na ye epai ya Baroma. (Tángá Baroma 1:28-31.) Na kati ya “makambo oyo ebongi te,” tokoki kotánga pite ya lolenge nyonso, ata mpe kati na mibali na mibali to basi na basi. (Rom. 1:24-27, 32; Em. 2:20) Ezali mpenza na ntina tókangama na mateya ya polele oyo ezali na Biblia!
13. Wapi mayele mosusu oyo Satana asalelaka?
13 Satana asalelaka bamposa oyo moto nyonso azalaka na yango. Moto nyonso azalaka na mposa ya koyeba mosala moko oyo ekoki kosalisa ye akokisa bamposa na ye mpe ya libota na ye. (1 Tim. 5:8) Mbala mingi, tokoki koyekola mosala yango soki tokɔti kelasi mpe tomipesi mpenza. Kasi tosengeli kozala ekɛngɛ. Na mikili mingi, mateya oyo batángisaka bana-kelasi esukaka kaka te na kolakisa bango mosala, kasi bateyaka bango mpe filozofi ya bato. Balendisaka bana-kelasi bándima te ete Nzambe azali mpe bándimela Biblia te. Bayebisaka bango ete moto nyonso oyo azali na mayele asengeli kondima ete bomoi ebandá kaka yango moko. (Rom. 1:21-23) Mateya ya ndenge wana eyokani te na “bwanya ya Nzambe.”—1 Ko. 1:19-21; 3:18-20.
14. Filozofi ya bato elendisaka nini?
14 Filozofi ya bato endimaka te mibeko ya sembo ya Yehova, kutu etɛmɛlaka yango. Elendisaka bizaleli ya mbuma ya elimo te, kasi nde “misala ya nzoto.” (Gal. 5:19-23) Etindaka bato bázala na lolendo mpe lofundo, mpe yango esalaka ete bato bákóma “bato oyo bamilingaka.” (2 Tim. 3:2-4) Yango eyokani te na ezaleli ya komikitisa, oyo Nzambe asɛngi basaleli na ye bámonisa. (2 Sa. 22:28) Bakristo mosusu oyo bakɔtaki iniversite, bakómaki kolanda makanisi ya bato na esika ya kolanda makanisi ya Nzambe. Tótalela kaka ndakisa moko oyo emonisi ndenge likambo yango ekoki kosalema.
Ndenge nini filozofi ya bato ekoki kobebisa makanisi na biso? (Talá paragrafe 14-16)d
15-16. Liteya nini ozwi na likambo oyo ekómelaki ndeko mwasi moko?
15 Ndeko mwasi moko oyo asali mbula koleka 15 na mosala ya ntango nyonso alobi boye: “Lokola nasilaki kozwa batisimo, nazalaki kotánga na mikanda ya moombo ya sembo mpe koyoka ete kokɔta iniversite ezali na makama mingi, kasi natyaki motó makasi. Nazalaki kokanisa ete toli yango etali ngai te.” Ndeko mwasi yango akutanaki na mikakatano nini? Alobi boye: “Nazalaki kolekisa ntango mingi mpe kotya molende mingi na makambo ya kelasi mpe nazalaki lisusu na ntango mpenza te ya kobondela Yehova ndenge ezalaki liboso; nazalaki kolɛmba mingi, nazalaki kokoka te kosolola na basusu makambo ya Biblia, mpe nazalaki kokoka te kobongisa makita malamu. Likambo ya esengo, ntango kaka nasosolaki ete komipesa na bakelasi ya milaimilai ezalaki kobebisa boyokani na ngai na Yehova, nayebaki ete nasengeli kokata kelasi, mpe nasalaki yango.”
16 Makambo oyo ndeko mwasi yango ayekolaki na kelasi wana ya milaimilai esalaki nini na makanisi na ye? Ayanoli boye: “Nayokaka nsɔni kondima ete kelasi oyo natángaki esalaki ete nakóma kotala kaka mabunga ya basusu, mingimingi ya bandeko na ngai ya elimo, nazalaki kosɛnga bango makambo oyo bakokoka kosala te, mpe nakómaki kolinga kozala kaka esika na ngai moko. Ezwaki ngai ntango mpo natika kosala bongo. Eleko wana ya bomoi na ngai eteyi ngai ete koboya kondima makebisi oyo Tata na biso ya likoló apesaka na nzela ya ebongiseli na ye, ezali mpenza likama. Yehova ayebaki ngai malamu koleka ngai moko. Elingaki kozala malamu soki nayokakà!”
17. (a) Osengeli kozala na ekateli nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
17 Na yango, kotika ata moke te ete mokili ya Satana emema yo lokola nyama na yango ya kolya “na nzela ya filozofi mpe bokosi ya mpambampamba.” Kobá kotɛmɛla mayele mabe ya Satana. (1 Ko. 3:18; 2 Ko. 2:11) Kopesa ye nzela te atinda yo obosana ete Yehova akeseni na banzambe ya lokuta. Kobá kotosa mibeko ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu. Mpe kondima te ete Satana akosa yo oboya toli ya Yehova. Kasi, okosala nini soki omoni ete makanisi ya mokili esili kokɔtela yo? Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge oyo Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tókweisa makanisi mpe makambo “oyo epikamá makasi.”—2 Ko. 10:4, 5.
LOYEMBO 49 Tósepelisa motema ya Yehova
a Satana ayebi mpenza kokosa bato. Atindi bato mingi bákanisa ete bazali na bonsomi, nzokande akangá bango lokola nyama na ye ya kolya. Na lisolo oyo, tokolobela mayele ndenge na ndenge oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato.
b ELILINGI: Bato ya Kanana bazali kobenga Bayisraele básangana elongo mpo na kosambela Baala mpe kosala pite.
c ELILINGI: Liyebisi ya ndako-nzambe moko oyo endimaka kosangisa nzoto kati na mibali na mibali to basi na basi.
d ELILINGI: Ndeko mwasi moko ya elenge oyo akɔtá iniversite. Ye ná baninga na ye ya kelasi bazali kosepela ndenge molakisi na bango azali koloba ete siansi mpe teknoloji ekoki kosilisa mikakatano nyonso ya bato. Na nsima, ntango makita ezali kosalema na Ndako ya Bokonzi, azali kokipe te mpe azali komona kaka mabunga.