Okoki kokɔta kati na molɔngɔ ya babongisi-nzela?
1 Na boumeli ya mibu mitano oyo mileki, bankóto ya babongisi-nzela ya sanza na sanza bamonaki malamu ete bátika mosala na bango. Yo mpe ozali moko kati na bango? Soki ɛɛ, ozalaki mpenza na ntina malamu mpo na kotika libaku malamu wana. Mbala mosusu okutanaki na likambo moko oyo okanelaki yango te, oyo okokaki te kolonga yango. Kino sikawa ntina yango ezali naino ya solo? Soki otikaki mosala na yo mpo na mitungisi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, mpo na mikakatano mitali mosolo to mikumba ya libota, ezalela na yo esili kobongwana? Ozali na likoki ya komibongisa lolenge mosusu mpo ete okoka lisusu kozwa matomba oyo mazali kouta na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza? Osili kokanisa mpo na kosala lisusu lisɛngi ya sika?
2 Lokola oyebi yango, mpo na kolonga kati na mosala ya mobongisi-nzela, ezali na ntina ete omibongisa malamu mpe ozala na manaka malamu. Lokola tozalaka mpenza na ngonga mingi te ya kolekisa mpo na masano, mwa ntango ya kominanola emonanaka mbala mingi malamu. (Mas. 19:17; Mis. 20:35) Na kozaláká ntango nyonso na likambo ya kosala kati na mosala ya Nzambe, tobatelami na bopusi ya mokili oyo ezali kokumisa bomoi ya moimi mpe ya pɛtɛɛ. Yehova alaki ete akopesa mapamboli ya elimo epai na baoyo bazali na bomoi ya bomipimeli makambo mosusu mpe baoyo bazali kotya Bokonzi na esika ya liboso. Na kosaleláká Yehova na motema na biso mobimba, tozali komizwela esengo ya solo mpe nsai.—Mas. 10:22; Kols. 3:23, 24.
3 Mosala ya ntango nyonso esengeli kotalelama lokola libaku malamu oyo epesameli nzela bobele na bato moke? Te. Lokola topesaka bomoto na biso lokola likabo epai ya Yehova, biso banso tosengeli komituna mpenzampenza na ntina na likoki ya kobanda mosala ya ntango nyonso, longola bobele soki ezaleli ya bomoi na biso epesi nzela te.—Mko. 12:30.
4 Soki emonani polele ete kolɔngɔnɔ ya nzoto na yo ya nzoto to mikumba oyo miyokani na Makomami epesi yo nzela te mpo na kozala mobongisi-nzela sikawa, yebá ete Yehova ayebi yango mpe azali koyeba ezalela na yo. Akopesa yo mbano mpo na oyo ozali kosala na bosembo engebene makoki na yo. (1 Kol. 4:2; 2 Kol. 8:12) Sikawa, soki okoki lisusu kozala mobongisi-nzela, mpo na nini te kokende kokutana na mokɛngɛli-mokambi mpo na kotondisa lokasa ya lisɛngi?
5 Libota na yo likoki kosalisa yo? Mbala mosusu otikaki mosala na yo ya mobongisi-nzela mpo ete okokisa mikumba na yo ya libota. Basangani mosusu ya libota na yo bakoki sikawa kopesa lisungi na bango, likambo oyo likopesa yo nzela mpo ete ozongela lisusu mosala ya mobongisi-nzela? Bato mosusu bakozala bobele na mposa ya mwa elendiseli moke mpo na kosalisa bango ete bákokisa mikumba na bango mpo ete bákoka lisusu kokóma babongisi-nzela.
6 Boyokani malamu mpe molende mosusu oyo euti epai na basangani mosusu ya libota ekoki kolendisa likambo motindo boye. Bango bakoki kosunga yo na makambo matali mosolo to kopesa mabɔkɔ na mosolo na yo ya tike, to komibongisa mbala na mbala mpo na kobima na yo elongo na mosala ya kosakola. Ezali lisusu na mitindo mingi ya kopesa lisalisi na yo. Soki ezalela na yo epesi yo nzela te mpo na kozwa lisusu libaku wana ya mosala, mbala mosusu okoki kopesa lisalisi yango epai na mosangani moko ya libota na yo oyo, azali na likoki mpo na yango.
7 Mpo na nini te kosolola na ntina na yango kati na libota? Elikya motindo wana ekoki kolonga soki bozali bino nyonso na mokano bobele moko. Soki mosakoli mosusu amikɔtisi kati na molɔngɔ ya babongisi-nzela, libota mobimba bakoki kosepela mpo ete bakokisi oyo esengelaki na bango kosala. Elimo ya bokabi motindo wana ekopesa nzela bobele te na litatoli oyo likopesama kati na teritware mpo na Bokonzi, kasi ekopesa lisusu nzela na libota ete lizala na bomoko koleka kati na elimo.—Luka 6:38; Filp. 2:2-4.