Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/11 lok. 3
  • Ozalaká mobongisi-nzela ya sanza na sanza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaká mobongisi-nzela ya sanza na sanza?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Okoki kokɔta na “ekuke monene oyo ezali komema na mosala”?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Okoki kokɔta kati na molɔngɔ ya babongisi-nzela?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 3/11 lok. 3

Ozalaká mobongisi-nzela ya sanza na sanza?

1. Libaku nini bandeko mingi bazalaki na yango, kasi nini ekómelaki basusu kati na bango?

1 Na boumeli ya bambula ebele, basakoli mingi bazwaki libaku ya “koteya mpe kosakola nsango malamu” lokola babongisi-nzela. (Mis. 5:42) Nzokande, bandeko mosusu batikaki mosala ya mobongisi-nzela mpo na bantina ndenge na ndenge. Soki kala ozalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, osili kotalela lisusu bomoi na yo ya mikolo oyo mpo na koyeba soki okoki kozongela lisusu mosala yango?

2. Mpo na nini basakoli oyo bazalaká babongisi-nzela basengeli kotalela lisusu bomoi na bango ya sikoyo?

2 Makambo ebongwanaka: Ekoki kozala ete likambo oyo etindaki yo otika mosala ya mobongisi-nzela ezali lisusu te. Na ndakisa, soki otikaki mosala yango mpo ozalaki lisusu te kokokisa ngonga 90 sanza na sanza, mpo na nini te kozongela mosala yango lokola bakómá kosɛnga kaka ngonga 70? Banda otiká mosala ya mobongisi-nzela, omonaka ete ezali lisusu na ntina te osala mosala oyo ezwaka ntango mingi to ozali lisusu na mikumba mingi te ya libota? Ndeko mwasi moko oyo atikaki mosala ya mobongisi-nzela mpo na mikakatano ya nzoto azongelaki mosala yango ntango akómaki na mbula 89. Lokola elekaki mbula mobimba akɔti lopitalo te mpe amonaki ete akómi mwa makasi, azongelaki mosala ya mobongisi-nzela!

3. Ndenge nini bato ya libota moko bakoki kosalisa moko na bango asala mosala ya mobongisi-nzela?

3 Ntango mosusu ozalaki mobongisi-nzela te, kasi moto moko ya libota na yo atikaki mosala yango mpo na kosalisa ndeko moko ya libota, na ndakisa moboti moko oyo akómi mobange. (1 Tim. 5:4, 8) Soki bongo, yo to basusu na kati ya libota bokoki kosalisa ndeko yango azongela mosala ya mobongisi-nzela? Mpo na nini te kosolola mpo na likambo yango? (Mas. 15:22) Soki bato ya libota bayokani mpo na kosalisa moko na bango asala mosala ya mobongisi-nzela, bango nyonso bakoyoka esengo ete basalisi ndeko na bango asala mosala yango.

4. Okosala nini soki ozali na likoki te ya kozongela mosala ya mobongisi-nzela sikoyo?

4 Kolɛmba nzoto te soki bomoi na yo ya sikoyo epesi yo nzela te ozongela lisusu mosala ya mobongisi-nzela. Mposa na yo ya kosala mosala yango esepelisaka Yehova. (2 Ko. 8:12) Salelá mayele oyo ozwaki ntango ozalaki mobongisi-nzela na mosala na yo ya kosakola. Bondelá Yehova mpo na likambo yango mpe saleláká mabaku nyonso oyo ekoki kosalisa yo obongola makambo mosusu ya bomoi na yo. (1 Yoa. 5:14) Ntango mosusu na mikolo ezali koya Yehova akofungwela yo “porte monene, oyo ezali kopesa nzela na mosala,” mpo ozwa lisusu esengo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza!​—1 Ko. 16:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto