Tómitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu
1 Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tokolinga kokumisa nkombo ya Yehova. Toyebi ete etamboli na biso, elobeli na biso, molato na biso mpe ekateli na biso ya nsuki ekoki kozala na bopusi likoló na lolenge basusu batalelaka losambo ya solo. Yango emonanaka mingimingi na ntango ya makita na biso. Tosengeli komindimisa ete nyonso oyo tozali koloba mpe kosala kati na yango ebongi na nsango malamu mpe ezali kokumisa Yehova.—Filp. 2:4.
2 Mitindo mingi mindimami na mokili na makambo matali molato mpe ekateli ya nsuki mibongi soko moke te mpo na baklisto. Baministre ya nsango malamu basengeli kosɛnzɛla na likebi nyonso na likambo yango. Kati na Mosenzeli ya 1 Yúni 1989, lokasa 16, tokoki kotánga boye: “Ntina ezali te ya kolata bilamba ya motuya mingi, kasi ata bongo molato na biso esengeli kozala pɛto, ebongisami malamu mpe ya bopolo. Sapato na biso esengeli kozala ya kotobokatoboka te kasi ya malamu. Ndenge moko, tosengeli kozala pɛto mpe kolata bilamba ya pɛto mpe bibongisami malamu na likita nyonso, ata na boyekoli ya mokanda.”
3 Kokóma na ngonga ezali elembo ya limemya mpe ya likebi oyo epusami na bolingo. Ekwelaka ete makambo mosusu oyo makanelamaki te mapekisa biso ete tókóma na ngonga na likita moko. Kasi kokóma nsima ya ngonga mbala na mbala ekoki komonisa ete tozali kopesa limemya te na ezalela ya bulɛɛ ya makita mpe ete tozali komonisa bopɔtu na lisɛngisi oyo tozali na yango ya kobulunganisa basusu te. Mbala mingi, bato oyo bayaka nsima ya ngonga bapɛngwisaka likebi ya bayangani mosusu mpe bapekisaka bango kozwa matomba mingi na likita. Bokómi na biso na ngonga ezali kotatola limemya na biso mpo na mayoki mpe bamposa ya baoyo nyonso bazali wana.
4 Bolingo mpo na basusu esengeli kopusa biso na kosɛnzɛla ete tózala te baoyo bazali kopɛngwisa likebi ya basusu na ntango ya makita. Komimisa, kolya, kokítakita bazoka, kofina nkasa, kokɔta mpe kobima mpambampamba na batwalɛti ekoki kopekisa basusu ete bámanyola mpe kobebisa lokumu oyo eyokani na esika ya losambo ya Yehova. Ebongi te ete moto moko akóma kosala misala mitaleli mpenza lisangá to asolola elongo na basusu na ntango makita mazali kosalema, lobá soko likambo ya lombangu lizali kosɛnga na bandeko ete bátika bisika na bango. Soki ezali bongo te, bato nyonso basengeli kofanda mpe koyoka mpo na matomba na bango mpe mpo na matomba ya mabota na bango. Bizaleli mabe bizali na esika te kati na Ndako ya Bokonzi, mpamba te “bolingo . . . ekosalaka na nsɔ́ni te.”—1 Kol. 13:4, 5; Gal. 6:10.
5 Nkombo ya Yehova ekumisami mpe esanzolami na etamboli ya bana na biso na ntango ya makita. Ezali na ntina ete baboti básɛnzɛla bango. Esengeli kolendisa bana ete báyokaka mpe bapesaka biyano. Baboti mingi baponaka esika ya kofanda epai oyo bakoki kobima kozanga nkaka mpo na bamposa ya bana na bango kozanga kopesa basusu mobulu ezangi ntina.
6 Paulo apesaki elendiseli oyo: “Bómitambwisa na lolenge lobongi na nsango malamu.” (Filp. 1:27, NW) Na yango, tósala milende ya kozala na bizaleli bibongi mpe na limemya mpo na basusu na ntango tozali koyangana na makita. Kosala na bomoko ekopesa nzela na “koyikisana mpiko kati na bino, moko na moko kolendisama na kondima ya mosusu.”—Lom. 1:12, NW.