Tómonisa botɔndi mpo na oyo tozali na yango
1 “Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” (Lom. 5:8) Tosengeli mpenza kozala na batɔndi mpo na mpasi monene oyo Yehova mpe Mwana na ye bandimaki mpo na bolamu ma biso! Makila oyo Klisto asopaki epesi biso elikya ya kozala na bomoi ya seko, awa moto ata moko te akokaki kopesa biso elikya motindo wana.
2 Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso? Bato mingi bazali na mposa ya boyebi ya solosolo oyo ekoki kozwama bobele kati na Liloba mosantu ya Nzambe. Mokano ya Yehova ezali ete bato yango báyeba solo. (1 Tim. 2:4) Soki tozali ‘kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe,’ tokomonisa ete tozali kopesa motuya na solo. (Luka 4:43) Na kosanganáká na motema mobimba kati na mosala yango, tokomonisa ete tososoli likambo oyo: Klisto akufaki mpo na biso mpe tosengeli komekola ye na kotosáká na bosembo nyonso etinda na ye ya kozalisa bayekoli.—Mat. 28:19, 20.
3 Mabaku nini tozali na yango mpo na kosakola? Tokoki kozala babongisi-nzela basungi mbala na mbala? Nsima na kokanisa malamu mpenza, basusu bakomona ete bazali na makoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Wana ezali myango malamu mpo na kolekisa ntango mingi na mosala ya kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi. Na mikolo mileki, ntango mosusu olingaki kotondisa lokasa ya lisɛngi kasi mikakatano mipesaki yo nzela te mpo na kosala yango. Ezalela na yo esili mbala mosusu kobongwana uta mwa mikolo. Soki ezali bongo, osili mpenza kokana kosala mosala ya mobongisi-nzela to kozala mobongisi-nzela mosungi?
4 Soki totaleli makambo oyo mazali koleka zingazinga na biso, botɔndi na biso ezali kobakisama mingi. Mobulu, koyinana mpe kowelana ezali se koyikana kati na mokili. Paulo alobelaki eleko na biso ete ekozala ‘ntango ya mpasi.’ (2 Tim. 3:1) Atako ezalela wana ya mpasi ezali, nzokande tozali na nsango mingi ya malamu mpo na koyebisa na bazalani na biso. Tozali na bazulunalo mibale ya kitoko, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa yango na sanza oyo. Tozali mpe na mwa babuku oyo ezali kolobela makambo mingi. Mikanda yango mizali kopesa libɔndisi ya solosolo epai na baoyo bazali kotánga yango. Botɔndi oyo tozali na yango esengeli kopusa biso na kokabola yango mingi mpenza.—Ebe. 13:16.
5 Na esika oyo ozali kofanda, bato bazali mbala mosusu komonisa bosepeli mingi te mpo na makambo ya elimo. Nzokande, ezali na bateritware mosusu epai kuna mbuma ezali kobota mingi. Bosepeli mingi ezali komonana kati na bituluku batangwi oyo bizwami na teritware na biso. Soki ezalela na yo epesi yo nzela, okondima kosalela makoki na yo kati na teritware epai kuna bato bazali na mposa makasi ya lisungi na yo? Na ntembe te, mokɛngɛli ya zongazonga na bino akozala na mwa makanisi ya kopesa yo kati na likambo yango.
6 Bantina ya kozala na botɔndi mpo na oyo tozali na yango ezali mingi; na ntembe te, tozali na makambo mingi ya malamu. Lolenge loleki malamu ya komonisa botɔndi na biso epai na Yehova ezali bobele ya koyebisa nkombo na ye mpe mikano na ye epai na bazalani na biso.—Yis. 12:4, 5.