Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/97 nk. 3-5
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tokosala mosala yango lisusu?—Libyangi mosusu mpo na babongisi-nzela basungi​—Eteni 1
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Sakolá mpe pesá litatoli malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 3/97 nk. 3-5

Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000

Okoki kozala mobongisi-nzela mosungi na Mársi? na Apríli? na Máí?

1 “Tozali koluka basakoli 1 000.” Wana ezalaki motó na lisoló moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Apríli 1881. Ezalaki kobyanga mibali mpe basi oyo bamipesá, “baoyo Nkolo apesá boyebi ya solo na ye” ete básalela mingi ntango na bango mpo na kopalanganisa solo ya Biblia. Baoyo bazalaki na likoki ya kolekisa katikati ya ntango na bango bobele na mosala ya Nkolo balendisamaki ete bámipesa na bolingo na bango moko mpo na kokóma bapalanganisi ya nsango malamu baoyo babéngamaki ete ba colporteurs​—baoyo bazalaki liboso ya babongisi-nzela ya lelo.

2 Atako makambo mingi masili kobongwana uta bambula 1800, nzokande ezali na likambo moko oyo libongwani te: basaleli bamipesi epai na Nzambe bayebi ete basengeli kokóba kosalela mingi ntango na bango mpo na koyebisa nsango malamu. Na kozaláká babongisi-nzela basungi, basakoli ya lisangá bazali kosala milende na kolekisa ntango mingi na mosala ya Bokonzi, yango ezali kosalisa bango ete bábota mbuma mingi.​—Kols. 4:17; 2 Tim. 4:5.

3 Uta mosala ya mobongisi-nzela mosungi ebandaki, ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi bazali kozwa esengo na mosala yango. Lolenge wana ya mosala ya mobongisi-nzela esili kobimisa bosepeli oyo ezali sé kokóla, na boye ete na Apríli 1985 tozwaki motuya ya sika ya babongisi-nzela basungi 100 000 na États-Unis! Uta ntango wana, esili kosalema na boumeli ya mbala misato ete basakoli koleka 100 000 bazali kokóma babongisi-nzela basungi na boumeli ya sanza ya Apríli: na 1988, na 1989, mpe na 1992. Na Burundi, na Congo mpe na Zaïre, tokómaki te mpe tolekisaki te mitángo ya mbula ya mosala 1995. Tozali komona nde kokita ya motángo yango, na Burundi 100, na Congo 359, mpe na Zaïre 6 016 na boumeli ya mbula ya mosala 1996. Na ntembe te, likoki ezali mpenza ya kozongela molende wana na boumeli ya sanza ya Mársi, ya Apríli mpe ya Máí. Lolenge malamu ya kolendisa elimo ya mosala ya mobongisi-nzela esɛngi ete bankulutu bápesa ndakisa, elingi koloba na kobandáká bango moko mosala yango to mpe na kosanganáká mingi na mosala ya kosakola na boumeli ya basanza wana.

4 Tozali kolendisa bino ete bómityela mokano ya kozala babongisi-nzela basungi na boumeli ya sanza moko to basanza mingi, na Mársi, na Apríli mpe na Máí. Mpo na nini na Mársi? Mpamba te na mbula oyo Ekaniseli ya liwa ya Klisto ekozala na Mwalomingo 23 Mársi. Likambo ya malamu oyo tokoki kosala ezali ya kosalela bapɔ́sɔ oyo ezali liboso ya molulu wana mpo na komipesa na molende nyonso kati na mosala ya kosakola Bokonzi, mosala oyo Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto abandisaki, boye te? Na kosanganáká mingi na mosala ya kopesa litatoli na Mársi, tokozala na likoki ya kobyanga ebele ya bato ya motema malamu ete báya kosangana elongo na biso mpo na ekaniseli ya liwa ya Klisto. Epai mosusu, sanza oyo ezali na mikolo Myapɔ́sɔ mitano mpe mikolo Myalomingo mitano, yango epesi nzela na komipesa mingi kati na mosala ya kosakola na wikende. Ya solo, soki tokóbi kozala na mosala ya molende na boumeli ya sanza ya Apríli mpe ya Máí, tokoki kobatela bosepeli oyo tolamwisaki mpe kobanda boyekoli ya Biblia na bandako na lisalisi ya mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Lisusu, tokotala teritware na biso na mozindo, mingimingi na wikende, na kolakisáká banimero ya sika oyo ebongi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!

5 Nani akoki kozala mobongisi-nzela mosungi? Búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe elobi na bosikisiki na lokasa 114 ete: “Atako ezalela na yo ezali boni, soki osili kozwa batisimo, soki ozali na etamboli malamu mpe soki ozali na likoki ya kopesa ngonga 60 na sanza mpo na mosala ya kosakola, mpe soki okanisi ete okoki kosala sanza moko to sanza mingi lokola pionnier auxiliaire, bankulutu ya lisanga na yo bakosepela mpo na kondima lisengi na yo na mosala oyo ya ntina.” Okoki kosangana na mosala wana na Mársi? na Apríli? na Máí?

6 Soki bankulutu bazali na elimo malamu mpo na mosala wana mpe soki basakoli mosusu bazali kosimba ebongiseli wana na motema na bango mobimba, libyangi wana ya babongisi-nzela basungi 100 000 ekolónga. (Ebe. 13:7) Batata nyonso ya mabota balendisami ete bátalela soki motángo boni ya basangani ya mabota na bango bakoki kokɔta na molɔngɔ́ ya babongisi-nzela basungi na boumeli ata ya sanza moko kati na basanza oyo ezali koya.​—Nz. 148:12, 13; talá lisusu Misala 21:8, 9.

7 Kosukisa nokinoki te na koloba ete mosala ya mobongisi-nzela mosungi ekoki na yo te mpo ete osalaka mosala ya mosuni mokolo mobimba; mpo ete ozali mwanakelasi; mpo ete ozali na mikumba ya libota to na masɛngami mosusu mauti na Biblia. Mpo na bamoko, likoki ekozala te ya kosangana na mosala yango; atako bongo, bakoki kolónga na kozaláká na ebongiseli malamu mpe na kozwáká lipamboli ya Yehova. (Nz. 37:5; Mas. 16:3) Tiká ete mposa ya kosangana na mosala ya mobongisi-nzela ezala na bopusi likoló na ezalela na yo; kotika nzela te ete ezalela na yo ezala na bopusi likoló na mposa na yo ya kozala mobongisi-nzela. (Mas. 13:19a) Na yango, lokola topusami na bolingo mozindo mpo na Yehova mpe mpo na bazalani, mingi bakozala na likoki ya kosembola manáka na bango ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kokólisa mosala na bango ya kosakola na boumeli ya sanza moko. (Luka 10:27, 28) Matomba malamu mazali liboso ya baoyo bazali kosala milende makasi kati na mosala ya Bokonzi.​—1 Tim. 4:10.

8 Oyo ezali kouta na mosala ya mobongisi-nzela mosungi: Milende oyo ebele ya basaleli ya Nzambe bazali komonisa na molimo na bango mobimba na kozaláká babongisi-nzela basungi ezali loyembo monene ya masanzoli mpo na Yehova. Lokola basakoli wana bazali komipesa mingi mpo na koyebisa nsango malamu epai na ebele ya bato, bamibɛlɛmisi mpenza na Yehova. Ya solo, bazali koyekola mingi kotalela ye mpo na kozwa elimo na ye mpe mpo na kopambwama.

9 Kozala ya babongisi-nzela basungi, ya babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene oyo bazali komipesa na kosala elongo na biso ezali kobimisa bopusi makasi kati na lisangá. Lokola bazali koyebisa makambo oyo bazali kokutana na yango na mosala ya kosakola, esengo na bango ezali koyambenela basusu. Yango ezali kolendisa basusu na kotalela lisusu makambo na bango oyo masengeli kozala na esika ya liboso, mpe makoki bazali na yango ya kosangana mingi na mosala oyo moleki ntina kati na mosala na biso ya kosakola. Ndeko mwasi moko oyo azwaki batisimo wana azalaki na mibu 70 akómaki nokinoki mobongisi-nzela mosungi mpo na libela. Batunaki ye mwa bambula na nsima mpo na nini, na mbula na ye, azalaki kokóba komipesa mingi na mosala ya kosakola na kozaláká mobongisi-nzela mosungi na sanza nyonso. Ayanolaki ete azalaki na mayoki ete abebisaki mibu 70 ya ebandeli ya bomoi na ye mpe azalaki kolinga te ete abebisa oyo atikalaki na yango na bomoi!

10 Mosakoli nyonso oyo azali mobongisi-nzela mosungi akómaka na molende mingi kati na mosala ya kosakola. Elenge mobali Motatoli moko andimaki ete: ‘Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki na momeseno ya kokende elongo na baboti na ngai kati na mosala na bango ya kosakola. Nazalaki komona ete yango ezalaki mpenza lisɛki. Nde na nsima, nayaki komona ete na eteyelo nakesanaki na baninga na ngai. Nabandaki koyoka nsɔ́ni mpo na kolobela solo epai na baninga na ngai. Mosala ya kosakola ndako na ndako ezalaki kobangisa ngai, mpamba te nazalaki kobanga noki nakokutana na mwana moko ya kelasi na biso. Nakanisi ete mokakatano na ngai ezalaki bongo bobángi ya bato. [Mas. 29:25] Nsima ya kosilisa bakelasi na ngai, nalingaki komeka kozala mobongisi-nzela mpo na mwa ntango. Litomba ezali ete mosala ya kosakola ekómaki na bopusi malamu likoló na ngai koleka ndenge nazalaki kotalela yango liboso. Nazalaki kotalela yango lisusu te lokola mosala ya lisɛki soko mpe te lokola bozito moko monene. Komonáká baoyo bazalaki koyekola Biblia elongo na ngai kokóla kati na solo, nazalaki na bosepeli makasi na komonáká ete Yehova Nzambe azalaki kosunga milende na ngai.’ Elenge mobali wana akóbaki kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

11 Na ndenge emonanaka mpenza, ntango babongisi-nzela basungi bazali mingi kati na lisangá, teritware ekoki kotalelama na bozindo. Ndeko oyo azali kopesa bateritware akoki kosɛnga lisalisi ya babongisi-nzela basungi mpo na kosakola na bisika oyo bitalelamaka mingimingi te. Soki bakomema eloko ya kolya mpe soki bakolekisa mokolo mobimba na mosala, bakozala na likoki ya kosakola ata na bisika oyo bitangwi mpenza mosika na teritware na bango.

12 Bankulutu bazali kokamata bibongiseli: Mpo na sanza ya Mársi, ya Apríli mpe ya Máí, ekozala malamu kobongisa mitindo mingi ya kopesa litatoli na bantango ekeseni na pɔ́sɔ, ezala mpe na nsima ya nzánga mpe na ebandeli ya mpokwa, mpo ete basakoli mingi bákoka kosangana na yango. Longola mosala ya kosakola oyo tomeseni kosala ya ndako na ndako, bokobongisa bantango mpo na kopesa litatoli na balabála, kosakola na bateritware ya mombongo mpe kokutana na baoyo bazalaki te. Na kokamatáká bibongiseli motindo wana, bankulutu bakosalisa babongisi-nzela ete básala elongo na lisangá na ntango oyo ebongi na bango malamu. Lisangá esengeli koyeba malamu bibongiseli bikamatami mpo na mosala ya kosakola. Makita ya mosala ya kosakola masengeli kobongisama malamumalamu. Epai mosusu, bateritware esengeli kozala mingi, mpe bokokanisa liboso mpenza na kosala komande ya bazulunalo mingi mpe mikanda misusu.

13 Omisalela manáka na yo moko ya mosala: Ndeko moko, oyo na ebandeli, azalaki kokakatana mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi, alobaki ete: “Ezali mpenza pɛtɛɛ koleka ndenge nazalaki kokanisa. Esengeli bobele kozala na manáka moko ya malamu.” Na lokasa ya nsuka ya siplemá oyo, omoni ndakisa ya manáka ya mobongisi-nzela mosungi oyo ekoki mpo na yo? Mpo na kolónga, esengeli kosala ngonga 15 na mosala ya kosakola pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.

14 Mpo na bamama ya ndako mpe na baoyo basalaka bamoko nsima na basusu lokola ekipi na mpokwa, likoki ezalaka mpo na bango ya kozala babongisi-nzela basungi na kokanáká kosakola na ntɔ́ngɔ́. Bilenge oyo bazali naino kotánga kelasi mpe basakoli oyo basalaka na butu bakoki mpe kolekisa nsima ya nzánga na mosala ya kosakola. Bamoko oyo basalaka mokolo mobimba, bakanisaki ete likoki ezalaki mpo na bango na kozwa mokolo moko ya bopemi na pɔ́sɔ, to mpe kolekisa bawikende nyonso na mosala ya kosakola, na kopesáká mingi litatoli na mpokwa. Kati na baoyo bakoki kosakola bobele na wikende, mingi baponaka basanza oyo ezali na bawikende mitano mobimba. Mbula oyo, ekozala bongo mpo na sanza ya Mársi, ya Augústo mpe ya Novɛ́mbɛ. Na lisalisi ya manáka etondisami te oyo ezali na lokasa 6, kanisá na likebi nyonso mpe kati na libondeli manáka oyo ebongi na ezalela na yo.

15 Moko na matomba ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi ezali bongo ezaleli na yango ya pɛpɛlɛ. Okoki kopona basanza oyo okozala mobongisi-nzela, mpe okoki lisusu kozala mobongisi-nzela mbala nyonso oyo okolinga. Ntango mosusu okolinga kozala mobongisi-nzela mosungi mpo na libela, kasi likoki ezali te. Mpo na nini te kozala mobongisi-nzela sanza nyonso oyo likoki ezali? Nzokande, basusu bakoki kozala babongisi-nzela basungi sanza moko nsima na mosusu na boumeli ya bileko molai.

16 Nzela mpo na kozala mobongisi-nzela ya ntango nyonso: Mingi kati na baoyo bazali na elimo ya mosala ya mobongisi-nzela bakolinga kozala babongisi-nzela ya sanza na sanza kasi bazali komituna soki ezalela na bango ekopesa bango nzela mpe soki bakozala mpenza na ntango mpe soki bakoyika mpiko mpo na kolónga na mosala yango. Na ntembe te, mingi kati na baoyo bazali sikawa babongisi-nzela ya sanza na sanza liboso bazalaki babongisi-nzela basungi mpo na komona soki bakokoka mosala ya ntango nyonso. Na kobakisáká bobele ngonga moko na mokolo, to mokolo mobimba na boumeli ya pɔ́sɔ likoló na manáka na ye ya mosala ya mobongisi-nzela mosungi, likoki ezali ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mpo na komona soki okolónga yango, mpo na nini te komeka kosala ngonga 90 na mosala ya kosakola na boumeli ata ya sanza moko oyo ozali mobongisi-nzela mosungi? Bobele na libaku yango, okozala na bato ya sika mpo na kotala mpe okozala na bayekoli ya Biblia, yango ekosala ete mosala na yo ya mobongisi-nzela ekesana mpe ezala na bokatikati.

17 Ndeko mwasi moko azalaki na esengo ya kozala mobongisi-nzela mosungi sanza nyonso na boumeli ya mbula motoba. Mokano na ye ezalaki ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mpo na yango, amekaki mitindo minei mikeseni ya manáka na elikya ya komizwela ntango oyo ekopesa ye nzela ya kokokisa ngonga 90, oyo ezali bongo mokano ya babongisi-nzela ya sanza na sanza. Sanza nyonso, azalaki kosala manáka moko to mibale mpo na kotala soki likoki ezalaki. Kasi, ntango azalaki kotalela yango, azalaki komilobela ete likoki ezalaki te mpo na ye ya kosala mosala ya ntango nyonso. Atako bongo, akóbaki kosɛnga litambwisi ya Yehova. Yango wana, mokolo moko, wana ezalaki ye kobongisa likita ya mosala, atángaki kati na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli 1992 lisoló oyo ezalaki koloba ete: “Na esika ya kotya likebi mingi na bokokisi ngonga, mpo na nini te kotya makanisi na biso likoló na likoki monene oyo lipesameli biso na kosangana na mosala ya kobuka mbuma? (Yoa. 4:35, 36)” Ayebisi ete: “Natángaki maloba wana mbala mitano to motoba mpe nandimisamaki mpenza ete yango ezalaki eyano oyo Yehova apesaki. Na bongo nazwaki ekateli ya kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza.” Lokola manáka ya mosala ya mosuni oyo azalaki kosala mpo na ndambo ya ntango ekokaki mpenza kopesa ye nzela te, atondisaki demande ya mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Pɔ́sɔ moko na nsima, manáka na ye ebongwanaki mpe misala oyo bapesaki ye ebongaki na ye mpenza. Asukisi na kolobáká ete: “Yango ezali mpenza lisungi ya Yehova, boye te?” Mpe abakisi ete: “Soki osɛngi Yehova litambwisi na ye mpe soki apesi yo yango, kobwaka yango te: ndimá yango.” Soki mposa na yo ya sembo ezali ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza, nsima ya kosala lokola mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya sanza misato na Mársi, na Apríli mpe na Máí mbala mosusu okondimisama ete yo mpe okoki kobanda mosala ya ntango nyonso.

18 Tozali na elikya ete Yehova akopambola molende ya basaleli na ye mpe ete akosunga milende bazali kosala mpo na koyebisa nsango malamu ya lobiko na eleko wana ya mosala mingi na basanza oyo ezali koya. (Yis. 52:7; Lom. 10:15) Okoyanola na libyangami mpo na babongisi-nzela basungi 100 000 na kobandáká mosala wana na sanza ya Mársi? ya Apríli? mpe ya Máí?

[Etanda na lokasa 3]

Oyo osengeli kosala mpo na kozala mobongisi-nzela mosungi

■ Zalá na elikya

■ Bondelá Yehova mpo ete apambola milende na yo

■ Sɛngá na mosakoli mosusu ete osala na ye elongo mosala ya mobongisi-nzela

■ Omisalela manáka ebongi ya mosala

■ Osalaka komande ya bazulunalo mingi

■ Osimbaka bibongiseli oyo lisangá ekamati mpo na mosala ya kosakola

■ Luká mabaku ya kopesa litatoli na lolenge ya libaku malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto