Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/95 lok. 4
  • Nsango malamu mpo na basɔkɛmi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu mpo na basɔkɛmi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Kabolaká bazulunalo ntango ozali na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Tólakisa bazulunalo na mabaku nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Luká komikitisa mpe sepelisá Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 11/95 lok. 4

Nsango malamu mpo na basɔkɛmi

1 Tozali kobika na eleko oyo Yehova akokweisa bikateli na ye. (Ezek. 9:5, 6) Ezali likambo ya ntina lelo ete, bipai binso, basɔkemi bákebisama na ntina na makambo oyo makobima, mpo ete bámilɛngɛla mpo na yango. Yehova asili kopesa epai na libota na ye mokumba ya “kosakola nsango malamu epai na basɔkɛmi,” mpe yango ezali elembo ya motema-boboto na ye. (Yis. 61:1, 2, NW) Bazulunalo ezali kosalisa biso na kosakola nsango wana na etando monene koleka.

2 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali kopesa biso bilei makasi ya elimo oyo ezali kolendisa biso mpe kopusa biso na mosala. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobɔndisa basɔkɛmi na koyebisáká bango nsango malamu oyo ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe ekómisa mabele oyo paladiso. Lamuká! ezali kopesa biso bantina ya malamu ya kotya motema na elaka ya Mozalisi oyo etali kosala mokili ya sika ya kimya mpe ya libateli. Kokabola bazulunalo yango mingi ezali moko na myango ya nokinoki mpenza mpo na komemela basɔkɛmi nsango malamu. Makanisi nini tokoki komonisa polele, kati na banimero ya sika, oyo makoki kopesa nzela na lisolo?

3 Tokoki kolakisa “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 1 Mai 1995 na kobendáká likebi likoló na lisolo “Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo” mpe tótuna motuna oyo:

◼ “Na makanisi na yo, litomba nini tokoki kozwa na botángi ya Biblia? [Tótika moto yango ayanola.] Kati na Baloma 15:​4, Biblia yango moko ezali kosalisa biso mpo na kokanisa na motuna yango. [Tótánga Baloma 15:⁠4.] Bato mingi kati na kartye bazali na Biblia na bango, kasi bobele bato moke nde bazali komibombela ntango ya kotánga yango mbala na mbala. Tondimisami ete elikya ya solo bobele moko mpo na mikolo mizali koya ezwami kati na Biblia mpe tozali na endimiseli ete bobele na kotángáká yango tokopambwama.” Tópesa makanisi mosusu mabongi mpe na nsima tólakisa bazulunalo.

4 “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 15 Mai 1995 lizali na lisolo moko oyo motó ya likambo na yango ezali kobenda likebi: “Bomoi ya sika mpo na bankɔkɔ na biso.” Tokokoka mbala mosusu kolamwisa mposa ya molobani na biso na kosaleláká maloba oyo mpo na kobanda lisolo:

◼ “Bato mingi bazali komituna soki bankɔkɔ na bango bazali lolenge nini. Lokola basilá na bango kokufa, mingi bandimisami ete bakoyeba yango ata mokolo moko te. Okanisi ete likoki ya koyeba bankɔkɔ na biso likozwama?” Tótika moto yango ayanola. Na nsima, tótánga Yoane 5:​28, 29, mpe tóyebisa molobani na biso ete Nzambe alaki kopesa lisusu bomoi epai na bankɔkɔ na biso na mabele oyo makobongwana paladiso.

5 Tokoki kolakisa nimero ya Lamuká! ya 8 Mai 1995 (ya Lifalanse) na kotunáká motuna oyo:

◼ “Na makanisi na yo, esengeli kosala nini mpo ete bomoi ezala mpenza na ntina?” Tótika moto yango ayanola. Tólakisa ye lisolo “Ntina ya bomoi ezali nini?” oyo ezwami na lokasa 26, mpe tótánga makambo Salomo alobaki na Mosakoli 2:11. Na nsima, tólimbola polele toli oyo apesaki na mokapo 12, molɔngɔ 13. Tópesa na molobani na biso mposa ya kokamata zulunalo.

6 Soki ozali kolakisa zulunalo, kobosana te kotika trakte Nsango ya Bokonzi No. 34 (soki ezali naino kati na libombo ya mikanda) epai na bato nyonso oyo bazwi yango naino te. Tosengeli kozala ntango nyonso pene mpo na kolakisa mikanda epai na bato, awa eyebi biso ete, mbala mosusu, yango ekotángama na basangani ya bato ya libota yango to na baninga oyo bakoya kotala bango. (1 Tim. 6:18) Nsango malamu oyo tozali komemela basɔkɛmi ekoki kobikisa bango.​—⁠1 Tim. 4:⁠16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto