Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/95 lok. 4
  • Elembo oyo ezali kopesa lobiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elembo oyo ezali kopesa lobiko
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tósalela bazalani na biso malamu na kolandáká bosepeli nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Makomami nyonso mazali na litomba mpo na koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tóbatela bosepeli oyo bato bamonisaki
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 11/95 lok. 4

Elembo oyo ezali kopesa lobiko

1 Liboso ete akweisa bikateli na ye ya sembo, Yehova akebisaka ntango nyonso bato mpe azangaka te kopesa basɔkɛmi mwango ya kozwa lobiko. Na mikolo ya Ezekiele, bamoko bazalaki komitungisa mpe kolelalela na ntina na makambo nyonso ya mbindo oyo mazalaki kosalema. Yehova asalaki na boye ete baoyo bakokisaki masɛngami bátyama elembo ete bákoka kobikisama. (Ezek. 9:4-6) Mosala ya kosakola oyo tozali kosala lelo ezali kokokisa mokano motindo moko. Tozali na mokumba monene ya kokokisa kati na likambo wana.

2 Kokutana na bato ya motema sembo ezali bobele litambe ya liboso. Tosengeli kozwa bibongiseli mpo na kozongela bango. Komibongisa mpo na bozongeli ya sika ebandaka uta boleki na biso ya liboso, ntango tokomi mokanda oyo totikaki mpe lisolo oyo tosololaki. Kolonga ya bozongeli na biso ekotalela mingimingi makambo oyo tobongisaki mpo na kolobela mpe kosala yango.

3 Soki totikaki “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,” tokoki kobenda likebi likoló na motó ya likambo na yango monene ete:

◼ “Nakanisi ozali komona lolenge ekomami na lokasa ya ezipeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ete ‘Eyebisaka Bokonzi ya Yehova.’ Eloko ekesenisi zulunalo oyo ezali ete yango endimaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali mwango bobele moko mpo na kosilisa mikakatano ya mokili. Ezali kolimbola makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekokokisa ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabele. Wana ezali nsango malamu oyo, engebene Yesu, esengelaki kosakolama na mokili mobimba.” Tótánga Matai 24:14, mpe tólimbola lolenge ya kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mbala na mbala mpe ya kosalela yango mpo na boyekoli ya Biblia ya moto ye moko.

4 Tokosepela mbala mosusu kobenda likebi bobele likoló na Biblia mpe kolobela ntina ya kotanga yango mbala na mbala. Tokoki koloba ete:

◼ “Emonani ete pene na bato banso oyo toyebi bakosepela kozwa mwa batoli ya malamu mpo na kosilisa mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo. Na makanisi na yo, epai wapi tokoki kozwa batoli oyo ebongi na kotyela motema? [Tótika moto yango ayanola.] Mingi batyaki elikya na batoli ya baninga na bango to bafutaki mosolo epai na bapesi-toli mpo ete bápesa bango yango, kasi bayokisamaki mawa mpenza. Nzokande, bamilio ya bato basili komona ete Biblia ezali liziba bobele moko ya batoli oyo ebongi na kotyela motema. Biblia ezali komonisa lolenge ya kolonga ata mokakatano nini. [Tótánga na 2 Timote 3:16, 17.] Ozali mbala mosusu kokanisa ete ezali mpasi mpo na kosolola na Biblia, kasi tiká nalakisa yo lolenge ya kozwa batoli mingi ya mayele oyo ezali na kati na yango.” Na nsima, tófungola “Index des mots bibliques les plus importants” na liloba “amour” na nsuka ya Traduction du monde nouveau, mpe tózwa mwa mikapo oyo mizali komonisa lolenge oyo bolingo ekoki kosalisa biso na kosilisa mikakatano.

5 Kozaláká na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia, tokosepela mbala mosusu kolobele buku “Okoki kozala na bomoi na mabele oyo ekobongwana paradis” na kobandáká lisolo na maloba oyo:

◼ “Tolingaka libota na biso mpe tozalaka na mposa ya kopesa yango nyonso oyo ezali malamu koleka. Libota na yo ekokaki kozala na esengo soki ezalaki kofanda na mokili motindo oyo, boye te?” Tólakisa bililingi bizwami na lokasa 156 kino na lokasa 157. Tótánga mokapo moko to mikapo mibale oyo mikomami na nkasa yango mpe tómonisa sikisiki ete bilaka wana bipesami na Yehova Nzambe, oyo akoki kokosa te. Tólakisa moto yango kolandana ya mikapo, na lokasa 5 mpe na lokasa 6, mpe tótuna ye soki lisolo nini lisepelisi ye mingi koleka; tófungola buku yango na mokapo oyo ye akopona mpe tótalela paragrafe moko to baparagrafe mibale.

6 Okolinga kosalisa moto moko ete azwa elembo oyo ekopesa ye lobiko? Mpo na kosala bongo, esengeli ‘kokokisa mpenza mosala na biso’ na komibongisáká malamumalamu mpe na kozongeláká nokinoki bato nyonso oyo bazali komonisa bosepeli.​—2 Tim. 4:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto