Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/11 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 2/11 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Febwali

“Okanisi ete tokoki mpenza koyeba soki Nzambe azalaka ndenge nini? [Tiká ye apesa eyano.] Nazali na lisolo moko ya malamu oyo elobeli likambo yango.” Tángá mpe limbolá makanisi oyo ezali na nse ya motuna 2 na lokasa 16, tángá mpe limbolá vɛrsɛ moko kati na oyo bapesi wana. Pesá ye zulunalo yango, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na kotalela makanisi oyo ezali na nse ya motuna 3.

Lamuká! Febwali

“Lokola Biblia ezali buku moko ya kala, bato mosusu bakanisaka ete makambo oyo yango elobelaka eyokani te na oyo siansi elobelaka. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bakamwaka ntango batángaka likambo oyo Biblia elobi awa. [Tángá Yisaya 40:22.] Lisolo oyo ebandi na lokasa 22 eyanoli na motuna oyo: Siansi ná Biblia ezali na boyokani?”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Marsi

“Batatoli ya Yehova bayebani mpo na mosala na bango ya kosakola. Osilá komituna mpo na nini basalaka mosala yango? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká ndimbola oyo. [Tángá Matai 24:14.] Zulunalo oyo eyanoli na mituna oyo: Nsango malamu ezali nini? Bokonzi ezali nini? Mpe nsuka oyo esengeli koya ezali nini?”

Lamuká! Marsi

“Lokola bato mingi bazali kobunda na maladi, tozali kotángela bato vɛrsɛ oyo mpo na kolendisa bango. [Tángá Yisaya 33:24.] Ntango maloba ya vɛrsɛ oyo ekokokisama, okanisi ete bomoi ekozala ndenge nini? [Tiká ye apesa eyano.] Tii ntango Nzambe akosilisa maladi, ezali na makambo ya ntina oyo biso nyonso tokoki kosala mpo tózala nzoto kolɔngɔnɔ. Zulunalo oyo elobeli makambo yango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto