Tósalisa baoyo bazangi kondima
1 Na eleko na biso, kotalelama lokola moto ayekolá makambo mingi mpe kozala na elimo efungwamá ezali likambo libongi mpenza. Bafilozofi ya bato mpe mateya mauti na makanisi mpamba mazali kokumisama mingi, nzokande bizaleli malamu ya elimo bibwakami pembeni. Bato ya motema sembo oyo bandimaka bobele makambo ya solosolo oyo mamonisami polele mpe oyo bandimaka bobele basolo oyo ekoki kososolama, bakosepela kotalela buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Mokanda yango ekoki kosalisa baoyo bazangi kondima. (Lom. 1:19, 20) Tósɛnzɛla na boye ete tózongela baoyo nyonso bakomonisa bosepeli mpo na nsango na biso.
2 Tokoki kobanda lisolo boye:
◼ “Na ntembe te, oyebi balakisi mingi bandimaka ete moto abimaki na nzela ya evolisyo, mpe ete biloko nyonso oyo bizali lelo bibimaki pwasa. Okanisi nini mpo na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Likanisi yango etikali bobele liteya mpamba, elingi koloba ‘ya bikanisakanisa,’ to ‘likanisi oyo bosolo na yango emonisami te.’ Na boumeli ya bikeke mingi, endimamaki ete mabele mazali patatalu; kasi sikawa, ayebani malamu ete yango ezalaki endimiseli ya bozoba oyo etongamaki likolo na makambo ya solosolo te. Okanisi te ete ekoki mpe kozala bongo mpo na liteya ya evolisyo?” Tótánga maloba ya ebandeli na lokasa 4, mpe na nsima tósolola likoló na Yisaya 42:5.
3 To mpe tokoki kobanda lisolo na lolenge oyo elandi:
◼ “Na mikolo na biso, tokutanaka mbala mingi na bato oyo bandimaka Nzambe te. Na ntango ya kala, likambo yango lizalaki mpenza komonana mingi te. Na makanisi na yo, mpo na nini bato mingi babungisi kondima na bango? [Tótika moto yango ayanola.] Mingi balobi ete ezali mpo na mobulu mpe mawa oyo ezali kobakisama na lolenge ya nsɔmɔ kati na mokili. Bazali komilobela ete soki Nzambe azalaki, mbele asengelaki kosilisa bampasi nyonso wana. Lokola bazwi ndimbola oyo ebongi ete, bazali mbala mingi kokóma bato oyo bandimaka Nzambe te. Nzokande, ezali na makambo mingi ya solosolo oyo mamonisi ete Nzambe azali mpe ete etikali moke akokómisa mabele esika oyo tokofanda na esengo mpe na kimya.” Tókoba lisolo na kosaleláká makanisi ya paragrafe 19, na lokasa 196.
4 Biblia na biso na lobɔkɔ, tokoki kobanda lisolo boye:
◼ “Tozongi lisusu na ndako na yo na ntina ete tólimbwela yo mpo na nini boyekoli ya Biblia ezali na ntina mingi na eleko oyo tozali kobika na yango. Bato mingi bazali na Biblia na bango, kasi bobele bato moke nde bazali kozwa ntango ya kotánga yango. Bamoko bazali koyebisa biso polele ete bandimaka yango lisusu te. Bongo yo, okanisi boni mpo na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Moko na makambo oyo mazali kondimisa biso ete Biblia epemamaki na Nzambe ezali bongo kokokisama ya bisakweli oyo bizali kati na yango.” Tólobela mikapo ya Biblia oyo mizali na paragrafe 6, lokasa 234.
5 Maloba oyo malandi makoki kosimbama malamu:
◼ “Tozali komona polele ete biloko bizalisami bizali na bonzenga mpenza mpe bimonisi bwanya. Elilingi kitoko oyo ya kolala ya moi ezali ndakisa malamu ya likambo yango.” Tólakisa elilingi oyo ezali na lokasa 12 mpe na lokasa 13. Tóbimisa polele makanisi ya etánda oyo ete “Quelques sujets de réflexion” (Mwa makambo mazali kopusa na kokanisa) mpe tóyebisa na nini buku yango ezali kopesa biyano ya solosolo na mituna minene ya eleko na biso.
6 Tokoki mpenza kozala lipamboli mpo na bazalani na biso na kosaleláká buku Création mpo na kosalisa bango ete bázala na kondima makasi kati na Mozalisi na bango.