Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/95 lok. 6
  • Yehova azali Mozalisi na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali Mozalisi na biso
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tólakisa nsango malamu na elikya nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tósalisa baoyo bazangi kondima
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 12/95 lok. 6

Yehova azali Mozalisi na biso

1 Bamilio ya bato bandimaka ete bomoi ezalisamaki na Nzambe. Bato mingi mosusu bazali kondima evolisyo. Mpe ezali na baoyo bazali ata na likanisi moko te kati na likambo yango. Buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? ezali koloba epai na bato banso. Mokanda yango mozali kopesa ndimbola mozindo ya lolenge oyo bomoi ebandaki mpe emonisi na nini yango etaleli bomoi na biso ya mikolo mizali koya. Na sanza ya Desɛmbɛ, tokokabola buku yango kitoko.

2 Ezala bato minene ya siansi bandimi bandimbola oyo mokanda yango ezali kopesa. Na Pays-Bas, Moto moko oyo asalaka na etuluku ya bolukiluki kati na makambo matali siansi akomaki ete: “Bato bamizelaki te ete buku yango ekokaki kozala bongo. Kolandana ya mikapo ebongi mpenza mpe bililingi bimonisami kino ndelo moko ya likoló ya siansi, na boye ete moto moko te akoki kotya ntembe na yango, longola bobele soki azali mokufi-miso. Avoka moko alobaki ete: “Natángaki yango mbala minei, mpe nazali ntango nyonso kokamwa na ntina na bolukiluki mozindo mpe mosala ya mayele oyo mokanda yango esɛngaki.” Tokoki bongo komindimisa ete bato mosusu mpe bakosepela na buku yango.

3 Mbala mosusu, tokopona lisolo mokuse lokola oyo:

◼ Tófungola buku yango na lokasa 6 mpe tóloba ete: “Bato mingi bakanisa ete planɛti na biso mpe biloko nyonso ya bomoi oyo bizali kati na yango bibimaki pwasa. Okanisi ete ndimbola wana ebongi mpenza? [Tótika moto yango ayanola.] Ezali na makambo mingi ya solosolo oyo mandimisi likambo oyo Biblia elobi na ntina na Mozalisi moko oyo aleki na nguya, kasi oyo atondi mpe na bolingo. Ezali Nzambe ya solo, mpe nkombo na ye ezali bongo, Yehova.” Tótángaka Nzembo 83:18, mpe tólimbola na mokuse ete mokano ya Nzambe ezali ya kobongola mabele mobimba makóma paladiso.

4 Soki tolingi kokɔta nokinoki na bozindo ya likambo, tokoki koloba boye:

◼ “Osilá komituna motuna oyo?” Tólakisa motó na likambo ya buku yango, tófungola na lokasa 7, tótánga mituna oyo mitunami na paragrafe 2 mpe tóloba ete mokanda oyo mozali kopesa biyano ya solosolo oyo biuti na Biblia.

5 To mpe tokoki koloba boye:

◼ “Osilá komituna soki mabele mabimaki ndenge nini? Mingi bazali koloba ete yango euti na kopaswana monene ya etando. Bongo yo, okanisi nini mpo na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia eteyi ete Nzambe asalaki mabele mpo na kozalisa yango efandelo na biso ya seko. Yango ekeseni na baplanɛti mosusu ya ebongiseli ya zingazinga ya moi. Na ndenge toyebi yango, ezali planɛti bobele moko ya molɔngɔ epai kuna tozali kokuta biloko nyonso oyo bisengeli mpo na bomoi.” Tófungola buku yango na lokasa 130, tótala na paragrafe 5 mpe tólimbola mpo na nini mabele ezali mpenza mosala ya Motongi moko ya makoki.

6 Mwango mosusu ezali oyo ya koloba ete:

◼ “Bato mosusu bakanisaka ete biso toutá na bato-makako. Bazali koloba ete bankɔkɔ na biso bazalaki boye. [Tólakissa elilingi ya lokasa 89.] Okanisi nini mpo na yango?” Tótika moto yango ayanola. Tólobela mingi makambo oyo malobelami na paragrafe 20 mpe na nsima tótánga Misala 4:24, oyo ezali komonisa Yehova ete azali Mozalisi mpe Mopesi na bomoi. “Buku oyo ezali kotalela liteya ya evolisyo na lisalisi ya makambo oyo Biblia elobi.” Tófungola na lokasa 5 epai kuna tokokuta mikapo ya buku yango, mpe tópona mwa mitó na makambo; na ndakisa, motó na likambo ya mokapo 1, ya mokapo 7, ya mokapo 15, mpe ya mokapo 19.

7 Bato ya motema sembo, oyo bakosamaki na baoyo bazali na kondima te kati na Yehova mpe na Liloba na ye, bakozwa matomba na buku Création. Makambo ya solosolo mpe ya polele oyo mazali kati na buku yango makosalisa bato wana ete bázala na botɔndi mpo na Mozalisi, oyo azali kobatela biso na bolingo nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto