Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/95 lok. 5
  • Tósalela ntango na biso na lolenge malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalela ntango na biso na lolenge malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Salelá ntango na yo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Lolenge ya komisombela ntango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 12/95 lok. 5

Tósalela ntango na biso na lolenge malamu

1 Yehova atalelaka ntango. Alingi ete biso mpe tómibanzabanzaka na ntina na yango; mpo na kosala bongo, azali kosalisa biso na nzela ya lisangá na ye. Tolendisami ete tózalaka “ntango nyonso na mosala mingi kati na mosala ya Nkolo.” (1 Kol. 15:58, NW) Na yango, tokokóma lisusu basali oyo babongi mpenza kati na mosala ya Yehova.

2 Pɔsɔ na pɔsɔ, biso banso tozalaka na bangonga 168. Tosalela mpenza ntango yango na mayele nyonso? Tozali mpenza komonisa ete toyebi malamu esika tokómi kati na manaka ya Yehova? Tozali nde komitika kopɛngwisama na makambo oyo mazali na ntina mingi te kati na bomoi?

3 Ezali likambo ya ntina ete tózala na ebongiseli malamu. Baklisto mingi bazali kosala makasi ya kotosa molɔngɔ ya misala oyo misengeli kozala na esika ya liboso. Mosala moko na moko motyami kati na molɔngɔ engebene ntina na yango. Ndenge nini okoki kokata ete mosala boye to boye mosengeli kozala na esika ya liboso? Biblia elobi ete moto asengeli ‘komona malamu mpo na mosala makasi na ye.’ (Mos. 3:13) Ezali na misala oyo mibotaka mbuma mingi koleka misala misusu. Tosengeli kotalela matomba oyo tokoki kozwa na yango. Tokoki mpenza kozwa litomba na kokokisama ya mosala oyo to oyo mosusu? Tokokoka ‘komona malamu’ mosala makasi na biso? Soki ezali bongo te, tokoki koloba ete yango ezali mosala oyo mosengeli mpenza te kotyama na esika ya liboso.

4 Kati na mosala na biso ya kosakola: Tozali kosepela ete basakoli bákómaka na ngonga malamu na makita mpo na mosala ya kosakola, ete báyokaka malako na likebi mpenza mpe bákende nokinoki kati na teritware. Na esika ya kozela, ekozala malamu ete tómipesa kati na mosala ya kosakola. Emonani polele ete Paulo ayebaki malamu ntina ya kosala makambo na molɔngɔ, mpamba te akomaki ete: “Tiká ete makambo yango nyonso másalema na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.”​—1 Kol. 14:40.

5 Ntango tozali kosangana na mosala ya kosakola, tokobungisaka mbala mosusu ntango moko ya malamu wana tozali kopemapema mingi. Nzokande, soki klimá ya mokolo wana ezali malamu te, kosala mwa bopemi ekoki kosalisa biso mpo na kozwa lisusu makasi mpe kokoba misala na biso. Atako bongo, basakoli mingi bamonaka malamu ete básakola kasi básalela te ntango oyo babongisaki mpo na mosala ya kosakola na kopema elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi mosusu. Kati na likambo yango, esengeli kozala na bokatikati.

6 Bablia elobi ete: “Ezala nkɔngi . . . ayebi malamu ntango na ye oyo etyami” mpo na kokende epai mosusu; na oyo etali nsɛlɛlɛ, “azali kobongisa bilei na ye na eleko ya molunge” mpo na komibongisa wana akolekisa eleko ya mpiɔ. (Yil. 8:7; Mas. 6:6-8, NW) Wana ezali sɛkɛlɛ mpo na kosalela ntango na biso na lolenge malamu. Biso mpe tosengeli ‘koyeba malamu ntango na biso oyo etyami.’ Kozanga kolekisa ndelo, tosengeli kotalela ntango na biso malamu. Tosengeli te bobele koyeba makambo oyo tokosala, kasi lisusu ntango oyo yango esengeli kosalema. Tosengeli kozala na momeseno ya kobongisa misala na biso na koyebáká ete ezali na makambo mosusu oyo makoki kobima pwasa mpe kotya kwɔkɔsɔ na ebongiseli na biso. Esengeli mpe kondima kokata misala mosusu mpo na kopesa ntango na misala oyo mileki ntina, lokola kobongisa makita, mosala ya kosakola mpe misala mosusu ya Teokrasi.

7 Tozali na mposa ya kozala lokola Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe, oyo azali koteya biso ete ‘likambo na likambo ezali na ntango na yango etyami.’ (Mos. 3:1) Na kosaleláká ntango na biso na lolenge malamu, tokoki ‘kokokisa mosala na biso nyɛ.’​—2 Tim. 4:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto