Tósalela bazalani na biso malamu na kolandáká bosepeli nyonso
1 Likoló na nini tozwaka ekateli ya kotika mokanda epai na molobani moko? Likoló na likambo moko ya ntina: bosepeli na ye. Ezali bobele likoló na likambo yango nde tozongaka kotala bato. Ntango emonani polele ete moto moko azali komonisa bosepeli, ata moke, na nsango ya Bokonzi, tosalaka nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosalela ye malamu. Lisusu tokendaka kotala ye, tozalaka na mposa ya kokólisa bosepeli na ye mpe kobanda boyekoli ya Biblia. Yango ezali mokano na biso ata soki totiki mokanda te. Ndenge nini tokoki kosala yango?
2 Soki lisoló na biso ya mbala eleki ezalaki likoló na mikakatano kati na mabala mpe soki totikaki búku “Bomoi ya seko,” tokoki kobandela lisoló na maloba oyo:
◼ “Ntango nayaki kotala yo mbala eleki, tolobelaki likambo litali mabala mpe batoli ebongi ya Biblia oyo ekoki kopesa biso esengo koleka. Okanisi te ete ata mabota ya malamu koleka bakutanaka mbala mosusu na mikakatano? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia ezali kopesa batoli malamu koleka likoló na lolenge ya kosilisa mikakatano ya mabota. Ekoki kozala na litomba koyekola Biblia kati na libota.” Tófungola búku na lokasa 246 mpe tópesa makanisi na paragrafe 23. Tótánga Yoane 17:3, mpe tósɛnga na libota yango ete tósunga bango na koyekola Biblia epai na bango.
3 Soki tolobelaki likambo litali bana mpe ntina ya kobɔkɔla bango malamu, tokoki kolanda lisoló boye:
◼ “Mbala eleki, tolimbolaki ete bana basengeli kozwa mateya ya elimo mpe lolenge nini baboti bakoki kopesa bango mateya yango. Baboti mingi oyo nazali kokutana na bango bazali komitungisa mpamba te bilenge mingi bazali komitambwisa mabe lelo. Bongo yo, okanisi nini na ntina na. . . ? [Tótanga ndakisa moko ya botomboki ya bilenge oyo emonanaka mingi na kartyé mpe tótika moto yango ayanola.] Tiká nalakisa yo mwa batoli ebongi oyo ezwami kati na Biblia.” Tófungola búku Bomoi ya seko na lokasa 246, paragrafe 22, tótalela likanisi ya ntina mpe tótánga Baefese 6:4. Na bongo, tómonisa ete bana nyonso basɛngelaka na disipilíni mpe litambwisi mpe ete soki baboti bandimi kopesa bango yango, bilenge bazalaka na esengo mpe na botosi koleka. Tólimbola lolenge oyo toyekolaka Biblia elongo na bana na biso.
4 Soki lisoló etalelaki Paladiso awa na mabelé, tókólisa bosepeli na kolobáká ete:
◼ “Tosilaki kotala bililingi mosusu ya búku oyo mpe ezali kosala ete tókanisa lolenge oyo mabelé ekokóma ntango Nzambe akobongola yango palasido. Kasi bolamu na biso ekozala mobimba te soki tozali kozwa matomba na paladiso yango kozanga baoyo tolingaka. Ezali mpe likanisi na yo, boye te? [Tótika moto yango ayanola.] Na nsima, tófungola búku Bomoi ya seko na lokasa 162. Tótánga Emoniseli 21:3, 4, mpe tólimbola lolenge oyo baoyo tolingaka bakozala ntango nyonso elongo na biso. Soki moto yango alingi koyoka, tótánga Yoane 5:28, 29, mpo na komonisa ete bakufi bakozonga na bomoi. Na kolakisáká na ekela ezibeli ya búku, tondimisa ete: “Yango ezali mpenza solo: likoki ezali ya kozala na bomoi ya seko kati na mabelé oyo makobongwana paladiso!” Tózwa ebongiseli mpo na kozongela moto yango mpe koyebisa ye makambo oyo mazali kopesa biso nzela na kokanisa ete paladiso ebelemi.
5 Mokano ya ntina mpo na bozongeli ya sika ezali ya kopesa bongo litomba ya nsango ya Bokonzi epai na bato oyo esepelisi bango. Bato mingi bazalaka na mposa ya eloko moko ya kosepelisa mpo na kolamusa mposa na bango ya bilei ya elimo. Tóbenda likebi likoló na makanisi ya sikisiki mpe oyo mabongi kosalelama na kobɛtáká nsɛ́tɛ likoló na ntina ya kososola Biblia malamumalamu. Soki tosali bongo na bozongeli na biso ya sika, tokosalela bazalani na biso malamu na lolenge lobongi mpenza.