Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/96 lok. 8
  • Tósunga basusu ete bázwa matomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósunga basusu ete bázwa matomba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tósalela bazalani na biso malamu na kolandáká bosepeli nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Tóbatela bosepeli oyo bato bamonisaki
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Tólona mposa mpo na búku Bomoi ya seko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 3/96 lok. 8

Tósunga basusu ete bázwa matomba

1 Yehova alaki koteya biso makambo oyo tosengeli koyeba. Kati na Nzembo 32:8, apesi biso elaka oyo: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo kobila; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” Endimiseli yango ezali mpo na biso liziba ya matomba mingi. Na elimo ya komiboya, tokolinga komonisa na bazalani na biso matomba nini bakoki kozwa na kolandáká batoli ya mayele oyo ezwami na Biblia. (Yis. 48:17) Ezali yango tokosala na kolakisáká búku Bomoi ya seko na Mársi. Na kolakisa na biso, tokoki komonisa na mitindo mikeseni motuya ya Biblia.

2 Lokola mikakatano ya mabala mipalangani mingi na eleko na biso, tokoki kolakisa likanisi oyo lilandi na kosaleláká mokanda “Bomoi ya seko”:

◼ “Bato mingi oyo nasololi na bango bazali komitungisa mpo na bokóli ya kokamwa ya mikakatano kati na mabala mpe motango ya mabala oyo mazali kokufa. Okanisi nini na ezalela yango? [Tiká moto yango ayanola.] Bato mingi bazali koyeba te bantina ya sikisiki ya mikakatano yango. Soki babalani bazalaki pene na kosala milende ya solosolo, mbele bakokaki bobele kobikisa mabala na bango te, kasi na koleka nde bazwaki esengo ya solo. Kosalela batoli oyo ezwami kati na Biblia epesaka nzela na kozala na libala ya esengo.” Tótánga Baefese 5:28, 29, 33. Tófungola búku yango na lokasa 243, tótalela paragrafe 16 mpe 17, na nsima tólakisa búku.

3 Bana bazali na mposa ete baboti na bango bálekisa ntango elongo na bango mpe básɛnzɛla mpo na kobɔkɔlama na bango. Na kolakisáká búku “Bomoi ya seko,” tokoki koloba boye:

◼ “Biso nyonso tokanisaka mikolo mizali koya mpo na bana na biso. Engebene makanisi na yo, mwango nini ya malamu koleka esengeli mpo na baboti ete bábongisa avɛnirɛ malamu mpo na bana na bango? [Tótika moto yango ayanola.] Tóyoka toli oyo epesami na lisese ya Biblia ekomami esili koleka soko mibu 3 000. [Tótánga Masese 22:6.] Atako bana na biso bazwaka litomba mpenza na mateya oyo bazali kolanda na eteyelo, nzokande, ezali baboti nde bapesaka bango kobongisama ya malamu koleka kati na libota. Kobongisama yango esɛngaka ntango, likebi mpe bolingo, kasi ebongi kotyela yango milende.” Tófungola búku na lokasa 245 mpe tótalela paragrafe 20 mpe 21. Na nsima, tólimbola lolenge ya kosalela búku yango mpo na koyekola Biblia kati na libota.

4 Tokolinga mbala mosusu kolakisa búku “Bomoi ya seko” na kolimboláká ete mabelé makokóma paladiso:

◼ “Ezali solo ete omitunaka na ntina na lolenge ya bomoi oyo mikolo mizali koya ebombeli biso. Kati na libondeli ya Tata na Biso, Yesu alakisaki biso tósɛngaka ete mokano na Nzambe esalema awa na nsé lokola na likoló. Mabelé makokóma lolenge nini ntango maloba wana makokokisama? [Tótika moto yango ayanola.] Talá kolakisama na lolenge ya liyemi ya mokili yango oyo ebongwani paladiso. [Tólakisa elilingi ya nkasa 12 mpe 13. Na nsima tótánga Yisaya 11:6-9, oyo elobelami na paragrafe 12.] Ekozala esengo mpenza kofanda na esika motindo oyo, boye te? Búku oyo ezali kolimbola ezingelo oyo yo mpe libota na yo bokoki kozala na yango kati na paladiso yango.”

5 Ezali na ntina ete tóbongisa kolakisama na biso soki tolingi ete tózwa matomba kati na mosala ya ndako na ndako. Liboso ya kobɛta na ekuke moko, tózala pene na kolobela likanisi moko ya Biblia na bosikisiki. Tózala mpe na mwa komantere mokuse kati na makanisi likoló na makambo ya ntina ya zulunalo to trakte oyo tokolinga kolakisa soki moto yango aboi kokamata búku. Na boumeli ya sanza ya Mársi, tósimba mabaku nyonso oyo mapesameli biso mpo na kolóna mbóto ya Bokonzi. (Mos. 11:6) Na bongo, tokosunga bazalani na biso ete bázwa matomba ya seko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto