Biblia: likabo ya Nzambe mpo na kotambwisa bato nyonso
1 Ekanisami ete pene na miliare minei ya Biblia esili konyatama na nkota mpe minɔkɔ koleka 2 100, kosaláká ete bato koleka 90 likoló na mokámá kati na mokili mobimba bákoka kozala na Liloba ya Nzambe. Atako bongo, mokili ezali na nzala ya “koyoka maloba na [Yehova].” (Amo. 8:11) Bato mingi bazali na Biblia kasi batángaka yango te to mpe bakangaka ntina na yango te. Lolenge nini tokoki kolendisa bango ete bátika Biblia etambwisa mpenza bomoi na bango?
2 Na sanza ya Yanuáli, tokolakisa búku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? Epai na baoyo bakomonisa bosepeli, tokoki mpe kolakisa Traduction du monde nouveau, libongoli ya Biblia oyo tozali kosalela esili koleka mbula 34. Na bongo, tóbenda likebi likoló na elobeli na yango ya polele mpe ya mikolo na biso. Soki, na bosepeli nyonso, tozali kosalisa bato mosusu ete bátalela Biblia lokola likabo ya Nzambe mpo na kotambwisa bato nyonso, tokomonisa botɔ́ndi na biso mozindo na likabo yango ya Yehova.
3 Tokoki kobanda lisoló na lisalisi ya trakte “Mpo na nini kondimela Biblia,” na kolobáká na ndakisa:
◼ “Bato koleka 90 likoló na mokámá kati na mokili mobimba bazali na Biblia, nzokande bobele bato moke nde batángaka yango mbala na mbala. Oyebi mpo na nini?” Tótánga paragrafe mibale ya liboso ya trakte yango mpe mokapo ya 2 Timoté 3:16. Tólakisa búku Parole de Dieu. Soki moto moko asepeli kozwa búku yango, tokoyebisa ye ntalo ya lipesi na yango. Soki aboyi kozwa, tokotikela ye trakte mpo ete asilisa kotánga yango, na kobendáká likebi na ye likoló na motó na likambo moke, “Biblia ezali kosakola makambo makoya.”
4 Ntango tozali kozongela baoyo bandimaki trakte “Mpo na nini kondimela Biblia,” tokoki komeka koloba boye:
◼ Nsima ya kokundwela molobani na biso lisoló na biso ya mbala eleki, tótánga paragrafe mibale ya nsuka ya trakte yango. Tótuna na molobani na biso soki asilá kokanisa mpo na likoki ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Tóyoka eyano na ye, mpe tóbakisa: “Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete bisakweli nyonso ya Biblia bikokokisama, ezala bisakweli oyo bizali koyebisa ete mikolo mizali koya mikozala malamu mpo na bato oyo bandimami na Nzambe.” Tólakisa elilingi ya lokasa 13 kati na mwa búku Azali kosɛnga. Mpo na kobanda boyekoli, tótalela liteya 5 mpe tósɛnga na moto yango ete tótalela biyano na mituna oyo mitunami.
5 Na bateritware oyo bato bamipesaka na makambo ya mangomba, tokoki komeka kokɔta na lisoló na lolenge oyo:
◼ “Tozali kolendisa bato ete bázala na limemya monene mpenza na Biblia. Mabota mingi mazali na Biblia kasi bobele mabota moke nde batalelaka yango ntango bakutanaka na mikakatano minene. Yo mpe osilá komona likambo yango? [Tóyoka eyano.] Ntango mosusu bato bakanisaka ete Biblia esilá ngala. Búku oyo, La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? ezali kopesa bilembeteli oyo ezali kondimisa ete Biblia elobeli makambo ya siansi na bosikisiki mpe epesaka myango ya kolónga mikakatano minene oyo tokutanaka na yango lelo oyo.” Tóbenda likebi na mwa makanisi ya mokapo 8 to 12 ya búku yango, mpe tólakisa yango na molobani na biso.
6 Ntango tozongi kotala moto moko oyo totikelaki ye búku “ Parole de Dieu ”, tokoki koloba:
◼ “Na mbala eleki, tomonaki lolenge Biblia ezali kosunga biso mpo ete tósilisa mikakatano minene oyo mizali kobima na mikolo na biso. Biblia ezali kosalisa mpe baoyo bandimaka yango lokola Liloba ya Nzambe, ete bázala na bomoi ya esengo koleka mpe oyo esepelisaka mpenza. Nalingi komonisa yo moko na mitindá ya Biblia oyo mikomami kati na búku oyo natikelaki yo.” Tólobela motindá moko kati na mitindá yango ya Makomami, oyo mozwami na paragrafe 3-6 ya mokapo 12, mpe tósukisa na kotángáká paragrafe 7. Soki moto yango asepeli, tósɛnga ete tóyekola Biblia elongo na ye na lisalisi ya búku Boyebi to na mwa búku Azali kosɛnga.
7 Lisoló oyo lilandi likoki kosepelisa mibangé:
◼ “Na ntango moko, mabota mingi mazalaki kotánga Biblia mpe kotambwisa bomoi na bango na mitindá na yango. Ezalaki mpe bongo na libota na yo? [Tóyoka eyano.] Lelo oyo, bato mingi bazali komonisa ete bazali mpenza na ntango te mpo na kotánga Biblia, to bazali kokanisa ete mitindá na yango mitali bizaleli malamu misilá ngala. Mokapo 13 ya búku oyo, La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? ezali kolobela bato misato oyo babongolaki bomoi na bango nsima ya koyekola Biblia. Soki olingi kotánga lolenge nguya ya Liloba ya Nzambe esalisaki bango, nakosepela kotikela yo búku oyo.”
8 Na ntango tokozonga na mbala ya mibale, tokoki koloba:
◼ “Na mbala eleki, tondimaki ete bato mingi lelo oyo bayebi te mitindá ya Biblia mitali bizaleli malamu. Mpo na yo, likambo yango etaleli mpe biso? [Tóyoka eyano.] Yesu Klisto alobaki ete koyekola koyeba Nzambe ezali na motuya monene.” Tótánga Yoane 17:3. Na nsima, tófungola búku Boyebi na mokapo 1 mpe tósolola likoló na paragrafe 5. Tólobela ebongiseli na biso ya boyekoli ya Biblia oyo esɛngaka kofuta mbongo te mpe tósɛnga na moto yango ete tólakisa ye lolenge tosalaka.
9 Tóbondela Yehova ete apambola milende nyonso oyo tozali kosala mpo ete tóbenda likebi ya bato likoló na Biblia, likabo ya Nzambe mpo na kotambwisa bato nyonso!