Tósunga bazalani na biso ete básosola motuya ya Biblia
1 Yesu apesaki na bayekoli na ye oyo bazalaki na yango mposa. Na Luka 24:45 tozali kotánga boye: “Azipolaki mitema na bango ete báyeba [ntina ya Makomami, NW].” Ayebaki ete mpo bándimama na Tata na ye, basengelaki koyekola mpe kososola Liloba ya Nzambe, Biblia. (Nz. 1:1, 2) Mosala na biso ya kosakola ezali na mokano motindo wana. Tokolinga kobanda boyekoli ya Biblia mpo na ‘koteya bato ete bátosa oyo Yesu asili kolaka.’ (Mat. 28:20) Koyebáká yango, tótalela mwa makanisi oyo makoki kozala na ntina na ntango ya bozongeli na biso ya sika.
2 Soki lisoló na biso ya mbala eleki ezwaki moboko na yango likoló na búku ‘La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?’, na bozongeli na biso tokoki kokóba boye:
◼ “Nalingi koyebisa yo likambo mosusu oyo lizali komonisa motuya mobongi ya batoli ya Biblia. Bato mingi bamonaka ete ezali mpenza mpasi mpo na koyokana na basusu. Tosengeli kosala nini mpo na kobongisa boyokani na biso elongo na bazalani na biso? [Tózela eyano, tófungola búku na lokasa 168, paragrafe 15, mpe tótánga Matai 7:12. Tóbakisa makanisi ya paragrafe 16.] Yango ezali ndakisa mosusu ya mayele oyo tozali kokuta kati na batoli ya Biblia. Ntango nakozonga lisusu, nakosepela kotalela elongo na yo batoli oyo Biblia ezali kopesa mpo na bomoi ya esengo kati na babalani.” Tózwa bibongiseli mpo na kozonga kosolola likoló na nkasa 170-172, epai kuna tokokuta batoli ya Biblia oyo etali bomoi ya libota ya esengo.
3 Soki moto yango amonisaki bosepeli mpo na Biblia, tokoki mbala mosusu kobanda boyekoli ya Biblia na lolenge oyo:
◼ “Bato nyonso to pene na nyonso balingaka kofanda kati na mokili kitoko mpe ya libateli. Mpo ete yango ezali mposa ya moto nyonso, mpo na nini mobulu mpe makambo ya mabe etondi kati na mokili? [Tóyoka eyano.] Traduction du monde nouveau ezali kolakisa yo epai wapi okoki kokuta eyano na motuna wana kati na Biblia.” Tófungola na lokasa 1655 mpe tólakisa eteni elobi “Sujets de conversation bibliques,” no 23A: “Auteur de la détresse mondiale.” Tótánga 2 Bakolinti 4:4. Tólimbola ete Nzambe akoboma Zábolo mpe akotya mokili moko ya kimya mpe ya esengo mpo na libela. Tótánga Emoniseli 21:3, 4. Na nsima tokoki koloba boye: “Ntango nakozonga lisusu, nakosepela komonisa yo mwa mikapo oyo mizali kolimbola mpo na nini okoki kozala na elikya ya mokili oyo ezangi mpasi.”
4 Soki mwango ya kobanda boyekoli mbala moko epesaki matomba malamu, na bozongi na biso epai na moto yango tokoki koloba boye:
◼ “Mbala eleki totalelaki mwa bantina mpo na yango ezali malamu koyekola Biblia. Oyo akolinga komipesa mpo na yango akoki kozwa esengo ya koyeba makambo Nzambe azali kolaka biso. [Tótánga Yoane 17:3.] Manáka na biso ya mateya ya Biblia esili kosunga bankóto ya bato ete báyeba makambo mingi likoló na oyo Nzambe azali kolaka biso mpe likoló na lolenge oyo tokoki kosepelisa ye.” Tókamata búku Boyebi, tótalela motó ya likambo ya mikapo mpe tómonisa lolenge nini boyekoli ya Biblia esalemaka.
5 Na kosalisáká bato ya motema sembo ete básosola motuya ya Liloba ya Nzambe oyo ekokani na mosusu te, tozali komemela bango lisungi lileki malamu. Mayele oyo bango bakozwa na koyekoláká yango ekoki kozala “nzeté na bomoi” mpe ekopesa bango esengo mingi.—Mas. 3:18.