Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/96 lok. 1
  • Tózala ndakisa na maloba mpe na etamboli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala ndakisa na maloba mpe na etamboli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • “Bomitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Basaleli ya Nzambe bayebani mpo na bizaleli na bango ya malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tózala na bonkonde biso baministre ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tolona bizaleli na boklisto kati na mokili oyo ezangi limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 10/96 lok. 1

Tózala ndakisa na maloba mpe na etamboli

1 Ntoma Paulo alendisaki Timoté ete azala ndakisa na maloba mpe na etamboli. (1 Tim. 4:12) Biso mpe, tosengeli kozala na maloba mpe na etamboli ya ndakisa, mingimingi ntango tozali kokokisa mosala na biso ya kosakola, mpamba te maloba mpe etamboli ekoki kokata soki tokosimba to tokosimba te mitema ya bato oyo tozali kokutana na bango.

2 Bizaleli malamu na biso bisengeli komonana na makambo nyonso, mpe mingimingi, ezaleli na biso ya boninga, ya koyeba komitya na esika ya moto mosusu, ya boboto, ya bonkónde mpe ya takte. Na kozaláká na bizaleli wana, tozali komonisa ete toyebi bopusi oyo makambo tozali kosala ekoki kozala na yango likoló na mayoki ya bazalani na biso. Tokoki kokokanisa bizaleli malamu kati na mosala ya kosakola na kotyama ya bikelakela kati na bilei mpo na koyeisa yango elɛngi. Bilei ata ya malamu soki ezangi bikelakela, ekozala na elɛngi te mpe ekopesa mpenza mposa ya kolya te. Kozanga bizaleli malamu kati na boyokani na biso elongo na basusu ekozala mpe bobele bongo.​—Kols. 4:6.

3 Tózala ndakisa na maloba: Mwa kosɛka ya boninga mpe mbote ya esengo ezali makambo ya ntina mingi mpo na kolakisama ya nsango malamu. Ntango esengo mpe bosembo ebakisami lokola “bikelakela” na maloba na biso ya bokɔti na lisoló, molobani na biso akososola mpenza ete tozali komibanzabanza solo mpo na ye. Ntango azali koloba, tóyoka ye na likebi nyonso mpe tómemya na lolenge lobongi makanisi na ye. Ntango tozali koloba, ezali malamu koloba na takte mpe na lolenge ya malamu.​—Talá Misala 6:8.

4 Ekómaka mbala mosusu ete tókutana na moto oyo aboyi, to moto ya nkanda. Lolenge nini tokosala? Petelo asɛngi biso ete tóloba na “bopɔlɔ mpe na limemya mozindo.” (1 Pet. 3:15, NW; Lom. 12:17, 18) Yesu alobaki ete soki moto aboyi, na kozanga bonkónde nyonso, nsango ya Bokonzi, tosengeli kosuka bobele na ‘kopupola putulu ya makolo na biso.’ (Mat. 10:14) Na kozaláká na bizaleli malamu na mabaku motindo wana, likoki ezali ya kokitisa mitema ya bato oyo baboyi nsango na biso.

5 Tózala ndakisa na etamboli: Kosakola nsango malamu na balabála mpe na bisika bato bazalaka mingi esɛngaka epai na biso ete tózala na bizaleli malamu, tóbenda likebi ya bato te, tóndimisa likanisi na biso na makasi te mpe tózala libaku mpo na baleki-nzela te. Ntango tokómi na ndako ya bato oyo bazali komonisa bosepeli, tosengeli kotosa mitindá ya bizaleli malamu mpe kozala bato malamu, oyo bazali komonisa botɔ́ndi na bango mpo na boyambi oyo bamonisi bango. Mwana nyonso oyo azali elongo na biso asengeli kotosa bato oyo bazali koyamba biso mpe biloko na bango, mpe asengeli koyoka lisoló na bonkónde nyonso. Bana ya matoyi mangbongi bapesaka ndakisa moko mabe.​—Mas. 29:15.

6 Moto moko te asengeli kobɛta ntembe na ntina na elateli na biso, ete tozali baministre ya Liloba ya Nzambe. Elateli na biso mpe kobongisa na biso ya nzoto esengeli te kozala ya bongo na bongo mpe ya bopɔtu soko mpe ya kobenda likebi to kolekisa ndelo. Tiká ete elateli na biso ezala ntango nyonso oyo ebongi na nsango malamu! (Talá Bafilipi 1:27.) Na kotyáká mpenza likebi na lolenge tozali komonana mpe na biloko tozali kotambola na yango, tokopesa bazalani na biso libaku te ya kotɔ́nga to koloba mabe na ntina ya mosala na biso. (2 Kol. 6:3, 4) Maloba na biso mpe etamboli na biso ya ndakisa ezali mpenza kosala ete bato básepela na nsango ya Bokonzi, mpe yango ezali kokumisa Yehova.​—1 Pet. 2:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto