Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/96 lok. 8
  • Tóbongisa lolenge na biso ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbongisa lolenge na biso ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tóbongisaka biso moko ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tókabola bazulunalo oyo epesaka litatoli na ntina etali solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tósakola na molende koleka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Ozali kosala malamumalamu mosala na yo ya kosakola?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 11/96 lok. 8

Tóbongisa lolenge na biso ya kolakisa bazulunalo

1 Tozali kosepela mingi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpo na masoló na yango oyo mazali kobima na ntango malamu mpe oyo mazali koteya, oyo mazali kolobela makambo ya lolenge nyonso, kobanda na makambo mazali koleka na mokili ya lelo kino na “makambo na bozindo na Nzambe.” (1 Kol. 2:10) Moko na moko kati na biso azali komikundola makambo mingi ya sika mpe ya kotonga oyo atángaki kati na bazulunalo wana, oyo Yehova azali kosalela mpo na komonisa solo mokemoke. (Mas. 4:18) Mpe tozali mpenza na mposa ya kokabola yango mingi.

2 Tóyeba malamumalamu teritware na biso: Lolenge nini ya bato bafandi zingazinga na biso? Soki bato bazalaka na momeseno ya kosala makambo mbangumbangu, na ntembe te tokobongisa lisoló ya nokinoki oyo ezali komonisa mbala moko likambo oyo toyeli. Nzokande, soki bafándi ya teritware na biso bazali na momeseno ya kosala makambo mbangumbangu te, mbala mosusu tokoki kosolola mwa mingi. Epai kuna bato mingi basalaka na boumeli ya moi, tokólonga mpenza soki toleki epai na bango nsima mpenza ya nzánga to wana mpokwa ebandi kokóma. Na moi, tokokoka kokutana na bamoko ntango tozali kosakola na balabála to na bamagazini. Basakoli mosusu bazali kozwa matomba malamu na kosololáká na bato na baparkingi mpe na baparke.

3 Tóyeba malamu bazulunalo na biso: Tótángáká nimero nyonso ntango tozwi yango. Tópona masoló oyo toyebi ete makosepelisa bafándi ya teritware na biso. Bazali komibanzabanza na makambo nini? Kati na lisoló oyo tokani kosolola, tóluka eteni ya sikisiki oyo tokoki kolobela. Tóluka motuna ya kotuna mpo na kolamwisa bosepeli ya molobani na biso. Tóluka vɛrsɛ́ ebongi oyo tokotángela ye soki likoki ezali. Na nsuka, tókanisa na lolenge tokoki kolobela ntina oyo mpo na yango tosɛngaka mwa likabo moke mpe tótya moboko mpo na bozongeli ya sika.

4 Tóbongisa maloba na biso ya ebandeli: Tópona malamumalamu maloba ya liboso oyo tokoloba mpo na komiyebisa soki tozali banani mpe mpo na kobanda lisoló. Bamoko bazwaka matomba malamu na kolobáká ete: “Natángaki lisoló moko kitoko kati na zulunalo oyo, mpe nalingi ete bato mosusu báyeba yango.” Mingi babandaka na motuna oyo ekomema lisoló likoló na likanisi oyo bakanaki kolobela. Na ndakisa:

5 Soki tozali kolakisa lisoló moko na ntina ya kobakisama ya mabe, tokoki kotuna ete:

◼ “ Esengeli nini mpo ete tókoka kolala na kimya, kozanga kobanga ete báyiba biso to básala biso mabe?” Tólimbola ete toyebi lolenge nini mokakatano wana ekosila, oyo na nzela na yango mobulu nyonso oyo bato bazali kosala ekolimwa mosika te. Lobelá eteni moko ya zulunalo oyo epesi ntina ya kolikya ete mbongwana motindo wana ekosalema. Ntango okozonga, okoki kobenda likebi ya moto yango likoló na mokapo 1 ya búku Boyebi.

6 Ntango tozali kolakisa lisoló moko litali bomoi ya libota, tokoki koloba:

◼ “Baboti mingi bayebi ete kobɔkɔla bana na mikolo na biso ezali likambo ya lisɛki te. Babúku mingi esili kokomama na ntina na likambo yango, kasi ata bato na mayele bazali koyokana te kati na bango mpo na likambo yango. Ezali nde na moto moko oyo akoki kopesa biso batoli oyo ebongi?” Lobelá eteni moko ya zulunalo oyo emonisi batoli ya mayele oyo tozali kokuta kati na Biblia. Ntango tokozonga kotala moto yango, tosolola elongo na ye makanisi ya Biblia oyo matali lolenge ya kobɔkɔla bana, ndenge yango epesami na nkasa 145-148 na búku Boyebi.

7 Mpo na kolakisa lisoló oyo elobeli likambo moko litali bomoi ya bato, tokoki koloba ete:

◼ “Bato mingi bazali komiyoka lokola nde bazali na bolɔ́kɔ na ntina na mikakatano ya eleko oyo tozali kobika kati na yango. Okanisi ete Nzambe alingaki ete tózala na bomoi motindo wana?” Tólakisa lisoló moko oyo ezali komonisa lolenge tokoki kolónga mikakatano ya lelo to oyo ezali kopesa bantina ya kozela mikolo mizali koya mpo na kosikwama na bampasi nyonso. Na ntango ya bozongeli oyo elandi, tólobela elilingi mpe maloba oyo mazali na nsé na yango na nkasa 4-5 ya búku Boyebi, na nsima tóbanda mbala moko boyekoli ya Biblia.

8 Tóyeba komiyokanisa na molobani na biso: Bato tokutanaka na bango bauti na bisika bikeseni mpe moto na moto azali na makambo oyo masepelisaka ye. Tóbongisa lisoló moko ya moboko oyo tokoyokanisa yango na molobani mokomoko. Tókanisa libosoliboso na makambo oyo tokoloba soki tokokutana na mobali, na mwasi, na mobangé to na elenge. Mobeko ezali te mpo na likambo yango. Tósalela masoló oyo toyebi malamu mpe oyo tozali kozwa matomba malamu. Liboso ya moto nyonso oyo tokokutana na ye, tózala na mɔ́tɔ, tóloba na sembo nyonso mpe tóyeba koyoka. Baoyo bazali “na ezalela esengeli” bakososola bosembo na biso mpe bakoyanola na lolenge malamu.​—Mis. 13:48, NW.

9 Tósalisana: Na kokaboláká makanisi elongo na basusu, tokoyeisa malamu lolenge na biso ya koloba. Tokozwa eksperiansi mingi mpe tokoyeba komityela motema soki tozali komeka liboso masoló na biso elongo na baninga na biso. (Mas. 27:17) Boye tokomiyoka malamu ntango tokozala liboso ya bandako ya bato. Ezali likambo ya ntina mingi ete baboti bázwaka ntango ya kosalisa bana na bango ete bámibongisa, báyokaka bango ntango bazali kozongela masoló na bango mpe kopesa bango batoli mpo na koyeisa masoló yango malamu. Mpo na bato ya sika, mosala ya kosakola elongo na basakoli oyo bameseni mpenza na mosala ekosalisa bango mingi.

10 Kobongisa lolenge na biso ya kolakisa bazulunalo esengeli kozala na mikakatano te. Esengeli bobele koyeba mwa likambo ya sikisiki ya koloba mpe na nsima komonisa yango na lolenge ya kosepelisa. Na komibongisáka mpe na koyeba lolenge ya kosalela, tokoki kosala lisoló moko kitoko oyo ekosepelisa bato mingi.

11 Kokabolama ya bazulunalo ezali moko na myango ya ntina mingi oyo na nzela na yango tozali kopalanganisa nsango ya Bokonzi kati na mokili mobimba. Soki tokoki kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epai na bato ya motema sembo, bazulunalo ekoloba yango moko. Tómikundola ntango nyonso motuya na yango, mpe ete nsango oyo ezali kati na yango ekoki kobikisa bomoi ya bato. Lolenge wana ya “kosala malamu mpe ya kokabela basusu” ezali kosepelisa mpenza Yehova.​—Ebe. 13:16, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto