Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/97 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Lolenge nini kobongisa bibliotɛkɛ ya teokrasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Salelá yango na esika obomba yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ebongiseli ya sika mpo na babibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 5/97 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Mikanda nini misengeli kozala kati na bibliotɛkɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi?

Mikanda mingi oyo milimbolaka Biblia mibimisami mpo na libota ya Nzambe, mpo na bolamu na yango mpenza. Lokola basakoli mingi bazali na mikanda yango nyonso te, bibliotɛkɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, na Ndako ya Bokonzi, ezali kopesa bango nzela ya kosala bolukiluki kati na mikanda oyo bakokaki mbala mosusu kozwa yango esika mosusu te. Na bongo bibliotɛkɛ yango esengeli kozala na mikanda mingi: mabongoli makeseni ya Biblia, mikanda ya sika ya La Société, kosangisama ya Mosala na biso ya Bokonzi mpe ba volumes reliés ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, bakisa mpe Index des publications. Diksionɛre ebimeli ya sika ebongi mpe kozala. Babúku ebéngami encyclopédies, atlas to babúku ya bolukiluki mibeko na nkóta (grammaire) to ya istware ekoki kozala na ntina. Kasi, mokano na biso ya liboso esengeli kozala ete tózala na mikanda oyo ebimisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.”​—Mat. 24:45.

Ezali mbala mosusu komonana ete mikanda mibongi te mizali mpe kotyama na bibliotɛkɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ekobonga te kotya ba romans, mikanda ya banganga-batyoli, mpe mikanda ya filozofi to mikanda oyo mizali kolobela bilimo mabe. Bibliotɛkɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esengeli kozala bobele na mikanda oyo mikosalisa baoyo bakotánga yango ete bákola na elimo.​—1 Tim. 4:15.

Ezali bongo mokɛngɛli na eteyelo nde azali kotala bibliotɛkɛ, ata soki ndeko mosusu akoki koponama mpo na kosunga ye na kokokisa mokumba yango. Asengeli kosɛnzɛla ete mokanda moko ezanga na bibliotɛkɛ te, soki mikanda ya sika mibimi mibakisama nokinoki. Nkombo ya lisangá oyo bibliotɛkɛ ezali ya bango esengeli komonana polele na lokasa ya liboso ya mikanda nyonso. Mbula na mbula, bokotala mikanda mpo na koyeba soki esɛngi kobongisa yango to kosomba mosusu ya sika.

Moto na moto akoki kopesa mabɔ́kɔ na kobateláká malamu bibliotɛkɛ. Tosengeli kokeba ntango tozali kosalela babúku. Tosengeli kopesa bana nzela te ete básakanaka na yango mpe tosengeli mpe kokoma na kati ya mikanda yango te. Nkomá moko ya polele esengeli kotyama na bibliotɛkɛ mpo na kokundwela bandeko ete mokanda moko te mosengeli kobima na Ndako ya Bokonzi.

Lokola masangá ya sika mazali ntango nyonso kobakisama, ekoki komonana ete babibliotɛkɛ mingi ezali na mikanda nyonso te. Basakoli mosusu oyo bazali na mikanda ya kala bakoki kokanisa kopesa yango na lisangá. Bankulutu bakoki ntango mosusu kozwa ekateli ya kosɛnga ete babimisela bango lisusu ba volumes reliés ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na bongo, bibliotɛkɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekozala na ntina mingi, ekopesa nzela na moto na moto ete ayeba biloko ya motuya bibombami na Liloba ya Nzambe oyo ezali kopesa boyebi, bwanya mpe mayele.​—Mas. 2:4-6.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto