Ebongiseli ya sika mpo na babibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi
Ekoki sikoyo bambula ebele kobanda masangá na mokili mobimba ezali kosalela bibliotɛkɛ na Bandako na bango ya Bokonzi, oyo liboso ebengamaki bibliotɛkɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Na bambula eleki, emonanaki ete lisangá na lisangá esengelaki kozala na bibliotɛkɛ na yango. Kasi, lelo oyo Bandako ya Bokonzi mingi esalelamaka na masangá mibale to koleka mpe kati na masangá yango mosusu ezalaka ya minɔkɔ ya bapaya. Na yango, eleki malamu masangá nyonso oyo elobaka monɔkɔ moko ezala na bibliotɛkɛ kaka moko na Ndako ya Bokonzi mpe bibliotɛkɛ yango ekozala na mikanda nyonso oyo esengeli mpe bakobanda kobakisa mokanda nyonso oyo ebimi. Na Bandako ya Bokonzi oyo ezali na bisika mibale to koleka ya koyangana, esika mokomoko esengeli kozala na bibliotɛkɛ moko na monɔkɔ ya masangá nyonso oyo eyanganaka kuna.
Tokanisi mpenza ete ebongiseli oyo ekosalisa masangá ete babibliotɛkɛ ezwa esika monene te mpe bábimisa mbongo mingi te mpo na yango. Lisusu, kosangisa babibliotɛkɛ ya masangá mingi esika moko ekosala ete babibliotɛkɛ oyo ekosalema ezala ya malamu koleka. Soki basangisi babibliotɛkɛ yango, bakobomba mikanda mosusu mpo na kosalela yango ntango bakotonga Ndako ya Bokonzi mosusu. Soki Ndako ya Bokonzi ezali na ordinatɛrɛ oyo ezali na Diskɛ CD-ROM “Watchtower Library,” yango ekosalisa bandeko mingi.
Na bibliotɛkɛ mokomoko oyo ezali na Ndako ya Bokonzi, ndeko moko akozala mobateli ya bibliotɛkɛ; ekozala malamu mingi soki ezali moko ya bakɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Asengeli kobakisa ntango nyonso mikanda oyo ebongi na bibliotɛkɛ, mpe akokoma polele na lokasa ya ebandeli ya mokanda mokomoko ete ezali mokanda ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi. Mbala moko to koleka na mbula, asengeli kotala malamumalamu soki mokanda moko ezangi te mpe soki ezali malamu. Esengeli te kobima na mikanda ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi na libándá ya Ndako ya Bokonzi to kokende na yango na ndako.
Baoyo nyonso bayanganaka na lisangá basepelaka mingi na bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi. Tiká ete mokomoko na biso amonisa ete ayebi valɛrɛ ya ebongiseli yango na kobateláká bibliotɛkɛ mpe na kosaleláká yango mpo na kolukaluka “boyebi mpenza ya Nzambe.”—Mas. 2:5, NW.