Tótambwisa boyekoli ya biblia oyo ezali kokóla
1 Lifulumɛ́ moko ya mwasi na mboka Tanzanie, elenge mwasi moko na mboka Argentine mpe mama moko ya libota na mboka Lettonie, bakokani na likambo nini? Annuaire 1997 (nk. 8, 46 mpe 56) elobi ete bango nyonso misato basalaki bokoli nokinoki ntango bayekolaki Biblia mpo ete basepelaki koyekola búku Boyebi koleka mbala moko na pɔ́sɔ. Basakoli balendisamaki, soki likoki ezali, ya kosala makasi mpo na koyekola mokapo moko na liteya moko. Nzokande, bamoko bazali komona ete ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Atako yango etaleli mpenzampenza ezalela mpe makoki ya moyekoli mokomoko, bateyi oyo bazali na makoki bazwaki matomba malamu na kosaleláká makanisi oyo malandi.
2 Lokola elimbolaki yango siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, esengeli kolakisa bayekoli ete bámibongisaka mpo na boyekoli. Na ebandeli mpenza, ekozala malamu kolimbola mpe komonisa lolenge ya kosala. Monisá bango búku Boyebi oyo ya yo moko. Bóbongisa elongo liteya ya liboso. Salisá bayekoli ete bázwa maloba ya ntina mpe makanisi oyo mazali kopesa eyano mbala moko na motuna ya mokanda, mpe katá monkɔlɔ́tɔ́ na nsé to tyá lángi likoló na yango. Kútu basakoli bapesaki bayekoli ekomeli ya kotya lángi. Lendisá bango na koluka bavɛrsɛ́ nyonso ntango bazali kobongisa boyekoli. Na kosaláká bongo, bozali kolakisa bango ete bámibongisa mpo na koyangana na boyekoli ya mokanda mpe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.—Luka 6:40.
3 Moteyi malamu alobaka mingi te, kasi azali kolobisa moyekoli. Akopɛngola kobulungana na makanisi ya ntina moke. Asengeli kobakisa makanisi mosusu bobele mpo na likambo moko ya ntina, mpe akolobela mingi nde makanisi ya ntina ya liteya. Bamoko bapesaki na bayekoli na bango mikanda oyo mizalaki koyanola na mituna na bango. Lisusu, bato oyo bamonisi bosepeli bakoki kokolisa boyebi na bango na koyanganáká na makita ya lisangá.
4 Ntina ezali te ya kolobela bavɛrsɛ́ nyonso oyo etángami. Tokoki kolimbola makanisi mosusu ya ntina na nzela ya mikapo oyo mitángami na paragrafe. Na ntango ya bozongeli, lobelá mingi bavɛrsɛ́ ya ntina oyo boyekolaki mpe lendisá moyekoli ete asimba yango na makanisi.
5 Liteya mokomoko esengeli koumela ntango boni?: Esengisami te kosukisa boyekoli bobele na ngonga moko. Bamoko bazali na ntango mpe mbala mosusu bakosepela koyekola ngonga mingi koleka, to koleka mbala moko na pɔ́sɔ. Moyekoli oyo akoki kosala bongo akozwela yango matomba.
6 Lelo oyo, bankámá ya bankóto ya bato ya sika bazali kosanzola Yehova mpe, lokola elobi yango Yisaya 60:8, “bakopombwa likoló lokola lipata mpe lokola bibenga kino maninisa” kati na masangá ya libota na ye. Na bongo biso banso tósala oyo ekoki na biso mpe tósalana elongo na Yehova, lokola azali kosangisa nokinoki bato oyo bakokani na bampate.—Yis. 60:22.