Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/00 lok. 1
  • Kotika kosakola te!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotika kosakola te!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Tolanda mosala na biso ya kosakola Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Mpo na nini kokóba?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 11/00 lok. 1

Kotika kosakola te!

1 Mokano ya Nzambe ezali ete “bato [ya lolenge, NW ] nyonso bábika mpe ete bákóma na boyebi koyeba solo.” (1 Tim. 2:4) Yango wana, apesi biso mokumba ya kosakola nsango malamu. (Mat. 24:14) Soki toyebi ntina oyo tosengeli kokoba kosakola, tokotika te ete bolɛmbu to makambo mosusu oyo tozali kokutana na yango epekisa biso.

2 Mpo na nini tosengeli kolendendela? Ezali na makambo mingi na mokili oyo ezali kosala ete bato bábosana to bázwa na lisɛki makambo oyo tozali koyebisa bango. Na yango tosengeli koyebisa bango mbala na mbala nsango ya Nzambe oyo ekopesa lobiko. (Mat. 24:38, 39) Lisusu, bomoi ya bato ezali ntango nyonso kobongwana. Ata mpe makambo ya mokili ekoki kobongwana na mbala moko lelo to lobi. (1 Kol. 7:31) Ntango mosusu, bato oyo tosololi na bango lelo, lobi to nsima ya pɔsɔ moko to nsima ya sanza mobimba, bakoki kokutana na mikakatano to na mitungisi oyo ekotinda bango bátya likebi na nsango malamu oyo tozali komemela bango. Na ntembe te, ozali mpenza na botɔndi mpo Motatoli oyo ateyaki yo solo alɛmbaki te, boye te?

3 Mpo na komekola motema mawa ya Nzambe: Yehova atiki ntango liboso ya kopesa bato mabe etumbu. Na nzela na biso, azali ntango nyonso kobenda bato ya motema sembo báya epai na ye mpe bábika. (2 Pet. 3:9) Tokomema nyongo ya makila soki tosakoleli bato te nsango ya motema mawa ya Nzambe mpe soki topesi likebisi te mpo na etumbu oyo etikali moke Nzambe apesa bato nyonso oyo bazali koboya kotika misala na bango ya mabe. (Ezek. 33:1-11) Ata soki bato bazali ntango nyonso te koyamba biso na mosala na biso ya kosakola, tosengeli soko moke te kolɛmbisa milende oyo tozali kosala mpo na kosalisa bato ya motema sembo ete bámonisa botɔndi na bango na motema mawa ya Nzambe.​—Mis. 20:26, 27; Lom. 12:11.

4 Mpo na komonisa bolingo na biso: Ezali Yehova, na nzela ya Yesu Klisto, nde apesaki biso etinda ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. (Mat. 28:19, 20) Ata soki bato bazali koboya koyoka, tozali na libaku ya komonisa bolingo na biso mpe bokangami na biso na Nzambe wana tozali ntango nyonso kosala oyo ezali sembo.​—1 Yoa. 5:3.

5 Tiká ete tózala ntango nyonso na mokano ya kotika te kosakola! Tósala yango na molende lokola tozali naino na ‘mokolo ya kobikisa’ ya Yehova.​—2 Kol. 6:2, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto