Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/98 nk. 3-4
  • Tosengeli kozala bateyi, bobele basakoli te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosengeli kozala bateyi, bobele basakoli te
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tózala na makanisi malamu likoló na mosala ya kozalisa bayekoli oyo ezali kosalema na lombangu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 1/98 nk. 3-4

Tosengeli kozala bateyi, bobele basakoli te

1 Moto moko alobaki ete “Batatoli ya Yehova basili kotondisa mabelé mobimba na litatoli na bango.” Lolenge nini yango ekoki kosalema? Mosala yango ya litatoli ezali kosalema te na nguya ya bato, kasi na lisalisi ya elimo ya Nzambe oyo ezali kosala mosala likoló na basaleli na ye na meko oyo basaleli yango bazali kosalela malamumalamu bibongiseli ndenge na ndenge oyo bizwami mpo na kokokisa mokumba na bango ya kosakola mpe ya koteya.—Zek. 4:6; Mis. 1:8.

2 Mikanda ezali mwango moko ya ntina mpenza mpo na kokokisa mosala na biso ya kosakola. Na boumeli ya bambula, Batatoli ya Yehova basili konyata mpe kokabola bamiliare ya babúku, ya mwa babúku, ya bazulunalo mpe ya batrakte mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi. Balapólo oyo ekomami na Annuaire 1997 emonisi ete kobimisama ya mikanda ekómi na mitángo minene koleka. Lelo oyo, libongoli ya Biblia Traduction du monde nouveau (Libongoli ya Mokili ya Sika) esili konyatama na baekzamplɛrɛ koleka milió 91. Na ntáká ya mbula moko, kobimisama ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! emati kino motángo ya zulunalo 7,1 likoló na mokámá na États-Unis. Na ekólo Allemagne, yango emati kino motángo ya zulunalo 35 likoló na mokámá. Koleka ndambo moko likoló na ndambo misato ya bazulunalo oyo filiale ya ekólo Allemagne esili kobimisa, ezalaki kotindama na ekólo Russie.

3 Mpo na nini tozali na mposa ya mikanda mingi boye? Kati na mokili mobimba, libyangi ya kopesa litatoli bisika nyonso oyo bato bazali esili koyokama na lolenge ya kokamwa. Bato mingi kati na biso bazali kokólisa mosala na bango na kosakoláká na bisika ya bato nyonso, na balabála mpe na bisika ya mimbongo; yango ezali kosɛnga kobakisama ya mikanda oyo mizali kokabolama epai na bato oyo bazali komonisa bosepeli. Mingi kati na bato yango bazwaki mpenza libaku te, ntango mosusu ata libaku moko te, ya koyoka nsango ya Bokonzi. Mpo na kokokisa lisɛngi yango, masangá mazali na mikanda mingi mpo na kosalela yango na mitindo mikeseni ya mosala ya kosakola.

4 Tokabolaka mikanda na mokano nini? Mokano na biso ezali bobele ya kokabola mikanda te. Mokumba ya kozalisa bayekoli ezali na biteni mibale: kosakola mpe koteya. Ya liboso, tozali na libaku ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, elingi koloba kosalisa bato básosola ete Bokonzi ezali elikya bobele moko mpo na bato. (Mat. 10:7; 24:14) Mikanda na biso oyo mizwi moboko na Biblia mizali bisaleli oyo bibongisami malamu mpenza mpe oyo bizali na nguya ya kolamwisa bosepeli ya moto mpo na Bokonzi mpe kopesa ye boyebi na likambo yango.

5 Ya mibale, soki tolingi kozalisa bayekoli, tosengeli koteya makambo nyonso oyo Yesu atindaki. (Mat. 11:1; 28:19, 20) Na likambo oyo mpe, mikanda mizali kokokisa mosala monene kati na milende na biso mpo na kokɔtisa solo na mitema ya bayekoli, kosalisáká bango ete bákóma bayekoli oyo bazwi batisimo.

6 Ntango mosusu bato oyo bazali kozwa mikanda bazali ‘bayoki na liloba,’ kasi ekozala mpenza mpasi ete bákóma batosi na liloba soki basalisami te. (Yak. 1:22-25) Mingi kati na bango bakokóma bayekoli oyo bazwi batisimo te soki moto moko te asalisi bango. (Mis. 8:​30, 31) Bazali na mposa na lisalisi ya moteyi mpo na kondimisama na ntina na solo oyo ezwami kati na Makomami. (Mis. 17:2, 3) Mokano na biso ezali ya kosalisa bango ete bákóla kino komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, mpe lisusu kobongisa bango mpo bázwa makoki oyo bakoteya na yango basusu.​—2 Tim. 2:2.

7 Esengeli mpenza ete bateyi bázala mingi koleka: Ntango tozali kosakola, tozali koyebisa nsango malamu epai na bato nyonso. Nzokande, koteya moto ezali kolakisa ye mateya mpo ete akóla mokemoke. Na mosala ya kosakola, tozali koyebisa nsango ya Bokonzi epai na mozalani na biso, kasi na koteya, tozali kosalisa ye ete andima nsango malamu mpe epusa ye na misala. (Luka 8:15) Moteyi asukaka bobele na kosakola te: alimbolaka, asosolaka na moto yango na kopesáká ye bantina ya solo ya kondima, amonisaka bilembeteli mpe andimisaka moto.

8 Mingi kati na biso basengeli kozala bateyi, bobele basakoli te. (Ebe. 5:12a) Kokabolama ya mikanda ezali eteni moko ya ntina kati na mosala na biso, kasi bolóngi mpo na kokokisama ya mokano ya mibale ya mosala na biso ya kosakola, etaleli mpenzampenza oyo tozali kosala mpo na koteya. Atako tosepelaka na kokabola mikanda, soki tolingi kokokisa mosala na biso malamumalamu, tosengeli te kotalela kokabolama ya mikanda lokola mokano na biso ya liboso. (2 Tim. 4:5) Mikanda oyo totikaka efungwelaka biso mpenza nzela mpo na koteya bazalani na biso solo.

9 Tósala bozongeli ya sika mpo na kobanda boyekoli ya Biblia: Na ntembe te mokomoko kati na biso asilá kokabola babúku, mwa babúku to bazulunalo, mpe yango esili kopesa ye bato oyo akoki kosala bozongeli ya sika. Tosengeli kobomba ntango mbala na mbala mpo na kokólisa bosepeli ya bato. Ntango tozali kozonga kotala bato, mokano na biso ya liboso ezali bobele ya kotikela bango mikanda mosusu te, kasi kolendisa bango ete bátánga mikanda oyo totikelaki bango mpe bázwa litomba na yango. Na meko nini biso moko tokokaki kokóla soki moto moko ayaki te kotala biso mbala na mbala mpo na kosalisa biso ete tozwa boyebi ya solo?​—Yoa. 17:3.

10 Tókólisa bosepeli nyonso na kozaláká na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia, ezala na mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to na búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Mikanda yango mibale mizali kolobela nsango ya Bokonzi na lolenge ya kokanga ntina kozanga nkaka. Mwa búku Azali kosɛnga ezali na mateya ya moboko ya Biblia oyo makoki mpo na koteya moto solo ya Biblia. Búku Boyebi ezali kosalisa mpo na koteya solo na bozindo, kasi na lolenge ya pɛtɛɛ, ya polele mpe na bokuse.

11 Lokola yango elimbolami na siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, koteya na lolenge ya pɛtɛɛ ezali kosunga moteyi mpe moyekoli. Tózalaka ntango nyonso na siplemá yango mpo ete totalelaka myango mpe mayele ya koteya oyo masili kobimisa matomba. Malako mosusu ya siplemá yango mazali komonisa lolenge ya komibanzabanza mpenza na moyekoli, makanisi boni ya ntina oyo masengeli kotalelama na boumeli ya boyekoli, lolenge ya koyanola na mituna oyo mizali na boyokani mpenza te na motó na likambo oyo bozali koyekola, lolenge oyo moteyi mpe moyekoli basengeli kobongisa boyekoli liboso mpe lolenge ya komɛma moyekoli na lisangá ya Yehova. Na kosaleláká malako yango, mingi kati na biso, ezala bato ya sika, bakokóma kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kokóla.

12 Mwa ndakisa ya matomba malamu oyo mazwamaki: Mwa búku Azali kosɛnga mpe búku Boyebi ezali bisaleli ya ntina mpo na kozalisa bayekoli na lombangu. Bobele ntango azwaki mwa búku Azali kosɛnga, ndeko mobali moko na ekólo Bolivie asalelaki yango mpo na kobanda boyekoli elongo na mobali moko. Sanza minei na nsima, na esengo nyonso, mobali yango azwaki batisimo elongo na basusu na liyangani ya etúká!

13 Ntango bazali kokóma na nsuka ya boyekoli ya búku Boyebi, bato mingi bayokaka mposa ya komipesa na Yehova. Na ekólo Angola, motángo ya boyekoli ya Biblia oyo etambwisamaki na basakoli ya lisangá moko emataki longwa 190 kino 260, nzokande bayangani na makita babakisamaki mbala mibale, longwa na motángo ya 180 kino 360, bobele sanza minei nsima ya kosalela búku Boyebi na teritware. Na nsima, esɛngaki ete lisangá ya sika esalema.

14 Nsima ya kobanda koyekola búku Boyebi na moto ya liboso, ndeko mobali moko alobaki ete ezali likambo ya “pɛtɛɛ soki motambwisi ya boyekoli azali bobele kotuna mituna, kotánga mwa bavɛrsɛ́ oyo ebongi mpe komindimisa ete moyekoli akangi mpenza ntina.” Azalaki ntango nyonso kokanisa ete bobele basakoli oyo bakɔmeli mpenza nde bakoki kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kokóla mpe ete ye moko akokoka soko moke te kosala yango, kasi asili kososola ete ye mpe akoki kosala yango. Alobaki ete: “Lokola ngai nakoki kosala, moto nyonso mpe akoki kosala.”

15 Ezali na kotambwisáká boyekoli ya Biblia, oyo ezali eteni moko ya mosala na biso ya kosakola, nde tokokokisa mokano na biso ya kozalisa bayekoli. Baoyo bazali kokólisa makoki na bango na eteni yango ya mosala ya kosakola, bazali kozwa bosepeli mpenza mpe matomba mingi. Tiká bato báloba mpe na ntina na biso ete ‘tozali kosakola Bokonzi ya Nzambe polele mpenza’!—Mis. 28:31.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto