Tózala na makanisi malamu likoló na mosala ya kozalisa bayekoli oyo ezali kosalema na lombangu
1 Liboso ya komata na likoló, Yesu apesaki etinda na bayekoli na ye ete “bázalisa bayekoli na mabota nyonso.” Yango esɛngaki ete bábanda mosala monene ya kosakola mpe koteya mpe kopalanganisa mosala na bango na mabelé mobimba esika bato bafandi. (Mat. 28:19, 20; Mis. 1:8) Bamonaki ete etinda yango ezalaki bozito mpe mpasi mpo na kokokisa yango? Ezali bongo te engebene ntoma Yoane. Nsima ya kosala mosala ya kozalisa bayekoli na boumeli ya mbula 65, akomaki ete: “Bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.”—1 Yoa. 5:3.
2 Lisolo ya mosala ya kosakola ya baklisto ya liboso oyo ezali kati na Makomami emonisi ete bakokisaki etinda na bango ya kozalisa bayekoli ya Yesu Klisto na molende mpenza. (2 Tim. 4:1, 2) Basalaki bongo, bobele mpo ete ezalaki mokumba te, kasi mpo na bolingo oyo bazalaki na yango ya kokumisa Nzambe mpe ya koyebisa elikya ya lobiko epai na basusu. (Mis. 13:47-49) Lokola baoyo nyonso bakómaki bayekoli bakómaki mpe kozalisa bayekoli, lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso ekolaki mbangu mpenza.—Mis. 5:14; 6:7; 16:5.
3 Mosala ya kozalisa bayekoli ezali kokola mbangu: Mosala ya kozalisa bayekoli oyo eleki monene ezali kosalema na ekeke oyo ya 20! Na bongo, kino eleko oyo, bamilio ya bato basili kondima nsango malamu mpe kosala na boyokani na yango. (Luka 8:15) Lokola ntango ezali koleka mbangu mpenza mpo na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso bisaleli oyo ezali kosala ete bato ya motema sembo báyekola solo na lombangu mpenza.—Mat. 24:45.
4 Na 1995 tozwaki buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mpe na 1996 tozwaki mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Na ntina na buku Boyebi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1996, na lokasa 14, elobaki ete: “Buku oyo ya nkasa 192 ekoki koyekolama na ntango oyo ezali mpenza mokuse, mpe baoyo ‘babongi mpo na bomoi ya seko’ bakozala na likoki ya koyekola makambo mingi kati na boyekoli na yango na meko oyo ekoki kopesa bango nzela ya komipesa epai na Yehova mpe kozwa batisimo.”—Mis. 13:48.
5 Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, oyo ezalaki na motó na likambo ete: “Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya buku Boyebi,” epesaki biso mokano oyo: “Engebene ezalela ya makambo mpe makoki ya moyekoli mokomoko, mbala mosusu okozala na likoki, kati na mikapo mingi, ya kotalela mokapo mobimba na liteya moko na boumeli soko ya ngonga moko, kozanga ete boyekoli esalema na lolenge ya likolólikoló. Bayekoli bakokola mingi soki molakisi mpe bango moko bazali kotosa ngonga balakaná mpo na boyekoli pɔsɔ na pɔsɔ.” Lisolo yango elobaki lisusu ete: “Tozali komizela ete moto oyo akómi na nsuka ya boyekoli ya buku Boyebi amonisa bosembo na ye mpe mposa makasi azali na yango ya kosalela Nzambe.” Etanda ya “Biyano na mituna na bino” ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1996 elimbolaki ete: “Motei malamu, akokoka, na ntango mokuse, kosalisa moyekoli ya motema sembo ete akola mingi mpo na kozwa ekateli ye moko ya kosalela Yehova.”
6 Buku Boyebi ezali kobimisa matomba: Ntango elenge mwasi moko azwaki batisimo, alobelaki mayoki oyo azalaki na yango lokola ayekolaki buku Boyebi. Na boumeli ya mwa ntango azalaki koyekola buku Bomoi ya seko. Ntango buku Boyebi ebimaki, ndeko mwasi abandaki kotambwisa ye na buku ya sika. Eumelaki te, moyekoli yango amonaki ete ekosɛnga na ye azwa ekateli, mpe apusamaki na kosala bokoli banda ntango wana. Elenge mwasi yango, oyo azali sikawa ndeko na biso, alobi ete: “Buku Bomoi ya seko esalisaki ngai ete nalinga Yehova, kasi buku Boyebi esalisi ngai ete nazwa ekateli ya kosalela ye.”
7 Tótalela lombangu oyo mwasi mosusu ayekolaki na yango solo. Nsima ya boyekoli ya mbala ya mibale, ayanganaki na makita na Ndako ya Bokonzi na pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala lisangá. Na pɔsɔ yango, na boyekoli na ye ya mbala ya misato, ayebisaki mokɛngɛli ya zongazonga ete asilaki komipesa na Yehova mpe azalaki na mposa ya kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Asololaki na bankulutu, mpe bandimaki ye ete akóma mosakoli; mpe na pɔsɔ oyo elandaki, abandaki mosala ya kosakola. Amipesaki mingi na boyekoli na ye ya Biblia na boye ete asɛngaki konze na mosala na ye ya mosuni mpo na koyekola mbala mibale to mbala misato na pɔsɔ mpe kosala ntango mingi na mosala ya kosakola. Na bantango mosusu, bazalaki kosilisa mikapo mibale to misato na boyekoli moko. Akómaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola na bomoi na ye, asilisaki koyekola buku Boyebi na boumeli ya pɔsɔ minei, mpe akolaki kino na batisimo!
8 Mobali ya ndeko mwasi moko alobaki ete azali “ndakisa ya mobalani oyo azangi kondima.” Mokolo moko, ndeko mobali moko apesaki ye buku Boyebi mpe alobaki na ye ete azali na likoki ya koboya koyekola nsima ya boyekoli ya liboso to ntango nyonso oyo akolinga kotika koyekola. Mobali yango andimaki, atako atángaki kelasi mingi te mpe ayekolaki mikanda ya lingomba moko te na boumeli ya mbula koleka 20. Azalaki na mayoki nini ntango ayekolaki buku Boyebi? Alobaki ete: “Ezalaki mpenza likambo ya esengo na komona ete esaleli yango ya koyekola Biblia ekomami na maloba ya pɛtɛɛ. Makambo oyo mazali na kati mamonisami polele mpe na molɔngɔ mpenza na boye ete nazalaki kozela boyekoli na biso ya mbala ya nsima motema lukuluku. Motambwisi na ngai azalaki kolandela na mayele nyonso myango ya koteya oyo epesami na la Société mpo na kozalisa bayekoli, mpe na lisalisi ya elimo ya Yehova, nazwaki batisimo nsima ya sanza minei. Na bosembo nyonso, nakoki koloba ete soki tozali na bolingo ya kozalisa bayekoli, kokoba koluka bato ya motema sembo na mosala ya kosakola, kosalela buku Boyebi mpe bisaleli mosusu ya Biblia oyo bibimisami na la Société mpe, oyo eleki ntina, kobondela mpo na kozwa litambwisi ya Yehova, tokoki kozwa libaku moko malamu ya kozalisa bayekoli.” Bandakisa oyo tolobeli ekeseni mpenza na mosusu. Mingi kati na bato oyo toyekolaka na bango bayaka kati na solo noki bongo te.
9 Bayekoli ya Biblia bakolaka ndenge moko te: Esengeli koyeba ete makoki ya balakisi mpe ya bayekoli ya Liloba ya Nzambe ekoki kokesana makasi. Bokoli na elimo ekoki kozala malɛmbɛmalɛmbɛ to mbangumbangu. Bayekoli mosusu ya Biblia bakolaka na elimo nsima ya mwa basanza, nzokande basusu basalaka ntango molai. Bokoli ya moto na elimo etalelaka mpe kelasi oyo atángá, lolenge oyo asepelaka na makambo ya elimo, mpe bolingo na ye epai na Yehova. Ezali te ete moto nyonso oyo tozali koyekola na ye azali na “mposa mingi” ya koyekola Makomami mokolo na mokolo, lokola Babeloya ya kala oyo bakómaki bandimi.—Mis. 17:11, 12.
10 Yango wana siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Máí 1998, oyo ezalaki na motó na likambo ete “Tolingi koyekola Biblia na bato mingi koleka,” epesaki litambwisi oyo libongi: “Ya solo, bayekoli nyonso bakolaka ndenge moko te. Bamoko basepelaka te na makambo ya elimo lokola bamosusu to basimbaka noki te makambo oyo bazali koyekola lokola bamosusu. Bamoko bazali na makambo mingi ya kosala na bomoi mpe bakoki kozala na ntango mingi te mpo na koyekola mokapo mobimba pɔsɔ na pɔsɔ. Na yango, na mabaku mosusu, ekoki kozala malamu koyekola na bango koleka mbala moko mpo na kosilisa mikapo mwa mingi mpe kobakisa mwa basanza mpo na kosilisa buku.”
11 Bazalisi ya bayekoli bazalaka na bokatikati: Ezali likambo ya ntina koyeba lolenge boyekoli ezali kokende, engebene ezalela mpe makoki ya moyekoli. Lokola tolendisami ete tóbandaka boyekoli na mwa buku Azali kosɛnga, ekoki kosala sanza mibale to misato mpo na kosilisa yango liboso ya kokɔta na buku Boyebi. Soki tozali kosalela makanisi nyonso oyo mapesamaki na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, ekoki kosɛnga sanza mosusu motoba to libwa mpo na kosilisa buku Boyebi. Basusu oyo babandaki boyekoli na buku Boyebi bakɔtaki lisusu na mwa buku Azali kosɛnga mpo na kosalisa moyekoli ete ayeba mateya ya moboko ya Biblia na lombangu mpenza. Na nsima bazongaki lisusu koyekola na buku Boyebi. Soki boyekoli ebandaki na buku Boyebi mpe ezali kokola malamu, ekozala malamu koyekola mwa buku Azali kosɛnga nsima ya kosilisa buku Boyebi. Yango ekopesa nzela ya kotalela lisusu na lombangu mateya ya moboko ya Liloba ya Nzambe. Na lolenge moko to mosusu, tosengeli te kopimela moyekoli boyebi ya sikisiki na kokendáká mbangumbangu na boyekoli bobele mpo na kosilisa buku. Moyekoli nyonso azali na mposa ya moboko makasi mpo na kotonga kondima na ye ya sika kati na Liloba ya Nzambe.
12 Lokola toyebi epai tokómi na ntango oyo tozali na yango, ezali likambo ya lombangu koleka ete tósalisa basusu báyeba solo. Wana tozali kokoba kobondela mpo na kobanda boyekoli ya sika na bato mosusu, tiká ete tóbondelaka mpe mpo na baoyo tozali koyekola na bango. Boye, tokozala ntango nyonso na esengo ya kobatisa bayekoli mingi “mikolo nyonso kino nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.”—Mat. 28:20, NW.