Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/98 lok. 5
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1998

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1998
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Tósangana na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 1/98 lok. 5

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1998

Kelasi ekoki kolimbolama lokola esika oyo moto azwaka boyebi mpe makoki ya sika. Na lisalisi ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, tozali kolakisama ntango nyonso na boyebi ya Nzambe. Kosangana na biso na eteyelo yango ezali mpe kokólisa makoki na biso ya koteya mpe ya koloba. Na 1998, manáka ya eteyelo yango ekopesa biso lisusu ebele na mabaku mpo na kokóla na elimo.

Soki otali manáka, okomona ete lisoló No. 3 ekolobela mbala na mbala moto moko oyo bomoi na ye elobelami kati na lisoló ya Biblia, mpe alobelami na búku Auxiliaire. Okomona mpe ete búku Bolamu na libota ekɔtisami na manáka; yango ekotalelama na masoló No. 3 mpe No. 4. Soki lisoló No. 4 ezwami na búku Bolamu na libota, ndeko mobali moko asengeli kosala yango lokola lisukúlu. Tozali kokundwela bino ete mwanakelasi moko te asengeli kolekisa ntango oyo epesameli ye.

Likambo ya sika: Mpo na litomba na biso mpenza, “Manáka ya botángi ya Biblia oyo ebakisami” emonisami nsima ya nimero ya loyembo ya pɔ́sɔ. Tómipesa mokano ya kotánga yango, atako eteni moko te ya manáka ya pɔ́sɔ wana ezali kozongela yango. Manáka yango ekopesa biso momeseno ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, soki tobandaki naino kosala yango te.

Mpo na mayebisi mosusu matali masoló, malako mpe bozongeli ya kokoma, tótánga na likebi mpenza malako mapesami na “Manáka ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1998” mpe na lokasa 3 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1996.

Soki okomisi naino nkombo na yo te na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, tozali kosɛnga yo ete osala yango sikawa. Eteyelo yango oyo ekokani na mosusu te ezali kokóba kokokisa mosala monene kati na kobongisama ya basaleli ya Yehova, basaleli ya komikitisa mpe oyo bamipesi, kosalisáká bango ete bázala ntango nyonso baministre oyo bazali na makoki koleka.—1 Tim. 4:13-16.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto