Tósangana na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
1 Na lisalisi ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, bamilió ya Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kozala baministre ya nsango malamu. Tozali komikundola bobangi mpe mayoki ya kozanga makoki oyo tozalaki na yango ntango tosanganaki mpo na mbala ya liboso na eteyelo oyo; mpe sikawa, tozali na botɔ́ndi mingi mpo na mokumba oyo yango ekokisi mpo na bokóli na biso na elimo, mpo na oyo etali kolobela Liloba ya Nzambe mpe koteya yango. (Talá Misala 4:13.) Osili kokomisa nkombo na yo na eteyelo wana ya ntina?
2 Nani akoki kokomisa nkombo na ye? Búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe eyanoli na lokasa 74 ete: “Baoyo nyonso bazali koyangana ntango nyonso na lisangá, bakoki komikomisa nkombo, ata baoyo babandi koyangana bobele sika na makita, nde esengeli ete bomoi na bango eyokana na mitinda ya Biblia.” Tozali kobyanga baoyo nyonso bakokisi masɛngami—mibali, basi mpe bana—ete bákutana na mokɛngɛli ya eteyelo mpo na kokomisa nkombo na bango.
3 Manáka ya eteyelo mpo na 1997: Manáka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1997 esangisi botaleli ya mateya mingi mpe ya bato oyo balobelami na Biblia, mpe makambo matali lisangá. Tozali kosuka te bobele na kokólisa makoki na biso ya balóbi mpe ya bateyi, kasi lisusu tozali koyekola makambo mingi na lisalisi ya bozwi nyonso ya elimo oyo ezali na manáka yango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. (Mas. 9:9) Soki tozali komibongisa mpo na eteyelo, na ndakisa na kotángáká mikapo ya Biblia mipesami mpo na pɔ́sɔ, mpe soki tozali koyangana na yango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, yango ekopesa biso matomba mingi na elimo.
4 Na 1997, biteni mingi oyo bibongisami mpo na botángi ya Biblia mpo na lisoló No. 2 ekozala mikuse mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Ntango akobongisa lisoló na ye, mwanakelasi akobongisa malamumalamu ntango ya botángi na ye mpo na koyeba ntango boni akolekisa na maloba ya bokɔti na lisoló mpe na maloba ya bosukisi na boumeli ya miniti mitano oyo epesameli ye. Yango ekosalisa ye na kosalela mingi ntango na ye mpe ya kolóna te bobele makoki na ye ya kotánga, kasi lisusu lolenge ya koloba malamu kozanga ete atángaka maloba na ye.—1 Tim. 4:13.
5 Kati na bakadre oyo ekoki kosalelama mpo na lisoló No. 3, oyo ezwi moboko likoló na búku Boyebi, tobakisi mpe litatoli ya libaku malamu. Na yango, ndeko mwasi akoki kopona lokola kadre, bozongeli ya sika, boyekoli ya Biblia to litatoli ya libaku malamu. Ya solo, ekosengela mpenza kotya likebi mingimingi likoló na mateya kasi na kadre te.
6 Ezala ete tozwi libaku ya kopesa lisukúlu ya boteyi, makanisi ya ntina ya Biblia to lisoló ya mwanakelasi, tokoki komonisa ete tozali kozwa Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na motuya na kobongisáká mpe kozongeláká mbala na mbala lisoló na biso, na kopesáká yango na endimiseli mpe na esengo, na kolekisáká te ngonga oyo epesami, na koyokáká batoli ya mokɛngɛli na eteyelo mpe na kosaleláká yango, mpe na kosaláká ntango nyonso molende mpo na kokokisa na bosembo nyonso mokumba na biso. Bosangani na biso na eteyelo ekozala bongo lipamboli mpo na biso moko mpe mpo na baoyo nyonso bazali wana.