Makita ya mosala mpo na Mársi
Pɔsɔ ebandi na 2 Mársi
Min. 10: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Nsango ya Teokrasi.
Min. 15: “Batatoli ya Yehova: Bapalanganisi ya solo ya nsango malamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Talá lisusu etanda oyo ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1992, lok. 19.
Min. 20: “Tóbyanga moto nyonso oyo azali na mposa.” Talelá lisolo yango mpe mónisa lolenge oyo maloba mpo na kobanda lisolo mabongisami mpo na kolamwisa bosepeli ya balobani na biso mpe kopusa bango. Elakiseli ekosalema na moto oyo azali mokóló na lisalisi ya par. 2 mpe 3 to par. 4 mpe 5 mpe elakiseli mosusu ekosalema na elenge mosakoli moko na lisalisi ya par. 6.
Loyembo 208 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 9 Mársi
Min. 10: Mayebisi. Lapólo ya kɔnti.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Tósakola epai na bato ya nkota nyonso mpe ya mangomba nyonso.” (par. 1 kino 10) Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá nkota oyo ilobamaka na bato mingi koleka na teritware na bino mpe mónisá mikanda oyo mizali na nkota yango kati na libombo ya lisangá. Elakiseli moko ekosalema na lisalisi ya par. 10, mpo na komonisa lolenge ya kosalela mwa buku Une bonne nouvelle pour toutes les nations.
Loyembo 220 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Mársi
Min. 5: Mayebisi.
Min. 12: Mpo na nini tosengeli koyangana na makita ya lisangá. Nkulutu moko azali kotalela makambo ya ntina ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1993, nk. 8 kino 11, mpe azali kobenda likebi likoló na ntina ya koyangana mbala na mbala na makita nyonso.
Min. 18: “Tósakola epai na bato ya nkota nyonso mpe ya mangomba nyonso.” (par. 11 kino 27) Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá mangomba oyo mazali mangomba ya boklisto te kati na teritware na bino. Mosakoli moko oyo akɔmeli akosala elakiseli mpo na komonisa lolenge ya kosolola, na mbala ya liboso, na mondimi ya lingomba moko oyo lipalangani mingi koleka kati na teritware na bino, ezala Babudiste, Bahindu, Bayuda to Bamizilma.
Min. 10: “Yehova azali mosungi na ngai.” Lisukulu ya mɔ́tɔ mpe ya kolendisa, ekosalema na nkulutu moko.
Loyembo 15 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Mársi
Min. 10: Mayebisi. Yebisá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Apríli. Pesá likanisi moko to makanisi mibale oyo mazwami na lok. 8 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yúni 1996, mpo na kolakisa buku Boyebi. Bendá likebi na likambo oyo ete, mokano na biso ezali ya kobanda boyekoli ya Biblia.
Min. 15: “Soki maloba mpo na kobanda lisolo mazali kobimisa matomba, salelá yango!” Sɛngá na mosakoli moko to na basakoli mibale oyo bakɔmeli ete báloba na mokuse, na bisika bafandi, maloba mpo na kobanda lisolo oyo basalelaka mbala na mbala mpo ete maloba yango mazalaka pɛtɛɛ mpe mabotaka mbuma. Na nsima, basakoli mosusu bakolobela maloba mpo na kobanda lisolo, oyo mauti kopesama na Mosala na biso ya Bokonzi, mpe oyo basakoli yango bamonaka ete mazali kobimisa matomba.
Min. 20: Tómimesenisa na kopesa litatoli. Lisolo ya mokuse oyo lizwami na buku Mokanda mpo na Eteyelo, nk. 98 kino 99, par. 8 mpe 9. Bendá likebi likoló na likambo oyo ete, ezali mpenza na ntina ete tóbongisaka malamumalamu maloba na biso mpo na kobanda lisolo mpe tósalelaka myango ndenge na ndenge mpo na kokóma basakoli oyo bakɔmeli. Bandeko basi mibale bazali komonisa lolenge oyo bamanyolaka maloba oyo bauti koloba na ndako moko mpe lolenge oyo bapesanaka makanisi mpo na koloba lisusu malamu koleka. Basali lisusu elakiseli ya mokuse oyo bazali komeka maloba bakosalela mpo na kobanda lisolo na mbala ekoya mpe bazali kopesana makanisi ya ntina. Ndeko oyo azali kotambwisa lisolo yango akosukisa na kolendisáká basakoli nyonso ete bámanyolaka maloba na bango mpo na kobanda lisolo mpe bámimesenisa na yango.
Loyembo 103 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Mársi
Lisangá ekobongisa manáka na yango moko, kati na yango makambo matali kobongisama ya molulu ya Ekaniseli oyo ekokundolama mokolo ya pɔsɔ mwa 11 Apríli 1998. Bokokuta malako mpo na yango na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1996.