Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/98 lok. 8
  • Tópona masolo na kotaleláká bamposa ya bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tópona masolo na kotaleláká bamposa ya bato
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Kabolaká bazulunalo ntango ozali na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!​—⁠Bazulunalo oyo eyebisaka solo na ntango na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bazulunalo oyo ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Nani akosepela na yango?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 6/98 lok. 8

Tópona masolo na kotaleláká bamposa ya bato

1 Lokola babomi-nyama na mbanzi oyo bazali kopima esika nyama ezali liboso ya kobwakela yango mbanzi, ebele ya basakoli mpe ya babongisi-nzela bazali kozwa matomba malamu na lisalisi ya masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! oyo baponaka na kotaleláká bamposa ya bato ya teritware. Balukaka liboso koyeba nani akolinga kotánga yango. Tótala lolenge basalaka:

2 Libosoliboso, batángaka nimero nyonso uta ebandeli kino nsuka. Na nsima, bamitunaka lolenge nini ya bato bakosepela na lisolo boye. Mpe, basalaka makasi mpo na kokende kotala bato oyo bakoki kosepela kotánga lisolo yango. Soki bamoni ete nimero moko ya sikisiki ekosepelisa bato ya teritware na bango, basalaka komande ya baekzamplere mosusu ya nimero yango.

3 Motuya ya bazulunalo na biso endimami: Moko na baaboné na biso asalaka na zulunalo moko oyo eleki kotángama mingi na Nigeria, zulunalo yango elobelaka makambo ya mikili ndenge na ndenge. Talá makambo oyo alobaki na ntina na Lamuká!: “Longonya mingi mpo na zulunalo oyo eleki kitoko, oyo elobelaka makambo mazali koleka na mokili.” Moko na bato oyo bameseni kotánga bazulunalo na biso mingi alobaki ete: “Oyo nde liziba ya mayele! Ezali na lisolo moko te oyo esepelisaka ngai oyo ezangi kolobelama kati na moko na mikanda oyo.”

4 Bazulunalo etondi na masolo ndenge na ndenge: Biblia, makambo mazali koleka na mokili, libota, mikakatano ya bato, istware, siansi, banyama mpe banzete. Na ntembe te, moto moko akozala na mposa ya kotánga likambo moko oyo ezali kolobela bamposa na ye, ezalela na ye to mosala na ye. Lokola bato oyo tosololaka na bango bakeseni, moko na moko azalaka na bamposa na ye mpe na mikakatano na ye, ntango tozali kopona masolo na kotaleláká mpenza bamposa na bango, yango ebimisaka matomba malamu.

5 Tótala oyo ekómelaki Batatoli ya Yehova mibale oyo balakisaki Lamuká! ya 8 Sɛtɛ́mbɛ 1996 (ebimeli ya Lifalanse) epai na mopanzi-nsango moko. Akomaki ete: “Liboso ete nazwa libaku ya koloba ete yango ezali kosepelisa ngai te, moko kati na bango abakisaki ete: ‘Ezali na lisolo moko oyo ezali kolobela Bahindi ya Amerika. Toyebi ete bosili kokoma makambo mingi na ntina na bango.’” Andimaki zulunalo mpe atángaki lisolo yango ya Bahindi na ntango ya bolei ya ntɔngɔ. Andimaki ete “yango ezalaki malamu mingi” mpe “ezalaki kolobela makambo na bosolo nyonso.”

6 Nini ezali kosepelisa bato ya teritware na biso?: Totángaki makambo nini na basanza oyo euti koleka kati na bazulunalo na biso oyo ekoki kosepelisa bakomelesa mpe bato oyo basalaka misala na bango moko kati na teritware na biso, to lisusu bato bafandi pembeni na biso, baninga na biso ya mosala mpe baninga na biso ya kelasi? Masolo nini makoki kosepelisa mpenza baavoka, bateyi, bapesi-toli mpo na makambo matali biteyelo mpe mabota, balakisi, basali ya leta mpe minganga? Soki tozali kotalela nimero mokomoko na kokanisáká bato oyo bakosepela na yango, tokomipesa myango kitoko mpo na kopalanganisa liloba ya solo.

7 Ntango moto asepeli mingi na lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! mpe azwi zulunalo, tokoki koloba: “Mbala ya nsima ntango nakotánga lisolo moko oyo ekoki kosepelisa yo, nakosepela komemela yo yango.” Na kosaláká boye, mbala mosusu tokobakisa moto na molɔngɔ ya bato oyo tomemelaka bango bazulunalo na kozongáká mbala mingi soki likoki ezali mpo na kolakisa bango bazulunalo ya sika. Yango ekokani na oyo tosalaka ntango tozwi ndingisa ya kozonga kotala baoyo balingaka lolenge mosusu ya masolo ya sikisiki.

8 Tómityela mokano ya elimo: Esili koleka mwa bambula, mobali moko oyo mosala na ye nde ezalaki lobanzo na ye andimaki nimero moko ya Lamuká! oyo esepelisaki ye. Kasi mobali yango oyo azalaki mpe mondimi atángaki mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo azwaki kaka na libaku yango moko. Lisolo moko epusaki ye na kotalela malamumalamu liteya ya Bosato, liteya oyo andimaka uta kala. Sanza motoba na nsima, azwaki batisimo! Na bongo, tókakatana te mpo na kobanda masolo ya Biblia elongo na bato oyo batángaka bazulunalo na biso. Tokoki kolakisa bango mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mpe kosɛnga bango ete tótalela, bobele na mwa miniti, liteya moko mbala nyonso oyo tokoleka kotikela bango bazulunalo.

9 Tókanisa malamumalamu nani, kati na bato oyo tokozongela bango mpe bato oyo toyebani na bango, akosepela kozwa banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Mpe tósala makasi na kokutana na bango. Tókende kotala bato mingi na bazulunalo na biso, ezali na motuya mingi. Mpe tóbosana te ete na kosaláká nyonso ete bato bátánga bazulunalo ‘tozali kobwaka limpa na biso likoló ya mai.’ Na nsima ya mikolo, tokokoka mpenza kozwa bayekoli ya sika.​—Mos. 11:1, 6.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto