‘Tokoki mpenza mpo na mosala nyonso malamu’
1 Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali kozwa bilei ya elimo ebele mpe ya kitoko. (Yis. 25:6) Tozali na masolo ya Biblia ndenge na ndenge ya kotalela na ntango ya boyekoli ya moto na moto to ya libota, na ntango ya makita ya lisangá mpe na ntango ya mayangani. Kasi, tozwaka mpenza matomba na yango na mokano ya kokóma bato oyo ‘babongisami malamu, bakoki mpenza mpo na misala nyonso malamu’?—2 Tim. 3:17.
2 Tókanisa mwa moke bilei ya elimo oyo bibongisami mpo na mobu 1998, oyo esili koleka katikati na yango! Na ntango ya makita ya pɔsɔ na pɔsɔ na lisangá, tozali koyeba mokemoke makanisi ya ntina ya mikanda 23 ya Makomami ya Greke ya boklisto, tozali komanyola likoló na bomoi ya bato 49 ya ntango ya lisolo ya Biblia na lisalisi ya makanisi oyo buku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible ezali kopesa mpe tozali kotalela nkasa 138 ya buku Prédicateurs. Tozali mpe koyekola ndambo moko likoló na misato (1/3) ya buku Boyebi, eteni monene ya buku Libota, bakisa mpe buku Parole de Dieu mobimba. Lisusu, tozali mpe koleisama na Mosala na biso ya Bokonzi oyo ebimaka mbala 12 na mbula, na masolo ya boyekoli 52 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na masukulu ya bato nyonso oyo mazali mpe pene na motángo yango (52), mazali kolobela masolo ndenge na ndenge ya Biblia. Longola nyonso wana, tokoki lisusu kobakisa mateya oyo mazali kopesama na mayangani. Oyo nde ebele ya bilei ya elimo oyo bipesameli biso!
3 Tózala na botɔ́ndi mpo na bibongiseli oyo Yehova azali kozwa: Mpo na kozwa mpenza matomba na yango, tosengeli kososola mpo na nini Yehova azali kopesa biso bilei ebele boye. Na komileisáká biloko yango kitoko, tozali kotonga kondima na biso mpe tozali kolendisa boyokani na biso na Yehova. (1 Tim. 4:6) Nzokande, bilei ya elimo bipesameli biso bobele mpo na kolakisama na biso moko te. Bizali kopusa biso ete tóyebisa solo epai na basusu mpe bizali kokokisa biso ete tókóma baministre babongi ya nsango malamu.—2 Tim. 4:5.
4 Tótalela soko moke te bamposa na biso ya elimo na bopɔtu, kasi tókolisa ntango nyonso mposa makasi mpo na bibongiseli mingi ya elimo oyo ezali kouta na mesa ya Yehova mpe oyo ezali kosepelisa biso. (Mat. 5:3; 1 Pet. 2:2) Mpo na kozwa mpenza matomba na yango, esengeli mbala na mbala kopesa ntango mingi na boyekoli ya Biblia, moto na moto mpe na libota, bakisa mpe koyangana na makita. (Ef. 5:15, 16) Matomba oyo tokozwa makokokana na elendiseli epemami oyo Paulo apesaki epai na Baebele ya sembo na mokanda ya Baebele 13:20, 21.