Tótángaka yango malamu!
Bandeko mingi kati na biso bazalaka na mokakatano mpo na kotánga mikapo ya Makomami oyo epesami. Nzokande basusu batángaka yango na lolenge ya kopɛngola likebi ya bayoki. Na bongo, wapi lolenge malamu ya kotánga mikapo? Buku Toyekola kotanga mpe kokoma (na Lifalanse) elimboli polelepolele likambo yango. Tósala makasi ete tósalela lolenge oyo emonisami na lokasa 75: “Soki tolingi komonisa ndimbola ya molimo, tokoki kokende na Genese mokapo ya mibale, vɛrsɛ ya nsambo. Mokapo yango ekokomama boye: Genese 2:7. . . . Bobele bongo, tokoki kokende na mokapo ya motoba ya mokanda ya Matai, kobanda na vɛrsɛ ya libwa kino vɛrsɛ ya zomi na misato. . . . Maloba yango mazali kokomama boye: Matai 6:9-13.” Bobele bongo, Matai 6:9, 13, ekotángama: Matai mokapo ya motoba, vɛrsɛ ya libwa mpe ya zomi na misato, to Matai motoba, libwa mpe zomi na misato. Tomoni ete bilembo ya bopemi (to signes de ponctuation) etiki esika na “kino,” “mpe” to ezali kotángama te. Na ndakisa, elobami te ete: “Matai mokapo ya motoba, vɛrsɛ ya libwa, pumbwá (to virgule) zomi na misato!” Soki tozali koloba malamu, tokomimonisa basali ‘oyo bazali kosembola malamu liloba ya solo’ motindo moko na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bakɔmeli.—2 Tim. 2:15; 1 Kol. 1:10.