Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/98 lok. 4
  • Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Bokundoli epai na mokomeli mpe mokɛngɛli na mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 10/98 lok. 4

Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu

1 Yesu alobaki ete: “Mbuma mingi iteli solo, nde basali bazali mingi te. Na bongo, bondelá Nkolo na bilanga ete atinda basali kobukela ye mbuma.” Lokola na ekeke ya liboso bato mpo na kobuka mbuma bazalaki moke mpe bazalaki na teritware monene ya kosakola, Yesu akokaki kotinda bango moto na moto na nzela na ye na mosala ya kosakola ete bákutana na bato mingi. Nzokande, “atindaki bango mibale mibale.” (Luka 10:1, 2) Mpo na nini mibale mibale?

2 Bayekoli yango bazalaki bato ya sika mpe bayebaki naino makambo mingi te. Na kosakoláká elongo, bakokaki koyekola makambo epai na basusu mpe kolendisana moko na mosusu. Lokola Salomo alobaki yango, “mibale baleki moko na malamu.” (Mas. 4:9, 10) Ata nsima wana elimo santu ekitelaki bayekoli na Pantekote ya mobu 33 T.B., Paulo, Balanaba, mpe basusu bakendaki elongo na bandimi mosusu na mosala ya kosakola. (Mis. 15:35) Oyo nde libaku malamu basusu bazwaki ya kobongisama mpenza na mibali ya makoki motindo wana!

3 Kobongisama moko malamu: Lolenge moko na oyo ya ekeke ya liboso, lisangá ya boklisto ya mikolo na biso ezali ebongiseli ya mosala ya kosakola. Ebongisaka mpe biso. Mposa makasi ya mokomoko na biso esengeli kozala ya komonisa nsango malamu na lolenge lobongi. Mpo ete basakoli mingi bákóma na makoki na mosala ya kosakola, esengeli kosalisa bango.

4 Na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo euti koleka, la Société ayebisaki ebongiseli moko oyo na nzela na yango babongisi-nzela bakosalisa basakoli mosusu na mosala ya kosakola. Yango ezali na ntina mpenza? Ɛɛ, ntina ezali. Basakoli koleka milio moko bazwaki batisimo na mbula misato oyo euti koleka, mpe mingi kati na bango basengeli kobongisama mpo na kokóma na makoki na mosala ya kosakola. Banani bakoki kosalelama mpo na kokokisa mosala yango?

5 Babongisi-nzela ya sanza na sanza bakoki kosalisa. Ebongiseli ya Yehova ezali kopesa bango toli mingi mpe kobongisa bango. Babongisi-nzela bazwaka mateya mabongi mpo na bamposa na bango na Eteyelo mpo na Babongisi-nzela oyo eumelaka pɔsɔ mibale. Bazwaka mpe matomba na makita oyo basalaka elongo na bakɛngɛli ya zongazonga mpe na bakɛngɛli ya etúká, mpe lisusu bazwaka matomba na litambwisi ya bankulutu. Atako babongisi-nzela nyonso te nde bazali na makoki lokola Paulo mpe Balanaba, kasi babongisami malamu, mpe basepelaka kosalisa basusu.

6 Nani akosalisama? Kobongisama yango ekopesama bobele epai na basakoli ya sika to baoyo bauti kozwa batisimo sika? Ezali bongo te! Ezali na bilenge mpe mikóló oyo bayebi solo esili koleka bambula mingi kasi bakosepela kozwa lisalisi yango na makambo mosusu ya mosala ya kosakola. Bamoko bakabolaka bazulunalo malamu mpenza kasi bazalaka na mokakatano ya kosala bozongeli ya sika to kobanda boyekoli ya Biblia. Basusu bakoki kobanda boyekoli ya Biblia malamu kasi bakoki komona ete bayekoli na bango bazali kokola te. Nini ezali kosala ete bayekoli yango bákola te? Babongisi-nzela ya makoki bakoki kopesa lisalisi mpo na yango. Babongisi-nzela mosusu bazali na makoki ya kokolisa bosepeli oyo bato bamonisi, kobanda boyekoli ya Biblia, mpe komema bayekoli ya sika na lisangá. Makoki na bango ezali lisalisi monene na ebongiseli oyo ya sika.

7 Omonaka ete manaka na yo epesaka yo nzela te ete osanganaka mbala na mbala na makita ya mosala ya kosakola na lisangá lokola olingaka kosala yango? Mobongisi-nzela moko akoki kosala elongo na yo na ntango oyo basakoli mosusu bazali te.

8 Kosalana elongo ezali na ntina: Mbala mibale na mbula, bankulutu bakozwa bibongiseli mpo ete basakoli oyo basengeli mpenza na lisalisi bázwa lisalisi yango na ebongiseli ebéngami Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu. Soki ondimi kozwa lisalisi motindo wana, sololá na mobongisi-nzela oyo bapesi yo mpo ete asalisa yo, salelá manaka oyo mabongi mpo na mosala ya kosakola mpe tosá yango malamu. Tosaká bilaka nyonso bozali kopesana mpo na bokutani elongo. Wana bozali kosakola elongo, talá lolenge malamu ya kolakisa nsango malamu. Talelá mpo na nini bokɔti mosusu ya masolo ebongi. Salelá makanisi oyo mobongisi-nzela akoki kopesa yo mpo na kobongisa masolo na yo. Wana ozali kosalela makambo oyo ozali koyekola, bokoli na yo mpe ya basusu na mosala ya kosakola ekomonana polele. (Talá 1 Timote 4:15.) Bósakola elongo mbala na mbala, salelá makambo nyonso ya mosala ya kosakola, bakisa mpe litatoli ya libaku malamu kasi lobelá mingi mpenza likambo oyo ozali na mposa ya lisalisi na yango.

9 Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akotya likebi na bokoli oyo ekosalema. Mbala na mbala, akotalela elongo na motambwisi ya boyekoli ya mokanda mpo na koyeba lolenge ozali kozwa matomba na ebongiseli yango. Mbala mosusu, mokɛngɛli ya zongazonga akosalisa yo ntango akoya kotala lisangá na bino.

10 Yehova alingi ete basaleli na ye bábongisama mpe “bákoka mpo na mosala nyonso malamu.” (2 Tim. 3:17) Talelá ebongiseli ebéngami Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu lokola ebongiseli moko malamu ya kosalisa baoyo bazali na mposa ya kokolisa makoki na bango ya kosakola liloba. Soki ozwi libaku malamu ya kosala kati na ebongiseli yango, salá na motema mobimba, na komikitisa mpe na esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto