Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/98 nk. 5-6
  • Manaka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 1999

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 1999
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Malako
  • MANAKA
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 10/98 nk. 5-6

Manaka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 1999

Malako

Na mobu 1999, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:

BABUKU: Biblia: Traduction du monde nouveau [bi12], Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w], Lamuká![g], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si-LI], Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota [fy], mpe Étude perspicace des Écritures [it-2-F] to Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible [ad].

Eteyelo esengeli kobanda na loyembo mpe na libondeli NA NTANGO ETYAMI; bongo nsima ya maloba ya bofungoli, ekolandana boye:

LISOLO No. 1: Miniti 15. Esengeli kopesama epai na nkulutu to epai na mosaleli na misala, mpe mateya na yango makouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká! to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Soki mateya mauti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká!, lisolo yango lisengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 15, mituna ya bozongeli ekozala te; kasi soki liteya yango lizwami na buku “Makomami nyonso,” likosalema lokola lisolo ya miniti 10 kino 12 oyo ekolandana na bozongeli ya miniti 3 kino 5 na lisalisi ya mituna oyo minyatami na nse ya lokasa ya eteni oyo epesami kati na buku oyo bouti kotalela. Mokano esengeli te kozala ya kolobela makanisi nyonso oyo matyami na eteni ya buku oyo ezali kotalelama kasi nde ya kobenda likebi likoló ya motuya ya kosalelama na yango mpe kobimisa polele makambo oyo makozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Motó ya likambo oyo epesami ezali yango nde esengeli kosalelama.

Bandeko mibali oyo bapesameli lisukulu oyo basengeli kokeba ete bátosa ngonga epesami. Soki mokɛngɛli apesi bango toli na nkuku, asengeli kokoma bilembo bibongi kati na lokasa ya toli.

NDIMBOLA YA MIKAPO YA BIBLIA: Miniti 6. Eteni oyo ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala, oyo akolakisa mateya yango na lolenge malamu engebene mposa ya lisangá. Lisolo oyo esengeli te bobele kolobela na bokuse eteni oyo epesami mpo na kotánga. Ndimbola mokuse ya mikapo oyo mikotalelama ekopesama na boumeli ya segɔndi 30 kino 60. Kasi, mokano ya liboso ya lisolo oyo ezali nde ya kosalisa bayangani ete báyeba mpo na nini mpe lolenge nini mateya yango mazali na ntina mpo na biso banso. Nsima na eteni oyo, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga na banakelasi ete bákenda na bakelasi na bango, soki ezali mingi.

LISOLO No. 2: Miniti 5. Ezali botángi ya Biblia oyo ekosalema na ndeko mobali moko. Botángi yango ekosalema na kelasi ya liboso mpe na bakelasi nyonso mosusu. Eteni ya kotánga ezalaka mingimingi mokuse mpo na kopesa nzela epai na mwanakelasi ete apesa ndimbola mokuse, na ebandeli ya lisolo na ye mpe na bosukisi. Na ntina na mokapo oyo azali kotánga, akoki kolobela makambo maleká kala, ndimbola ya esakweli soki mpe liteya ya moboko, to komonisa ndenge ya kosalela mitinda oyo mizali na kati. Bavɛrsɛ nyonso epesami esengeli kotángama mbala moko mpe kolimbolama na nsima. Ya solo, soki bavɛrsɛ oyo esengeli kotángama elandani te, mwanakelasi akoki koyebisa esika oyo botángi ezali kolandana.

LISOLO No. 3: Miniti 5. Lisolo oyo likopesama epai na ndeko mwasi moko. Mateya mpo na lisolo oyo makozwama na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota to na Étude perspicace des Écritures to na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible. (Talá lisolo No. 4 mpo na koyeba lolenge ya kosala lisolo oyo ezali kolobela moto moko oyo alobelami kati na Biblia.) Kadre ya lisolo oyo ekoki kozala litatoli ya libaku malamu, bozongeli ya sika, to boyekoli ya Biblia na ndako, mpe bato oyo bakosangana na lisolo oyo bakoki kofanda to kotɛlɛma. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi likoló na lolenge mwanakelasi azali kosalisa molobani ete akanisa mpe asosola mateya mpe na motindo azali komonisa lolenge ya kosalela mikapo yango kati na bomoi. Mwanakelasi oyo apesameli mokumba oyo asengeli koyeba kotánga. Molobani moko akoki koponama na mokɛngɛli na eteyelo, kasi molobani mosusu mpe akoki kobakisama. Ezali mwanakelasi nde akokata soki molobani asengeli to asengeli te kotánga baparagrafe mosusu ntango bazali kosalela buku Bolamu na libota. Likebi lisengeli te kotyama mingi likoló ya kadre ya lisolo, kasi nde likoló ya lolenge malamu oyo mateya makopesama.

LISOLO No. 4: Miniti 5. Soki lisolo oyo ezali kolobela moto moko oyo alobelami kati na Biblia, yango ekopesama na ndeko mobali to ndeko mwasi. Soki ezwami kati na buku Bolamu na libota ekosalama na ndeko mobali. Mpo na lisolo mokomoko motó na likambo oyo ekolobelama epesami kati na manaka. Soki lisolo yango ezali kolobela moto moko oyo alobelami kati na Biblia, mateya makouta na buku Étude perspicace des Écritures to na Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, na nse ya nkombo ya moto yango. Mwanakelasi asengeli koyekola mikapo ya Makomami oyo mizali kati na eteni oyo epesami mpo na koyeba malamumalamu moto yango oyo alobelami na Biblia​—makambo malekaki na bomoi na ye, bakisa mpe bomoto na ye, mimeseno na ye mpe ezaleli na ye. Na nsima, mwanakelasi akokɔta na mozindo ya lisolo na ye mpe akopona mikapo oyo mibongi kosalelama. Mikapo mosusu oyo mizali komonisa polele mitinda ya Biblia mpe oyo mizali na boyokani na motó ya likambo mikoki kokɔtisama na lisolo. Mokano na lisolo oyo ezali ya komonisa liteya tokoki kozwa na ndakisa ya moto mokomoko alobelami na Biblia, oyo azali kotalelama. Misala ya bosembo, ya mpiko, ya komikitisa mpe ya kozanga moimi mizali bandakisa kitoko mpo na kolanda; misala ya kozanga bosembo, bakisa mpe mimeseno mabe, mikotalelama lokola makebisi oyo masengeli kosalisa baklisto na kokima etamboli ya mabe. Soki lisolo oyo lipesami na ndeko mobali, asengeli koloba na kotaleláká na makanisi na ye bayangani oyo bazali na Ndako ya Bokonzi. Soki lisolo oyo lipesami epai ya ndeko mwasi, akosala yango na kolandáká batoli epesami na lisolo No. 3.

*MWA MANAKA MOSUSU MPO NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Mpo na pɔsɔ mokomoko, mikapo ya kotánga mityami kati na ba crochets pembeni ya nimero ya loyembo. Soki olandi manaka oyo, kotángáká nkasa zomi na pɔsɔ moko, okoki kosilisa Biblia mobimba na boumeli ya mbula misato. Eteni moko te ya manaka ya eteyelo to ya bozongeli ya kokóma etalelami na mwa manaka oyo ya botángi ya Biblia.

LIYEBISI: Makanisi mosusu mpe mateya mosusu mataleli lolenge ya kopesa toli, lolenge ya kotosa ngonga oyo epesami, bozongeli ya kokoma, mpe lolenge ya kobongisa masolo, epesami kati na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1996, lokasa 3.

MANAKA

4 Yanuáli Botángi ya Biblia: Emoniseli 16 kino 18

Loyembo No. 23 [*2 Mikonzi 16 kino 19]

No. 1: Ndenge nini Nzambe apemisaki Biblia (w97 15/6 nk. 4-8)

No. 2: Emoniseli 16:1-16

No. 3: Batelá mwana na yo na likama (fy nk. 61-63 par. 24-28)

No. 4: Matai (Matthieu)​—Motó ya likambo: Nzambe aponaponaka te

11 Yanuáli Botángi ya Biblia: Emoniseli 19 kino 22

Loyembo No. 126 [*2 Mikonzi 20 kino 25]

No. 1: Emoniseli​—Litomba na yango (si-LI nk. 268-269 par. 28-34)

No. 2: Emoniseli 22:1-15

No. 3: Baboti​—Bótika te kosolola na bana na bino (fy nk. 64-66 par. 1-7)

No. 4: Matia (Matthias)​—Motó ya likambo: Nzambe azali kosɛnga ete bakɛngɛli bázala makasi na elimo

18 Yanuáli Botángi ya Biblia: Genese 1 kino 3

Loyembo No. 84 [*1 Ntango 1 kino 6]

No. 1: Maloba ya ebandeli na Genese (si-LI nk. 13-14 par. 1-8)

No. 2: Genese 1:1-13

No. 3: Teyá bana na yo bizaleli malamu mpe makambo ya elimo (fy nk. 67-70 par. 8-14)

No. 4: Melikisedeke (Melkisédec)​—Motó ya likambo: Yesu Klisto, Nganga Monene lokola Melikisedeke

25 Yanuáli Botángi ya Biblia: Genese 4 kino 6

Loyembo No. 66 [*1 Ntango 7 kino 13]

No. 1: Kebá na kokanisela basusu mabe (w97 15/5 nk. 26-29)

No. 2: Genese 4:1-16

No. 3: Motuya ya disipilini mpe ya limemya (fy nk. 71-72 par. 15-18)

No. 4: Mefibosete (Mephibosheth) (No. 2)​—Motó ya likambo: Motema-boboto​—Elembo oyo emonisaka basaleli ya solo ya Nzambe

1 Febwáli Botángi ya Biblia: Genese 7 kino 9

Loyembo No. 108 [*1 Ntango 14 kino 21]

No. 1: Mpela oyo elobelami na Biblia esalemaki solo? (g97-F 8/2 nk. 26-27)

No. 2: Genese 7:1-16

No. 3: Teyá bana na yo likanisi ya Nzambe na oyo etali mosala mpe kosakana (fy nk. 72-75 par. 19-25)

No. 4: Mesaka (Méshak)​—Motó ya likambo: Bilenge oyo bazali kotikala sembo bazwaka mapamboli

8 Febwáli Botángi ya Biblia: Genese 10 kino 12

Loyembo No. 132 [*1 Ntango 22 kino 29]

No. 1: Lokuta ezali mpenza nini (g97-F 22/2 nk. 17-19)

No. 2: Genese 12:1-20

No. 3: Botomboki ya bana mpe makambo oyo etindaka bango na botomboki (fy nk. 76-79 par. 1-8)

No. 4: Mika (Mika) (No. 8 it-2-F to No. 2 ad)​—Motó ya likambo: Nguya ya masese

15 Febwáli Botángi ya Biblia: Genese 13 kino 15

Loyembo No. 49 [*2 Ntango 1 kino 8]

No. 1: Bolɛmbu ya bato ezali kokumisa nguya ya Yehova (w97 1/6 nk. 24-27)

No. 2: Genese 14:8-20

No. 3: Mika (Mikaïa) (No. 2 it-2-F)​—Motó ya likambo: Sakolá na molende

No. 4: Tótika nzela na makambo nyonso te, tózala mpe na makambo makasi te (fy nk. 80-81 par. 10-13)

22 Febwáli Botángi ya Biblia: Genese 16 kino 19

Loyembo No. 188 [*2 Ntango 9 kino 17]

No. 1: Mabondeli na yo mazali komonisa nini? (w97 1/7 nk. 27-30)

No. 2: Genese 18:1-15

No. 3: Kokokisa bamposa ya ntina ya mwana ekoki kopɛngola botomboki (fy nk. 82-84 par. 14-18)

No. 4: Milyami (Miriam) (No. 1 it-2-F)​—Motó ya likambo: Kebá na koimaima

1 Mársi Botángi ya Biblia: Genese 20 kino 23

Loyembo No. 54 [*2 Ntango 18 kino 24]

No. 1: Ndenge nini okoki koteya lisosoli na yo (w97 1/8 nk. 4-6)

No. 2: Genese 23:1-13

No. 3: Moledekai (Mordekaï) (No. 2 it-2-F)​—Motó ya likambo: Ezaleli ya bosembo epesaka mapamboli

No. 4: Ndenge ya kosalisa mwana oyo asali mabe (fy nk. 85-87 par. 19-23)

8 Mársi Botángi ya Biblia: Genese 24 kino 25

Loyembo No. 121 [*2 Ntango 25 kino 31]

No. 1: Solo ezali kosikola biso na makambo nini? (w97 1/2 nk. 4-7)

No. 2: Genese 24:1-4, 10-21

No. 3: Mose (Moïse)​—Motó ya likambo: Tósepela na lolenge Yehova azali koteya biso

No. 4: Lolenge ya kosala liboso na motomboki ya motó makasi (fy nk. 87-89 par. 24-27)

15 Mársi Botángi ya Biblia: Genese 26 kino 28

Loyembo No. 197 [*2 Ntango 32 kino 36]

No. 1: Esika ya miziki kati na losambo na mikolo na biso (w97 1/2 nk. 24-28)

No. 2: Genese 26:1-14

No. 3: Batelá libota na yo na bopusi mabe (fy nk. 90-92 par. 1-7)

No. 4: Namana (Naamân) (No. 2 it-2-F)​—Motó ya likambo: Komikitisa epesaka mapamboli mingi

22 Mársi Botángi ya Biblia: Genese 29 kino 31

Loyembo No. 4 [*Ezela 1 kino 7]

No. 1: Mabelé ekokufa na mɔ́tɔ te (g97-F 8/1 nk. 26-27)

No. 2: Genese 31:1-18

No. 3: Nabala (Nabal)​—Motó ya likambo: Tózongisa mabe mpo na malamu te

No. 4: Likanisi ya Nzambe na ntina na biboteli (fy nk. 92-94 par. 8-13)

29 Mársi Botángi ya Biblia: Genese 32 kino 35

Loyembo No. 143 [*Ezela 8-10 kino Nehemia 1-4]

No. 1: Ntango nini Nzambe akobikisa bato na nzela ya bikamwiseli? (w97 1/7 nk. 4-7)

No. 2: Genese 35:1-15

No. 3: Salisá bana na yo ete bápona baninga malamu (fy nk. 95-97 par. 14-18)

No. 4: Nadaba (Nadab) (No. 1)​—Motó ya likambo: Soki tosaleli mikumba na biso malamu te, Yehova akoboya biso

5 Apríli Botángi ya Biblia: Genese 36 kino 38

Loyembo No. 106 [*Nehemia 5 kino 11]

No. 1: Lobiko​—Ndimbola na yango ya solosolo (w97 15/8 nk. 4-7)

No. 2: Genese 38:6-19, 24-26

No. 3: Natana (Nathân) (No. 2 it-2-F to No. 1 ad)​—Motó ya likambo: Pesá etumbu epai na moto oyo abongi na yango

No. 4: Bópona kominanola ya malamu kati na libota (fy nk. 97-102 par. 19-27)

12 Apríli Botángi ya Biblia: Genese 39 kino 41

Loyembo No. 34 [*Nehemia 12-13 kino Esetele 1-5]

No. 1: Mpo na nini koyebisa lisumu oyo moto asali? (w97 15/8 nk. 26-29)

No. 2: Genese 40:1-15

No. 3: Toli ya malamu oyo Biblia ezali kopesa na mabota oyo mazali na moboti sé moko (fy nk. 103-105 par. 1-8)

No. 4: Natanaele (Nathanaël)​—Motó ya likambo: Tókeba na bokosi

19 Apríli Botángi ya Biblia: Genese 42 kino 44

Loyembo No. 124 [*Esetele 6-10 kino Yobo 1-5]

No. 1: Mpo na nini osengeli kokitisa nkanda na yo? (g97-F 8/6 nk. 18-19)

No. 2: Genese 42:1-17

No. 3: Ndenge ya kolonga ntango ozali kobɔkɔla bana yo moko (fy nk. 106-107 par. 9-12)

No. 4: Nebukadanesala (Neboukadnetsar)​—Motó ya likambo: Yehova akitisaka bato ya lofundo

26 Apríli Bozongeli ya kokoma. Bósilisa Emoniseli 16-22 kino Genese 1-44

Loyembo No. 18 [*Yobo 6 kino 14]

3 Máí Botángi ya Biblia: Genese 45 kino 47

Loyembo No. 90 [*Yobo 15 kino 23]

No. 1: Bilambo ya kobuka mbuma bisepelisaka Nzambe? (w97 15/9 nk. 8-9)

No. 2: Genese 45:16–46:4

No. 3: Ndenge nini moboti oyo azali kobɔkɔla bana ye moko akoki kotya disipilini kati na ndako (fy nk. 108-110 par. 13-17)

No. 4: Nebuzaladana (Nebouzaradân)​—Motó ya likambo: Liloba ya Yehova ezangaka te kokokisama

10 Máí Botángi ya Biblia: Genese 48 kino 50

Loyembo No. 76 [*Yobo 24 kino 33]

No. 1: Genese​—Litomba na yango (si-LI nk. 17-19 par. 30-35)

No. 2: Genese 49:13-28

No. 3: Lolenge ya kolonga mayoki ya kozala yo moko (fy nk. 110-113 par. 18-22)

No. 4: Nehemia (Nehémia) (No. 3 it-2-F)​—Motó ya likambo: Zalá ndakisa malamu mpo na etonga

17 Máí Botángi ya Biblia: Exode 1 kino 4

Loyembo No. 2 [*Yobo 34 kino 42]

No. 1: Maloba ya ebandeli na Exode (si-LI nk. 19-20 par. 1-8)

No. 2: Exode 4:1-17

No. 3: Nikodeme (Nicodème)​—Motó ya likambo: Kobanga bato ezali motambo

No. 4: Lolenge ya kopesa lisungi epai na moboti oyo azali kobɔkɔla bana ye moko (fy nk. 113-115 par. 23-27)

24 Máí Botángi ya Biblia: Exode 5 kino 8

Loyembo No. 42 [*Nzembo 1 kino 17]

No. 1: Babola oyo bazali na bozwi mingi: Lolenge nini? (w97 15/9 nk. 3-7)

No. 2: Exode 7:1-13

No. 3: Noa (Noé) (No. 1 ad)​—Motó ya likambo: Mpo na kobika tosengeli kozala na botosi

No. 4: Komitika kotambwisama na makanisi ya Nzambe ntango tozali na maladi epesaka matomba (fy nk. 116-119 par. 1-9)

31 Máí Botángi ya Biblia: Exode 9 kino 12

Loyembo No. 24 [*Nzembo 18 kino 28]

No. 1: Koboya kosangana na mokili elimboli nini (g97-F 8/9 nk. 12-13)

No. 2: Exode 12:21-36

No. 3: Kobikisama na elimo: Lolenge totalelaka yango (fy nk. 120-121 par. 10-13)

No. 4: Obadia (Obadia) (No. 4 it-2-F to No. 1 ad)​—Motó ya likambo: Zalá na mpiko mpe monisá bolingo epai na basaleli ya Nzambe

7 Yúni Botángi ya Biblia: Exode 13 kino 16

Loyembo No. 58 [*Nzembo 29 kino 38]

No. 1: Lolenge ya kozwa elikya kati na ezalela ya kozanga elikya (w97 15/5 nk. 22-25)

No. 2: Exode 15:1-13

No. 3: Tyá makambo ya ntina na esika ya liboso mpe salisá bana na yo na koyika mpiko ntango moto azali na bokɔnɔ kati na libota (fy nk. 122-123 par. 14-18)

No. 4: Onesimo (Onésime)​—Motó ya likambo: Tózala na lisosoli malamu

14 Yúni Botángi ya Biblia: Exode 17 kino 20

Loyembo No. 115 [*Nzembo 39 kino 50]

No. 1: Lolenge oyo baklisto bakumisaka baboti na bango oyo bakómi mibange (w97-F 1/9 nk. 4-7)

No. 2: Exode 17:1-13

No. 3: Paulo (Paul)​—Motó ya likambo: Banguna ya solo bakoki kobongwana

No. 4: Lolenge tosengeli kotalela nkisi ya monganga (fy nk. 124-127 par. 19-23)

21 Yúni Botángi ya Biblia: Exode 21 kino 24

Loyembo No. 5 [*Nzembo 51 kino 65]

No. 1: Makambo ya solo ya siansi ezali na boyokani na Biblia (g97-F 8/7 nk. 26-27)

No. 2: Exode 21:1-15

No. 3: Ndenge nini mwasi mondimi akoki kobatela kimya kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo? (fy nk. 128-132 par. 1-9)

No. 4: Petelo (Pierre)​—Motó ya likambo: Zalá na mpiko mpe na molende mpo na losambo ya solo

28 Yúni Botángi ya Biblia: Exode 25 kino 28

Loyembo No. 47 [*Nzembo 66 kino 74]

No. 1: Yebá Yehova, Nzambe oyo azali moto solo (w97 1/10 nk. 4-8)

No. 2: Exode 25:17-30

No. 3: Filipo (Philippe) (No. 1)​—Motó ya likambo: Zalá na takte mpe na bokɛngi

No. 4: Ndenge nini mobali mondimi akoki kobatela kimya kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo? (fy nk. 132-133 par. 10-11)

5 Yulí Botángi ya Biblia: Exode 29 kino 32

Loyembo No. 174 [*Nzembo 75 kino 85]

No. 1: Kotika te ete elimo ya mokili ebebisa yo (w97 1/10 nk. 25-29)

No. 2: Exode 29:1-14

No. 3: Koteya bana mitinda ya Makomami kati na libota oyo ekabwani na makambo ya losambo (fy nk. 133-134 par. 12-15)

No. 4: Filipo (Philippe) (No. 2)​—Motó ya likambo: Zalá na bizaleli ya elimo

12 Yulí Botángi ya Biblia: Exode 33 kino 36

Loyembo No. 214 [*Nzembo 86 kino 97]

No. 1: Zalá moto oyo bakoki kotyela motema mpe batelá bosembo na yo (w97 1/5 nk. 4-7)

No. 2: Exode 34:17-28

No. 3: Batelá boyokani ya kimya na baboti oyo bazali na lingomba mosusu (fy nk. 134-136 par. 16-19)

No. 4: Pinehasi (Phinéas) (No. 1)​—Motó ya likambo: Kangamá na oyo ezali sembo

19 Yulí Botángi ya Biblia: Exode 37 kino 40

Loyembo No. 38 [*Nzembo 98 kino 106]

No. 1: Exode​—Litomba na yango (si-LI nk. 24-25 par. 26-31)

No. 2: Exode 40:1-16

No. 3: Mokakatano ya kozala tata to mama mobɔkɔli (fy nk. 136-139 par. 20-25)

No. 4: Pinehase (Phinéas) (No. 2)​—Motó ya likambo: Tózanga soko moke te botosi epai na Yehova

26 Yulí Botángi ya Biblia: Levitike 1 kino 4

Loyembo No. 26 [*Nzembo 107 kino 118]

No. 1: Maloba ya ebandeli na Levitike (si-LI nk. 25-26 par. 1-10)

No. 2: Levitike 2:1-13

No. 3: Kotika nzela soko moke te ete bolukiluki biloko ya mosuni ekabola libota na yo (fy nk. 140-141 par. 26-28)

No. 4: Foibe (Phœbé)​—Motó ya likambo: Kɔtelá bandeko na yo na mpiko

2 Augústo Botángi ya Biblia: Levitike 5 kino 7

Loyembo No. 9 [*Nzembo 119 kino 125]

No. 1: Fungola ya bolamu ya solosolo (w97 15/10 nk. 5-7)

No. 2: Levitike 6:1-13

No. 3: Mabe ya kozala moombo ya masanga (fy nk. 142-143 par. 1-4)

No. 4: Pilata (Pilate)​—Motó ya likambo: Kosala likambo mpo na kosepelisa bato ekoki komemisa yo ngambo

9 Augústo Botángi ya Biblia: Levitike 8 kino 10

Loyembo No. 210 [*Nzembo 126 kino 143]

No. 1: Kososola mitinda emonisaka kokɔmela (w97 15/10 nk. 28-30)

No. 2: Levitike 10:12-20

No. 3: Lolenge ya kosalisa mosangani moko ya libota oyo azali molangwi masanga (fy nk. 143-147 par. 5-13)

No. 4: Laba-sake (Rabshaqé)​—Motó ya likambo: Basɛkaka Nzambe te

16 Augústo Botángi ya Biblia: Levitike 11 kino 13

Loyembo No. 80 [*Nzembo 144-150 kino Masese 1-5]

No. 1: Kebá na “Baepikuli” (w97 1/11 nk. 23-25)

No. 2: Levitike 13:1-17

No. 3: Ndenge nini kopɛngola mobulu kati na ndako (fy nk. 147-149 par. 14-22)

No. 4: Laele (Rachel)​—Motó ya likambo: Ndimá mitungisi ya bomoi na zuwa te mpe na kolɛmba nzoto te

23 Augústo Botángi ya Biblia: Levitike 14 kino 15

Loyembo No. 137 [*Masese 6 kino 14]

No. 1: Oyo ezali mpenza mikolo ya nsuka (w97 1/4 nk. 4-8)

No. 2: Levitike 14:33-47

No. 3: Laba (Rahab)​—Motó ya likambo: Kondima oyo ezangi misala esili kokufa

No. 4: Kokabwana ezali nde kosilisa mikakatano? (fy nk. 150-152 par. 23-26)

30 Augústo Bozongeli ya kokoma. Bósilisa Genese 45 kino Levitike 15

Loyembo No. 145 [*Masese 15 kino 22]

6 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Levitike 16 kino 18

Loyembo No. 222 [*Masese 23 kino 31]

No. 1: Ntango mpasi ekozala lisusu te (w97 15/2 nk. 4-7)

No. 2: Levitike 16:20-31

No. 3: Lebeka (Rébecca)​—Motó ya likambo: Talelá mpe Yehova ntango ozali koluka molongani

No. 4: Ndenge Makomami mazali kosalisa mpo na kosilisa mikakatano na libala (fy nk. 153-156 par. 1-9)

13 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Levitike 19 kino 21

Loyembo No. 122 [*Mosakoli 1 kino 12]

No. 1: Sɛkɛlɛ mpo na kozwa mayele ezali te na koboyáká bisengo nyonso ya mokili (g97-F 8/10 nk. 20-21)

No. 2: Levitike 19:16-18, 26-37

No. 3: Lehobama (Rehabam)​—Motó ya likambo: Tóboya lolendo mpe toli ya mabe

No. 4: Kopesa na mobalani lotomo na ye kati na libala (fy nk. 156-158 par. 10-13)

20 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Levitike 22 kino 24

Loyembo No. 8 [*Loyembo ya Salomo 1-8 kino Yisaya 1-5]

No. 1: Komilelalela nyonso ezali mabe? (w97 1/12 nk. 29-31)

No. 2: Levitike 23:15-25

No. 3: Lubene (Ruben) (No. 1)​—Motó ya likambo: Mbuma mabe ya misala mabe ekoki koumela ntango molai

No. 4: Ntina oyo Biblia endimi mpo na koboma libala (fy nk. 158-159 par. 14-16)

27 Sɛtɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Levitike 25 kino 27

Loyembo No. 120 [*Yisaya 6 kino 14]

No. 1: Levitike​—Litomba na yango (si-LI nk. 28-30 par. 28-39)

No. 2: Levitike 25:13-28

No. 3: Luta (Ruth)​—Motó ya likambo: Bolingo ya solo ezali sembo

No. 4: Makomami mazali koloba nini na ntina na kokabwana (fy nk. 160-162 par. 17-22)

4 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: Mituya 1 kino 3

Loyembo No. 30 [*Yisaya 15 kino 25]

No. 1: Maloba ya ebandeli na Mituya (si-LI nk. 30-31 par. 1-10)

No. 2: Mituya 1:44-54

No. 3: Wana bokómi mibange (fy nk. 163-165 par. 1-9)

No. 4: Salome (Salomé) (No. 1)​—Motó ya likambo: Salelá Yehova na komikitisa

11 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: Mituya 4 kino 6

Loyembo No. 97 [*Yisaya 26 kino 33]

No. 1: Yehova azali koyangela na motema mawa (w97 15/12 nk. 28-29)

No. 2: Mituya 4:17-33

No. 3: Bóyeisa makasi bikanganeli ya libala na bino (fy nk. 166-167 par. 10-13)

No. 4: Samasona (Samson)​—Motó ya likambo: Batelá malamu boyokani na yo na Yehova

18 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: Mituya 7 kino 9

Loyembo No. 96 [*Yisaya 34 kino 41]

No. 1: Epai wapi bolamu ya solosolo ekoki kozwama (w97 15/3 lok. 23)

No. 2: Mituya 9:1-14

No. 3: Bósepela na bana ya bana na bino mpe bóyekola kosala makambo makoki na mbula na bino (fy nk. 167-170 par. 14-19)

No. 4: Samwele (Samuel)​—Motó ya likambo: Salelá Yehova uta na bolenge na yo

25 Ɔkɔtɔ́bɛ Botángi ya Biblia: Mituya 10 kino 12

Loyembo No. 125 [*Yisaya 42 kino 49]

No. 1: Yehova azali komibanzabanza mpo na banyokwami (w97 15/4 nk. 4-7)

No. 2: Mituya 10:11-13, 29-36

No. 3: Ndenge nini okoki kolonga mawa ya kokufela mobalani (fy nk. 170-172 par. 20-25)

No. 4: Safila (Sapphira)​—Motó ya likambo: Tósangana na lokuta te

1 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Mituya 13 kino 15

Loyembo No. 64 [*Yisaya 50 kino 58]

No. 1: Ntina oyo makamwisi yango moko etongaka kondima te (w97 15/3 nk. 4-7)

No. 2: Mituya 14:13-25

No. 3: Sala (Sara)​—Motó ya likambo: Kitoko ya mwasi oyo abangaka Nzambe

No. 4: Lolenge oyo baklisto bakoki kokumisa baboti na bango oyo bakómi mibange (fy nk. 173-175 par. 1-5)

8 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Mituya 16 kino 19

Loyembo No. 78 [*Yisaya 59 kino 66]

No. 1: Atako ozali mobola, osengeli koyiba te (g97-F 8/11 nk. 18-19)

No. 2: Mituya 18:1-14

No. 3: Monisá bolingo mpe ezaleli ya komitya na esika ya basusu (fy nk. 175-178 par. 6-14)

No. 4: Saulo (Saül) (No. 1 ad)​—Motó ya likambo: Matomba mabe ya zuwa mpe lolendo

15 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Mituya 20 kino 22

Loyembo No. 46 [*Yilimia 1 kino 6]

No. 1: Ndenge Biblia ekómaki epai na biso​—Eteni 1 (w97 15/8 nk. 8-11)

No. 2: Mituya 20:14-26

No. 3: Talelá ntango nyonso Yehova mpo na kozwa nguya (fy nk. 179-182 par. 15-21)

No. 4: Senakeliba (Sennakérib)​—Motó ya likambo: Yehova abikisaka bato na ye

22 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Mituya 23 kino 26

Loyembo No. 59 [*Yilimia 7 kino 13]

No. 1: Ndenge Biblia ekómaki epai na biso​—Eteni 2 (w97 15/9 nk. 25-29)

No. 2: Mituya 23:1-12

No. 3: Tókolisa bokangami na Nzambe mpe ezaleli ya komipekisa (fy nk. 183-184 par. 1-5)

No. 4: Sadalaka (Shadrak)​—Motó ya likambo: Tómibebisa te na mokili oyo epɛngwi mosika na Nzambe

29 Novɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Mituya 27 kino 30

Loyembo No. 180 [*Yilimia 14 kino 21]

No. 1: Ndenge Biblia ekómaki epai na biso​—Eteni 3 (w97 15/10 nk. 8-12)

No. 2: Mituya 27:1-11

No. 3: Likanisi malamu mpo na Bokonzi (fy nk. 185-186 par. 6-9)

No. 4: Seba (Shéba) (No. 1)​—Motó ya likambo: Basali na mabe babukaka oyo balonaki

6 Desɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Mituya 31 kino 32

Loyembo No. 170 [*Yilimia 22 kino 28]

No. 1: Biutelo ya Eyenga ya Mbotama na mikolo na biso (w97 15/12 nk. 4-7)

No. 2: Mituya 31:13-24

No. 3: Mokumba monene ya bolingo kati na libota (fy nk. 186-187 par. 10-12)

No. 4: Sekeme (Shekèm) (No. 1)​—Motó ya likambo: Pite ekoki komema libebi monene

13 Desɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Mituya 33 kino 36

Loyembo No. 51 [*Yilimia 29 kino 34]

No. 1: Mituya​—Litomba na yango (si-LI lok. 35 par. 32-38)

No. 2: Mituya 36:1-13

No. 3: Simi (Shiméï)​—Motó ya likambo: Botosi ekoki kobikisa bomoi na yo

No. 4: Libota oyo lizali kosala mokano ya Nzambe (fy nk. 188-189 par. 13-15)

20 Desɛ́mbɛ Botángi ya Biblia: Deteronome 1 kino 3

Loyembo No. 159 [*Yilimia 35 kino 41]

No. 1: Maloba ya ebandeli na Deteronome (si-LI nk. 36-37 par. 1-9)

No. 2: Deteronome 2:1-15

No. 3: Simeona (Siméon) (No. 1)​—Motó ya likambo: Nkanda oyo epekisami te ememaka nsɔni mpe mawa

No. 4: Libota mpe bomoi na yo na mikolo mizali koya (fy nk. 190-191 par. 16-18)

27 Desɛ́mbɛ Bozongeli ya kokoma. Bósilisa Levitike 16-27; Mituya 1-36 kino Deteronome 1-3

Loyembo No. 192 [*Yilimia 42 kino 48]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto