Biyano na mituna na bino
◼ Soki nkulutu moko ya komite ya mosala ya lisangá asɛngi yango, ezali malamu koyekola lisusu Biblia na ndeko mwasi to ndeko mobali moko oyo atiká kosakola?
Bankulutu bazali na mokumba ya kobatela bampate ya lisangá, ezala mpe baoyo batiká kosakola. Bakendaka kotala bango mpe bakanisaka na ntina na lisalisi oyo moto moko azali na yango mposa. Mbala mosusu ezalaka malamu kosɛnga na moto oyo atiká kosakola ete ayekola lisusu Biblia. Buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, na lokasa 103, ezali komonisa ete komite ya mosala ya lisanga nde ekozwa ekateli mpo na koyeba nani abongi mpo na kozwa lisalisi motindo wana.
Mokɛngɛli na mosala akoyeba nani abongi mpo na kopesa lisalisi yango, makambo nini bakotalela mpe mokanda nini ebongi mpo na koyekola. Mbala mosusu ndeko oyo ateyaki mosakoli oyo atiká kosakola to ndeko mosusu oyo mosakoli yango ayebi malamu mpe asepelaka na ye abongi mpo na kosalisa ye. Ekoki kosɛngama na ndeko mwasi oyo akɔmeli ete asalisa ndeko mwasi oyo atiká kosakola. Na momeseno, ezali na ntina te ete mosakoli mosusu azala elongo na mosakoli oyo azali kotambwisa boyekoli yango. Ntango bakoyebisa mosakoli oyo aponami mpo na kosala boyekoli yango, akoki kobanda kotánga ngonga, bozongeli ya sika mpe boyekoli oyo akosala.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1988, lokasa 3.
Lokola moto oyo azali koyekola asilá kozwa batisimo, ezali mpenza na ntina te ete boyekoli yango eumela eleko molai. Mokano na yango ezali ya kosalisa mosakoli oyo atiká kosakola ete azongela koyangana na makita mbala na mbala mpe kosakola nsango malamu sanza na sanza. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akosɛnzɛla lolenge boyekoli yango ezali kosalema. Lisalisi yango oyo etondi na bolingo esengeli kosala ete bandeko yango bámema mikumba na bango liboso ya Yehova, ‘bápalanganisa misisa mpe bátongama’ ngwi kati na solo.—Ef. 3:17; Gal. 6:5.