Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/00 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Kobosanaka te baoyo batiká kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • “Bózongela ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tósalisa bango bázonga noki!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 11/00 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Ndenge nini kosalisa moto oyo atiká kosakola banda kala ete akokisa lisusu masɛngami lokola mosakoli ya nsango malamu?

Ezalaka mpenza esengo, soki moto oyo atiká kosakola amonisi mpenza ete azali na mposa makasi na motema na ye mpo na kosalela Yehova. (Luka 15:4-6) Ekoki kozala ete moto yango atikaki nzela na botɛmɛli to na mitungisi ya bomoi ete ebungisa momeseno na ye ya koyekola ye moko, ya koyangana na makita, mpe ya kobima na mosala ya kosakola. Ndenge nini kosalisa mpenza moto yango mpo ete akola lisusu malamu na elimo?

Biso nyonso tosengeli koluka komonisela ye lisusu bolingo na biso ya boklisto. Bankulutu bakoluka koyeba mpenzampenza mposa na ye ya elimo. (Yak. 5:14, 15) Soki moto yango asakolaka lisusu te esili koleka bobele mwa ntango moke, ata mosakoli moko ya molende akoki kosalisa ye mpo azongela lisusu mosala ya kosakola. Nzokande, soki moto yango asanganaka lisusu na makita ya lisangá te esili koleka ntango molai, mbala mosusu ekosɛnga makambo mingi mpo na kosalisa ye. Mpo kondima na ye ekóma lisusu makasi, mpe asepela lisusu na makambo ya elimo, ekozala malamu koyekola Biblia elongo na ye na mokanda moko oyo ebongi. Mpo na yango, mokɛngɛli na mosala ya kosakola akobongisa ete mosakoli moko ya makoki atambwisa boyekoli yango. (Ebe. 5:12-14; talá Biyano na mituna na bino na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1998.) Soki oyebi moto moko oyo azali na mposa ya lisungi yango, yebisá mokɛngɛli na mosala ya kosakola ya lisangá na bino.

Liboso ya kopesa nzela na moto moko oyo atiká kosakola banda kala ete azongela lisusu kosakola, ebongi ete bankulutu mibale básolola na ye mpo na koyeba soki akokisi masɛngami mpo na kozala mosakoli ya Bokonzi. Bakolanda matambe ndenge moko na oyo basalelaka mpo na kotalela bato ya sika oyo balingi kokóma basakoli ya nsango malamu. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1988, lokasa 17, na Lifalanse.) Moto oyo atiká kosakola asengeli kozala na mposa makasi ya koyebisa bato mosusu nsango malamu. Asengeli mpe kokokisa masɛngami oyo ezali na buku Lisanga na lokasa 99-100 mpe asengeli koyanganaka na makita nyonso ya lisangá.

Momeseno malamu ya elimo ekosalisa mpenza moto oyo azongi ete azongela boyokani malamu na Yehova mpe abatela yango, mpe alanda kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Mat. 7:14; Ebe. 10:23-25) Soki azali kosala makasi na “etingya nyonso” mpe kokolisa bizaleli ya boklisto oyo ekobeba te, yango ekosalisa ye azongela lisusu te ezalela ya moklisto oyo ‘atiki kosala mosala to azali te kobota mbuma.’​—2 Pet. 1:5-8.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto