Kobosanaka te baoyo batiká kosakola
1. Mpo na nini tosengeli koluka kolendisaka baoyo batiká kosakola?
1 Oyebi ndeko moko oyo atiká kosakola? Ntango mosusu atiká koyangana na makita ya lisangá mpe abandi kobunga nzela. Mbala mosusu, okutanaki na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako. Tosengeli kobosana te ete moto ya ndenge wana azali kaka ndeko na biso. Tosengeli komonisela ye bolingo mpe kosalisa ye azongela lisangá mpe azongela ‘mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na biso.’—1 Pet. 2:25.
2. Ndenge nini tokoki kolendisa moto oyo atiká kosakola?
2 Monisá ete ozali komibanzabanza mpo na ye: Kobenga moto oyo atiká kosakola na telefone ata mwa moke to kokende kotala ye, ekoki kondimisa ye ete tobosaná ye te. Tokoloba na ye nini? Soki ata tomonisi ye kaka ete tozalaki kokanisa ye, ekolendisa ye. Salá ete lisolo yango esepelisa ye mpe etonga ye. (Filp. 4:8) Tokoki kolobela likambo moko oyo esepelisaki biso na likita ya lisangá oyo touti kosala. Tokoki mpe kobenga ye aya na likita to na liyangani moko, to koyebisa ye ete tokokangela ye esika ya kofanda to tokopesa ye mbongo ya tike to tokomema ye na motuka.
3. Ndenge nini ndeko mwasi moko azongelaki kosakola?
3 Na teritware moko, bakutaki ndeko mwasi moko oyo atiká kosakola mbula koleka 20. Atako asepelaki lisusu koyekola Biblia te, kasi ndeko mwasi oyo akutaki ye azongelaki ye, mpe atikelaki ye bazulunalo ya sika. Nsima ya liyangani ya etúká, mosakoli yango ayebisaki ye mwa makambo ya ntina oyo akangaki na liyangani mpe nsukansuka, ndeko mwasi yango azongelaki kosakola.
4. Ndenge nini tosengeli kotalela ndeko moko oyo azongeli makita?
4 Ntango moto moko azongeli makambo ya lisangá: Ntango ndeko moko oyo atiká kosakola abandi kozongela makita, ndenge nini tokotalela ye? Ndenge nini Yesu atalelaki bayekoli na ye nsima ya mwa ntango oyo basundolaki ye? Abengaki bango na esengo mpenza ete bazali “bandeko” na ye, mpe amonisaki ete azali kaka kotyela bango motema. Kutu apesaki bango mpe mokumba monene. (Mat. 28:10, 18, 19) Mwa moke na nsima, bamipesaki na kosakola nsango malamu “kozanga kotika.”—Mis. 5:42.
5. Ntango nini tosengeli kosolola na bankulutu na likambo etali ndeko moko oyo atiká kosakola?
5 Liboso ya koyekola Biblia na moto oyo atiká kosakola to liboso ya kobenga ndeko moko oyo atiká kosakola ete abima na biso na mosala ya kosakola, tosengeli naino kotuna bankulutu. Soki tokutani na ndeko moko oyo atiká kosakola na teritware na biso, tosengeli koyebisa bankulutu mpo básalisa ye na ndenge esengeli.
6. Esengo ya ndenge nini tokoyoka soki tosalisi bato oyo batiká kosakola?
6 Ndenge emonisami polele na Biblia, kaka baoyo bakosilisa kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka nde bakobika. (Mat. 24:13) Yango wana, kobosana te baoyo bazali kobɛta libaku to kobunga nzela ya lisangá. Soki tozali komonisela bato ya ndenge wana bolingo ya Yehova na motema molai mpenza, tokozala na esengo ya komona bango bazali kozongela mosala mosantu elongo na biso.—Luka 15:4-10.