Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/98 lok. 1
  • Tosengeli kozongela bato mbala na mbala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosengeli kozongela bato mbala na mbala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Tolanda mosala na biso ya kosakola Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Tosi tosali teritware na biso mbala mingi!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mpo na nini kokóba?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Totika te kosala oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 12/98 lok. 1

Tosengeli kozongela bato mbala na mbala

1 Mbala ya liboso oyo moto moko ayaki koyebisa yo nsango malamu, ondimaki yango mbala moko? Soki bongo te, osengeli kozala na botɔndi ete Batatoli ya Yehova bazongelaki yo mbala na mbala kino ondimaki koyekola Biblia. Ezali malamu kokanisa likambo yango ntango ozali kosakola mbala na mbala na teritware na yo.

2 Bomoi ya bato ezali kobongwana ntango nyonso. Bazali kokutana na mikakatano to na makambo ya sika. Bazali koyoka nsango ya makambo ya mabe oyo mazali kosalema na esika bafandi to na bisika mosusu na mokili. Bazali komona mpasi mpo na kobeba ya nkita. Bazali mpe kobɛla to kokufela bato na mabota na bango. Makambo motindo wana makoki kopesa bango nzela ete báluka koyeba ntina ya mawa oyo ezali kokómela bato. Tosengeli kososola makambo oyo mazali kotungisa bato mpe koyebisa bango nsango ya kobɔndisa.

3 Oyo ezali mosala ya kobikisa bato: Kanisá naino basali oyo babikisaka bato na makama. Atako bamosusu bazali koluka na esika oyo babiki bazwami mingi te, bakolɛmbisa mabɔkɔ te mpe bakolongwa na esika yango te mpo ete baninga na bango bazali kozwa babiki mingi na esika mosusu. Mosala na biso ya kobikisa bato ekómi naino na nsuka te. Mbula na mbula, tozali kozwa bato mingi oyo balingi kobika na “bolɔzi monene.”​—Emon. 7:9, 14, NW.

4 “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Lom. 10:13-15, NW ) Maloba yango masengeli kopesa mokomoko na biso mposa ya kosakola na molende. Uta tobandaki kosakola na teritware na biso, bana bakoli mpe bakómi sikawa komibanzabanza mpo na mikolo mizali koya mpe mpo na ntina mpenza ya bomoi na bango. Tokoki te koyeba nani, nsukansuka, akondima nsango malamu. (Mos. 11:6) Bato mingi oyo bazalaki liboso batɛmɛli, bandimi sikawa solo. Mosala na biso ezali ya kosambisa bato te, kasi ezali nde ya kokoba kopesa bango libaku ya koyoka nsango malamu mpe kobikisama na likama oyo ekokómela mokili oyo enuni. Lokola bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso basalaki yango, tosengeli ‘kokoba kokende’ kosakola epai na bato mpo na kopesa bango nzela ete básepela na nsango ya Bokonzi.​—Mat. 10:6, 7.

5 Lokola tozali naino na libaku ya kosakola nsango malamu, yango ezali mpenza komonisa ngɔlu ya Yehova. (2 Pet. 3:9) Wana tozali kopesa nzela na bato mosusu ete báyoka nsango malamu mbala na mbala, tozali komonisa bolingo ya Nzambe, mpe na lolenge yango tozali kokumisa ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto